Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya zomi na mibale 2–8: “Mpo na Kobatela Bango na Nzela ya Sembo.” Moroni 1–6


“Sanza ya zomi na mibale 2–8: ‘Mpo na Kobatela Bango na Nzela ya Sembo.’ Moroni 1–6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya zomi na mibale 2–8. Moroni1–6,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Alma azali kobatisa bato na Mayi ya Mormon

Minerva Teichert (1888–1976), Alma Abatisi na Mayi ya Mormon, 1949–1951, mafuta na elamba na koni, 35⅞ x 48 ya basantimetele. Musée ya Ntoki ya Brigham Young University, 1969

Sanza ya zomi na mibale 2–8: “Mpo na Kobatela Bango na Nzela ya Sembo”

Moroni 1–6

Nsima ya kosilisa likundoli ya tata na ye mpo na Banefi mpe kokoma na bokuse likundoli ya Bayelede, Moroni akanisaki yambo ete mosala na ye ya kobomba makundoli esalemaki (tala Moroni 1:1). Nini ezalaki mingi kuna ya koloba na ntina ya bikolo mibale oyo ebebisamaki nyonso mobimba? Kasi Moroni amonaki bantango na biso (tala Mormon 8:35), mpe ye afulamaki mpo na “kokoma mwa makambo, maye ntango mosusu makoki kozala ya motuya … na mwa mikolo mikoya nsima” (Moroni 1:4). Ayebaki ete bopengwi monene esengelaki koya, komemaka elongo na yango mobulungano na ntina ya makuli ya bonganganzambe mpe mingi mingi na biyamba. Yango ekoki kozala mpo na nini apesaki polele makambo ya mikemike na ntina ya elambo, libatisi, bopesi likabo ya Molimo Mosantu, mpe mapamboli ya bosangani na bandeko bandimi mpo na “kobatelana [moko mpe mosusu] na nzela ya bosembo, … na kotalelaka bobele matomba ya Klisto, oyo azalaki mobandisi mpe mosukisi ya bondimi na [biso]” (Moroni 6:4). Boyebi ya motuya koleka lokola oyo epesaka biso ntina ya kozala na botondi ete Nkolo abatelaki bomoi ya Moroni mpo ete “akoka kokoma lisusu mwa ndambo koleka ya makambo” (Moroni 1:4).

Makanisi mpo na koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Moroni 1

Nakoki kolanda Yesu Klisto atako botemeli.

Ntango ozali kotanga Moroni 1, nini efuli yo na ntina ya bondimi ya Moroni epai ya Nkolo mpe libiangi na ye? Mwa banzela nini oyo moto akoki “kowangana Klisto”? (Moroni 1:2–3). Manyola lolenge nini okoki kolakisa bosembo epayi na Yesu Klisto, ata ntango okutani na mimekano mpe botemeli.

Moroni 2–6

Makuli ya bonganganzambe esengeli kosalama lokola Nkolo atindi.

Moroni azalaki kokima mpo na bomoi na ye ntango akomaki mikapo oyo. Mpo na nini akomitungisa mpo na kokoma makambo ya mikemike ya leta lokola ndenge ya kosala makuli? Maniola oyo ntango ozali kotanga Moroni 2–6. Mpo na nini okanisi ete makambo oyo ya mikemike ezali mpenza ntina epai ya Nkolo? Awa ezali mwa mituna oyo ekoki kokamba boyekoli na yo:

Nkotisa (Moroni 2; 6:4).Malako nini ya Mobikisi ezali na kati ya Moroni 2:2 eteyi yo na ntina ya bokuli ya nkotisa? Lolenge nini okoki kolimbola ndimbola “ya kolatisama mpe kopetolama na nguya ya Molimo Mosantu”? (Moroni 6:4).

Bokuli ya bonganganzambe (Moroni 3).Omoni nini na mokapo moye oyo ekoki kosalisa moto songolo amilengela mpo na kokulisama bonganganzambe? Omoni nini oyo ekoki kosalisa moto songolo na kasala bokuli?

Elambo (Moroni 4–5; 6:6).Nini okoki kosala mpo na kokomisa elambo motuya mingi koleka mpo ya poso na yo?

Libatisi (Moroni 6:1–3).Ozali kosala nini mpo kokoba kokutana na makoki oyo masengami mpo na libatisi?

Elilingi
elenge mwasi azali kozwa lipamboli

Yesu ateyaki lolenge nini makuli masengeli kosalema.

Nakotalaka maye oyekoli, lolenge nini okobongola bandenge okanisaka na ntina ya, kozala na kati, to kolengela basusu mpo na makuli maye?

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 84:20.

Lisano ya kokabola mikumba. Lolenge moko ya malamu ya komikundola makambo oyo ozali koyekola ezali ya kolimbola yango epai ya basusu. Na ndakisa, meka kosala masano lokola oyo: Moninga moko andimi te ete azali pene ya kozwa libatisi. Lolenge nini okokaki kosalela Moroni 6 mpo kosalisa ye?

Moroni 4–5

Kozwa elambo esalisaka ngai napusana penepene na Yesu Klisto.

Oyokaki mbala mosusu nsambo ya elambo mbala mingi, kasi mbala boni okanisaka malamu na ntina ya nini maloba elimboli? Mbala mosusu bokoki komeka kokoma nsambo mibale ya elambo uta na bokundoli. Na nsima, kokanisa na makambo oyo okomaki na Moroni 4:3 mpe 5:2. Omonaki likambo moko na ntina na nsambo yango oyo omonaki liboso te?

Kanisa kokotisa loyembo ya elambo na boyekoli na yo, lokola “In Memory of the Crucified” (Banzembo, no. 190).

Moroni 6:4–9

Elilingi
elembo ya seminele
Bayekoli ya Yesu Klisto bakengelaka bolamu ya milimo ya moko na moko.

Boponi ya kolanda Klisto ezali ya moto na moto, kasi baninga bandimi bakoki kosalisa kobatela biso “na nzela ya sembo” (Moroni 6:4–5). Bandimi ya Eklezia na ntango ya Moroni basalaki nini mpo na kolendisana? Ntango ozali kotanga Moroni 6:4–9, manyola mapamboli oyo eyaka ntango moto azali ya “kotangama na kati ya bato ya eklezia ya Klisto” (Moroni 6:4).

Okokaki lisusu kokanisa na ntina ya bato bayaka na palwasi to etape na yo. Ezali na moto moko oyo akoki kozala na mposa ya bolingo na yo ya sikisiki—mbala mosusu moto oyo azali ya sika to oyo auti kozonga? Lolenge nini okokaki kosalisa mpo na kosala ete makambo oyo bakutanaki na yango na eklezia ekokana mingi na oyo Moroni alimbolaki? (mpo na makanisi, tala Nzela ya Boyokani na Ngai to “Kolendisa Bandimi ya Sika” videos in the Gospel Library). Okoki kozwa mwa bofuli na eteni I ya nsago ya Mokambi Dallin H. Oaks “Bosenga mpo na Eklezia” (Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2021, 24-25).

Ntango ozali komanyola nini elimboli “koleisama na liloba malamu ya Nzambe” (Moroni 6:4), ekoki kosalisa na kokanisa bilei oyo nzete to bebe asengeli na yango—mpe nini ekosalema soki bato babosanaka yango. Luka Moroni 6:4–9 mpo na makanisi na ntina ya lolenge nini okoki kosalisa “koleisa” basusu na molimo. Lolenge nini baninga bayekoli basalisi mpo na koleisa yo?

Ezali polele te mpo na moto nyonso mpo na nini ezali na ntina “kotangama na kati ya bato ya eklezia ya Klisto” mpe “kokutana elongo mbala mingi” na makita ya Eklezia. Ndenge nini okoki kolimbola mpo na nini ozali na botondi mpo na kozala mondimi ya Eklezia ya Yesu Klisto? (tala biteni mosusu ya nsango ya Mokambi Oaks “Esengeli ya Eklezia”).

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka, tala nimero ya sanza oyo ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge magazines.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Moroni 2–6

Molimo Mosantu azali likabo ya bule.

  • Molimo Mosantu to Molimo elobelami mbala mingi na Moroni 2–6. Mbala mosusu okokaki kosenga bana na yo baluka molongo nyonso oyo elobeli Ye, batanga milongo wana, mpe batanga maye bayekoli na ntina ya Molimo Mosantu. Okokaki lisusu kokabola mayele moko na mosusu ntango oyokaki nguya ya Molimo.

Moroni 45

Nazwaka elambo mpo na kolakisa ete nakomikundolaka ntango nyonso Yesu Klisto.

  • Kotangaka nsambo ya elambo elongo na bana na yo ekoki komema na lisolo etali lolenge nini bokoki kozwa matomba mingi na elambo. Ekoki kosalisa mpo na bango kokanisa ete moninga moko azali koya na likita ya elambo mpo na mbala ya yambo. Lolenge nini tokoki kolimbolela moninga na biso soki elambo ezali nini mpe mpo na nini ezali esantu? Lendisa bana na yo basalela eloko moko oyo euti na Moroni 4 to 5 na bandimbola na bango Bana mike bakokaki kosalela lokasa ya misala ya poso oyo to Gospel Art Book, no. 108.

  • Kanisa koyemba nzembo elongo oyo esalisaka bana na yo bakanisa na ntina ya Mobikisi (lokola “Reverently, Quietly,” Children’s Songbook, 26). Okokaki mpe komeka kofanda na limemya na ntango ya elambo.

Moroni 6:1–3

Nakoki komilengela mpo na kobatisama.

  • Nani akoki kobatisama? Salisa bana na yo bazwa biyano na motuna oyo kati na Moroni 6:1-3. Elimboli nini kozala na “motema ebukana mpe molimo ya mawa”? (Moroni 6:2). Lolenge nini maye esalisi biso tomilengela mpo na libatisi? Kanisa koyebisa bana na yo lolenge omilengelamaki mpo na kozwa libatisi.

Moroni 6:4–6, 9

Tokendaka na eklezia mpo kozwa elambo mpe kosungana.

  • Bana na yo bayebi mpo na nini tolingaka kokende na eklezia”? Kotanga Moroni 6:4–6, 9 ekoki kopesa yo libaku ya kolobela elongo mwa makambo tosalaka na eklezia. Mbala mosusu bakokaki kosala bililingi ya bangomei kosalaka makambo oyo (lokola kosambela, koteya, koyemba, mpe kozwa elambo).

  • Nsima ya kotanga Moroni 6:4 elongo, yo na bana na yo bokokaki kotala bililingi to bandakisa ya bilei oyo ezali koleisa nzoto mpe kokokanisa koleisa nzoto na biso na “koleisama na liloba malamu ya Nzambe.” Bokoki lisusu kotala video “A Day for the Eternities” (ChurchofJesusChrist.org).

Mpo na makanisi mosusu, tala nimero ya sanza oyo ya Moninga magazine.

Elilingi
Moroni abatami na libulu kati na mabanga

Moroni kati ya Libulu ya Mabanga, na Jorge Cocco

Bimisa na lokasa