Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya Zomi na mibale 23–29: “Akoya na Mokili mpo na Kosikola Bato na Ye.” Noele


“Sanza ya Zomi na mibale 23–29: ‘Akoya na Mokili mpo na Kosikola Bato na Ye.’ Noele,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya Zomi na Mibale 23–29. Noele,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Yosefe, Maliya, mpe mwana Yesu na ndako ya bibwele

Tala Mwana Na Mpate ya Nzambe,, na Walter Rane

Sanza ya Zomi na mibale 23–29: “Akoya na Mokili mpo na Kosikola Bato na Ye.”

Noele

Uta na Nefi kino na Moroni, profeta nyonso ya Buku ya Mormon alobeli bobele ntina ya bule ekomami na bokuse na nkasa ya nkoma ya buku: “Bondimisi ya [bato banso] ete Yesu azali Klisto.” Profeta moko amonaki Ye lokola molimo ya bomoi ya yambo na kufa, mpe mosusu amonaki mbotama mpe mosala na Ye na limoni. Moko atelemaki na efelo mpo na kosakola bilembo ya mbotama na Ye mpe kufa na Ye, mpe mosusu afukamaki liboso ya nzoto na Ye ya bosekwi, kosimbaka bampota na maboko, makolo mpe mopanzi na Ye. Bango banso bayebaki bosolo oyo ya ntina “Nzela mosusu to bandenge mosusu ezali te oyo moto akoki kobikisama, bobele se na nzela ya makila ya bosikoli ya Yesu Klisto, oyo … ayaki kosikola mokili” (Elamani 5:9).

Na yango na eleko oyo ya Noele, lokola bandimi na mokili mobimba tozali kosepela bolamu mpe bolingo ya Nzambe na kotindaka Mwana na Ye, manyola lolenge nini Buku ya Mormon elendisi bondimi na yo na Klisto. Ntango ozali kokanisa na ntina na mbotama na Ye, manyola mpo na nini Ayaki mpe lolenge nini boyei na Ye ebongoli bomoi na Yo. Nsima okoki koyoka esengo ya solo ya Noele—likabo oyo Yesu Klisto apesi yo.

Makanisi mpo na Koyekola na Libota mpe na Eklezia

Yesu Klisto abotamaki mpo na kozala Mobikisi na ngai.

Ezali momesano mpo na kotanga lisolo ya mbotama ya Mobikisi na kati ya Boyokani ya Sika na mokolo ya Noele, kasi okoki lisusu kozwa masakoli ya ntina ya molulu oyo ya bule na kati ya Buku ya Mormon. Ndakisa, masakoli ya mbotama mpe ya mosala ya Mobikisi ezwami na kati ya 1 Nefi 11:13–36; Moziya 3:5–10; mpe Elamani 14:1–13. Makanisi nini na ntina na Yesu Klisto eyeli yo ntango otangi milongo oyo mpe osepeli na bandimbola oyo ekoki kozala ya bilembo ya mbotama na Ye? Lolenge nini matatoli ya baprofeta oyo elendisi litatoli na yo ya Klisto mpe etinda na Ye?

Oyo ezali mwa makanisi mosusu mpo na kosunga bino boyekamela Yesu Klisto na ntango ya Noele:

  • Oyebi ete okoki kotala mateya uta bansambo ya Noele ya Bokambi ya Yambo eleki na Gospel Library? Luka yango na liboke ya “Christmas Videos”. Kanisa kokabolaka mateya mpe miziki yango mpo na kopanza esengo ya Noele.

  • Yo mpe libota na yo bosengeli lisusu kosepela koyokaka maboke uta “Christmas Music” liboke eponami kati ya Gospel Library.

  • Bobanza kolengela milulu oyo yo to libota na yo bokoki kosala na mikolo oyo ekambaka na Noele mpo na koyoka Molimo ya Klisto, lokola kosungaka moto songolo to koyembaka banzembo ya Noele elongo. Tala LighttheWorld.org mpo na kozwa makanisi.

Tala lisusu Matai 1:18–25; 2; Luka 2; 3 Nefi 1:4–22; “Away in a Manger,” Hymns, no. 206.

Yesu Klisto Azali Mosikoli ya Mokili

Ntina ya yambo oyo tosepelaka na mbotama ya Yesu Klisto ezali mpo na libonza na Ye ya bosikoli. Na nzela ya mbeka wana, Ye akoki kobikisa biso uta na lisumu mpe kufa, alendisaka biso na nzela ya mitungisi mpe asungaka biso, “tozala ya kobonga nie kati na Ye” (Moroni 10:32). Oyekoli nini na kati ya Buku ya Mormon na mobu oyo na ntina na nguya ya Mobikisi mpo na kosikola yo? Esili yo kosimbama na masolo to mateya songolo oyo? Kanisa nini makomi oyo elandi ezali koteya yo na ntina na etinda ya bosikoli ya Mobikisi: 2 Nefi 2:6, Alma 7:7–13; 11:40; mpe Elamani 5:9; 14:16–17. Oyoki nini oyo efulami na kosala mpo kolakisa Ye botondi na yo?

Elilingi
elembo ya seminele
Buku ya Mormon etatoli Yesu Klisto.

“Litatoli Mosusu ya Yesu Klisto” ezali mingi koleka bobele nkoma elandi mpo na Buku ya Mormon; ezali litatoli ya ntina ya bonzambe na yango. Manyola maye ozali koyekola na kati ya makomi maye malandi na ntina ya etinda ya Buku ya Mormon mpo na kotatola Klisto: 1 Nefi 6:4; 19:18; mpe 2 Nefi 25:23, 26; 33:4, 10.

Kanisa kokomaka na kati ya zulunale lolenge nini koyekola Buku ya Mormon mobu oyo ememi yo pene pene ya Klisto. Bitinda oyo ya molimo ekoki kosunga:

  • “Eloko moko ya sika nayekoli na ntina ya Mobikisi mobu moye ezalaki …”

  • “Boyekoli na ntina ya Mobikisi na kati ya Buku ya Mormon ebongolaki lolenge oyo na …”

  • “Moto oyo nalingaka [to lisolo na ngai] na kati ya Buku ya Mormon eteyaki ngai ete Mobikisi …”

Ntango mosusu ezali na bato mosusu oyo bakoki kopambolama na boyebi lolenge nini oyokaka na ntina ya Buku ya Mormon. Lolenge nini okoki kokabola mayebi na yo mpe litatoli? Okoki koyoka bofuli ya kopesa mokanda ya likabo ya Noele. App ya Buku ya Mormon esalaka bokaboli ezala pete.

Episikopo Gérald Caussé atangaki babosolo ebele uta na Buku ya Mormon etali Yesu Klisto (tala “A Living Witness of the Living Christ,” Liahona, Sanza ya mitano 2020, 39–40). Okoki kotala mokanda na ye mpe omanyola lolenge nini moko na moko ya bosolo oyo ebongolaki—to ekoki kobongola—bomoi na yo.

Tala lisusu Gospel Topics, “Book of Mormon,” Gospel Library.

Mpo na makanisi ebele, tala mikanda ya sanza oyo ya Liahona mpe For the Strength of Youth magazini.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Yesu Klisto azali likabo ya Tata na Lola epai na ngai.

  • Mpo na kosunga libota na yo etalela likabo Tata na Lola apesaki biso na kotindaka Mwana na Ye, bokoki kozinga elilingi ya Yesu Klisto lokola libonza ya Noele. Yo mpe bana na yo bokoki kosolola na ntina ya makabo kitoko ya Noele oyo bozwaki to oyo boliki kozwa. Nsima bakoki kofungola elilingi ya Klisto mpe kosolola lolenge nini Ye azali libonza ya motuya koleka mpo na biso. Loyembo lokola “He Sent His Son” (Children’s Songbook, 34–35) ekoki kobakisama na lisolo oyo. Sunga bana na yo bazwa maloba na kati ya loyembo oyo elimboli mapamboli oyo tozali na yango mpo na mbotama ya Yesu.

Yesu Klisto abotamaki mpo na kozala Mobikisi na ngai.

  • Bana na yo bakoki kosepela kokabola na yo maye bayebi na ntina ya mbotama ya Yesu. Buku Gospel Art Book ezali na bilili ebele oyo ekoki kosunga bango mpo na kobeta lisolo ya kala (tala nimelo. 28, 29, 3031). Bokoki lisusu kotala bilili oyo etalisi bomoi ya Mobikisi mpe likabo ya bosikoli. Mpo na nini Tata na Lola atindaki Yesu Klisto?

  • Bana na bino bakoki kosepela lisusu koyema bilili na bango moko ya mbotama ya Yesu mpe mosala. Ntango mosusu bakoki koyema oyo etalisami na kati ya 1 Nefi 11:13–23; Mosiya 3:5–10; Elamani 14:1–13; mpe 3 Nefi 1:4–22. Nsima bakoki kokabola na yo maye bilili na bango ezali koteya na ntina ya Yesu Klisto.

  • Mpo na kobeta nsete na oyo Biblia mpe Buku ya Mormon nyonso mibale ezali koteya oyo etali mbotama ya Yesu Klisto, bokoki kokoma milulu oyo etalisami na kati ya Luka 2:4–14; Matai 2:1–2; mpe 3 Nefi 1:15, 19–21. Nsima bana na yo bakoki koluka makomi oyo mpo na koyeba milulu nini esalamaki na Beteleyeme, Bamelika, to nyonso mibale. Mpo na nini tozali na botondi ya kozala na Buku ya Mormon lokola nzeneneke ya mibale ya mbotama ya Yesu?

Bana balingaka masolo ya kala. Masolo ya kala ezali moko ya banzela malamu mpo na kosunga bana bayekola mpe bamikundola bosolo. Ntango bozali kokabola lisolo ya kala ya mbotama ya Yesu, banza lisusu kokabola masolo ya kala ya bomoi na yo oyo esungaki mpo na kolendisa bondimi na yo na Mobikisi.

Buku ya Mormon etatoli na ntina ya Yesu Klisto.

  • Ntango yo mpe libota na yo bosukisi boyekoli ya Buku ya Mormon mobu oyo, ekoki kozala ntango malamu ya kokabola masolo na bino ya kala bino na bino to milongo uta na buku oyo ya bule. Botala mwa bilili na kati ya Yaka, Landa Ngai to Book of Mormon Stories ekoki kosunga bana na bino bamikundola maye bazali koyekola mobu oyo. Sunga bango bamona maye masolo oyo ya kala ezali koteya biso etali Yesu Klisto.

  • Okoki lisusu kopesa bana na yo elili ya Yesu, to kotika bango bayema ya bango moko. Bengisa bango basimba bilili na bango ntango nyonso bazali koyoka nkombo ya Klisto ntango ozali kotanga 2 Nefi 25:23, 26. Etatoli ete Buku ya Mormon ekomamaki mpo na kosunga biso “tondimela Klisto” (2 Nefi 25:23).

Mpo na makanisi ebele, tala mokanda ya sanza oyo Friend bamagazini .

Elilingi
Anjelu azali kolakisa Nefi Maliya Moseka na limoni

Limoni ya Nefi ya Maliya Moseka,,na Judith A. Mehr

Bimisa na lokasa