Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya zomi na mibale 9–15: “Tika Ete Klisto Atombola Yo.” Moroni 7–9


“Sanza ya zomi na mibale 9–15: ‘Tika Ete Klisto Atombola Yo.’ Moroni 7–9,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya zomi na mibale 9–15. Moroni 7–9,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Moroni azali kokoma na bapalaki ya wolo

Minerva Teichert (1888–1976), Moroni: Moko ya Banefi ya Nsuka, 1949–1951, mafuta na elamba na nkoni, 343/4 x 47 basantimetele. Musée ya Ntoki ya Brigham Young University, 1969

Sanza ya zomi na mibale 9–15: “Tika Ete Klisto Atombola Yo”

Moroni 7–9

Yambo Moroni asilisa makomi toyebi lelo lokola Buku ya Mormon na maloba na ye moko ya nsuka, akabolaki bansango misato uta na tata na ye, Mormon: nsango epayi ya “balandi ya kimya ya Klisto” (Moroni 7:3) mpe mikanda mibale oyo Mormon akomelaki Moroni. Ntango mosusu Moroni akotisaki bansango oyo na kati ya Buku ya Mormon mpo ete amonaki bokokani ya bantango ya mpasi na eleko na ye mpe oyo ya biso. Ntango maloba maye makomamaki, bato ya Banefi bango nyonso bapesaki mokongo na Mobikisi. Mingi kati na bango “babungisaki bolingo na bango, moko na mosusu” mpe bazalaki kosepela na “nyonso longola bobele oyo ezali malamu” (Moroni 9:5, 19). Mpe atako bongo Mormon azwaki ntina ya kolikya, koteyaka biso ete elikya elingi te koloba kozanga koyeba to kozala zololo na ntina ya oyo etali makambo ya mokili. Elikya elingi koloba kozala na bondimi epai ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto, oyo ya bango nguya ezali monene mpe seko koleka makambo wana. Elingi koloba “kokangama na likambo nyonso ya malamu” (Moroni 7:19). Elingi koloba kotika Bomikabi ya Yesu Klisto “mpe elikya ya nkembo na ye mpe bomoi ya seko, efanda na makanisi na yo” (Moroni 9:25).

Makanisi mpo ya koyekola na Ndako mpe na Eklezia

Moroni 7:12–20

Pole ya Klisto esalisaka ngai nayeba bosolo uta na mabe.

Bato mingi bamitunaka, “Lolenge nini nakoki koyeba soki likanisi moko euti na Nzambe to na makanisi na ngai moko?” to “Na bokosi mingi lelo, lolenge nini nakoki koyeba nini ezali malamu to mabe?” Maloba ya Mormon na kati ya Moroni 7 epesi biso mabongi mingi oyo tokoki kosalela mpo na koyanola mitano oyo. Luka yango mingimingi kati na milongo 12–20. Okoki kosalela bosolo oyo mpo na kosunga yo otuya bansango ozali kokutana na yango mpe makambo okutani na yango poso oyo.

Tala lisusu Mokambi ya Makomami, “Pole, Pole ya Klisto,” Gospel Library; “Patterns of Light: Discerning Light [Mitindo ya Pole: Pole oyo Esosolaka]” (video) Gospel Library.

Moroni 7:20–48

Mpo na Yesu Klisto, nakoki “koyeba likambo nyonso ya malamu.”

Mormon atunaki motuna oyo emonisami kozala motuya lelo: “Lolenge nini ezali pete [mpo na] kozwa makambo manso ya malamu?” (Moroni 7:20). Nsima ateyaki na ntina ya bondimi na Yesu Klisto, elikya, mpe bolingani. Ntango ozali kotanga milongo 20–48, luka lolenge nini ezaleli moko moko esalisaka yo oyeba “likambo nyonso ya malamu” oyo euti na Yesu Klisto. Mpo na nini bizalela yango ezali ntina mingi mpo na moyekoli ya Yesu Klisto?

Tala lisusu “Mateya ya Mormon na ntina ya Bondimi, Elikya, mpe Bolingani” (video), Gospel Library.

Moroni 7:44–48

Elilingi
elembo ya seminele
“Bolingani ezali bolingo ya peto ya Klisto.”

Mormon amonaki ete bondimi mpe elikya na biso na Yesu Klisto ememaka biso na kozala na bolingani. Bolingani ezali Nini? Okoki kokoma Bolingani ezali … mpe nsima tanga Moroni 7:44–48, koluka maloba to bafraze oyo ekokaki kokokisa fraze. Ntango osilisi, kanisa kotya liloba yango na esika na yango Bolingani na nkombo Yesu Kisto. Oyo eteyi yo nini na ntina ya Mobikisi? Lolenge nini Yesu Klisto amonisi bolingo na Ye ya peto? Kanisa bandakisa uta na makomi mpe bomoi na yo moko.

Mokambi Dallin H. Oaks atalisaki: “Ntina oyo bolingani ekueyaka ata moke te mpe ntina oyo bolingani ezali monene koleka kutu na makambu ya bolamu … ezali bolingani, ‘bolingo ya peto ya Klisto’ [Moroni 7:47], ezali te likambo kasi ezalela to lolenge ya kozala. … Bolingani ezali eloko oyo moto akomaka” (“Mokakatano ya Kokoma,” Ensign,, Sanza ya zomi na moko 2000, 34). Na makanisi oyo, okoki kotanga nsango ya Mpaka Massimo De Feo “Bolingo ya Peto: Elembo ya Solo ya Moyekoli Nyonso ya Solo ya Yesu Klisto” (Liahona, Sanza ya mitano 2018, 81–83). Lolenge nini bolingani ekoki kosalisa yo ozala moyekoli? Lolenge nini okoki “kokangama na bolingani”? (molongo 46).

Tala lisusu 1 Bakolinti 13:1–13; Etele 12:33–34; “Bolingana,” Banzembo, no. 308; “Bolingani: Ndakisa moko ya Bandimi” (video), Gospel Library; Gospel Topics, “Bolingani,” Gospel Library.

Salela mateya ya ndakisa. Mbala mosusu kokanisa na ntina ya kiti ya makolo misato ekoki kosalisa yo ososola mingi na ntina ya boyokani kati na bondimi, elikya, mpe bolingani (tala Dieter F. Uchtdorf, “Nguya ya Elikya oyo Ezangi Nsuka,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 21–24).

Moroni 9:3–5

Kanda ememaka mawa mpe mpasi.

Na bokeseni na nsango ya bolingo ya Mormon na Moroni 7:44–48, Mokanda ya mibale ya Mormon epai ya Moroni esangisi makebisi na likambo moko oyo bato mingi bazali kobunda na yango lelo—kanda. Engebene na Moroni 9:3–5, nini ezalaki mwa mbano ya kanda ya Banefi? Makebi nini tokoki kozwa epai na mikapo 3–5, 18–20, 23?

Tala lisusu Gordon B. Hinckley, “Malembe na Kanda,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2007, 62–66.

Moroni 9:25–26

Nakoki kolikya na Klisto kotalaka te mabaku na ngai.

Nsima ya kolimbola botau oyo amonaki, Mormon ayebisaki mwana na ye ya mobali ayoka mpasi te. Nini ekamwisi yo na ntina ya nsango ya Mormon ya elikya? Elimboli nini epai na yo mpo na Klisto “kotombola [yo] likolo”? Bizaleli nini ya Klisto mpe mabongi ya nsango malamu na Ye “efandi na makanisi na yo” mpe oyo epesi yo elikya? (Moroni 9:25).

Tala lisusu Russell M. Nelson, “Esengo mpe Kobika na Molimo,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 81-–84.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka, tala banimero ya sanza oyo ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge magazines.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Moroni 7:33

Soki nazali na bondimi na Yesu Klisto, nakoki kosala oyo nyonso Ye azali na yango mposa nasala.

  • Kanisa kotala mwa bililingi elongo oyo ezali kolakisa moto moko uta na makomi kokokisa likambo moko ya ntina (tala, na ndakisa, Gospel Art Book, nos. 19, 70, 7881). Lolenge nini kozala na bondimi na Klisto esali bokeseni na bandakisa oyo? Na nsima, yo na bana na yo bokokaki kotanga Moroni 7:33, kolukaka oyo tokoki kosala ntango tozali na bondimi na Yesu Klisto. Bokokaki lisusu kokabola mayele moko na mosusu ntango Nzambe apambolaki bino na nguya ya kosala bolingi na Ye.

Moloni 7:41

Kondima na Yesu Klisto ekoki kopesa ngai elikya.

  • Ntango otangi Moroni 7:41 na bana na yo, mbala mosusu bakokaki kotombola maboko na bango ntango bayoki likambo moko Mormon alobaki ete tosengeli kolikya. Ybisa bango na ntina ya elikya oyo ozali koyoka mpo na Yesu Klisto.

  • Yo na bana na yo bokoki mpe kokanisa moto oyo akoki kozala na mokakatano mpo na likambo moko. Mbala mosusu bana na yo bakokaki kosala elilingi mpo na moto yango oyo ekoki kokundolisa ye ete azala na elikya epayi ya Yesu Klisto.

Moroni 7:40–41; 9:25–26

Nakoki kozala na elikya epayi ya Yesu Klisto, ata na ntango ya mikakatano makasi.

  • Mpo na koteya bana na yo na ntina ya elikya na Yesu Klisto, okoki kotondisa mbeki moko ya peto na mayi mpe kobwaka biloko mibale kati na yango—moko ezindaka te mpe mosusu ezindaka. Ntango bozali kotanga elongo Moroni 7:40–41 mpe 9:25–26, bana na yo bakokaki koluka oyo elikya esalaka mpo na biso. Na nsima, bakokaki kokokanisa eloko oyo ezali kozinda te na mayi na moto oyo azali na elikya epai na Klisto. Lolenge nini Ye “atomboli [biso]” ntango tozali kokutana na mimekano ya mpasi? Salisa bana na yo bakanisa banzela bakoki kobatela Mobikisi mpe mateya na Ye ya kolendisa “na makanisi [na bango] libela.”

Moroni 7:45–48

“Bolingani ezali bolingo ya peto ya Klisto.”

  • Loyembo etali bolingo, lokola “Bolingana” (Mokanda ya Nzembo ya Bana, no. 136), ekoki kobandisa lisolo oyo etali bolingani ezali nini. Okoki kotanga to koloba na mokuse Moroni 7:47 mpe bengisa bana na yo bayema bililingi oyo bazali komonisa bolingo epai na moto. Pesa likanisi ete batya elilingi na bango esika oyo ekokundolisa bango balinga basusu ndenge Yesu alingaka bango.

  • Ndenge nini okoki kofula bana na yo mpo na koluka mpe kokolisa bolingo ya peto ya Klisto na bomoi na bango? Mbala mosusu okoki kosalisa bango bakanisa banzela oyo Yesu amonisaki bolingani (tala, na ndakisa, Luka 23:34; Yoane 8:1–11; Etele 12:33–34). Lolenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka, tala nimero ya sanza oyo ya Moninga magazine.

Elilingi
Yesu Klisto

Liyemi ya Klisto Mobikisi, na Heinrich Hofmann

Bimisa na lokasa