Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya zomi na mibale 16–22: “Boya epai ya Klisto, mpe Bobonga Nie kati na Ye.” Moroni 10


“Sanza ya zomi na mibale 16–22: ‘Boya epai ya Klisto, mpe Bobonga Nie kati na Ye.” Moroni 10,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: Buku ya Mormon 2024 (2023)

“Sanza ya zomi na mibale 16–22. Moroni 10,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe na Eklezia: 2024 (2023)

Elilingi
Yesu abimeli Banefi

Mpo Ete Bokoka Koyeba, na Gary L. Kapp

Sanza ya zomi na mibale 16–22: “Boya epai ya Klisto, mpe Bobonga Nie kati na Ye”

Moroni 10

Buku ya Mormon efungwami na elaka ya Nefi mpo na kolakisa biso ete “boboto ya sembo ya Nkolo ezali likolo ya baoyo banso aponaki, mpo na bondimi na bango” (1 Nefi 1:20). Buku esukisi na nsango ya lolenge moko uta na Moroni: “tomikundola lolenge nini Nkolo atonda boboto” (Moroni 10:2–3). Bandakisa nini ya boboto ya Nkolo omoni kati na Buku ya Mormon? Okoki komanyola lolenge ya boboto Nzambe akambaki libota ya Lehi na esobe mpe kokatisa mayi manene, boboto ya bolamu Alakisaki epai ya Enosa ntango molimo na ye ezalaki na nzala ya bolimbisi, to boboto Alakisaki epai ya Alma, monguna monene ya Eklezia oyo akomaki moko ya bilombe balobeli na yango. To makanisi na yo ekoki kozonga na boboto ya Mobikisi mosekwi alakisaki epai ya bato ntango Abikisaki bokono na bango mpe Apambolaki bana na bango ya mike. Ntango mosusu ya ntina koleka, nyonso ekoki kokundolisa yo oyo etali, “lolenge nini Nkolo azalaka boboto” epai na yo, mpo Buku ya Mormon ekomamaki mpo kobengisa moko na moko na biso mpo na kozwa boboto ya Nzambe—libengisi moko etalisami bobele na maloba ya bolaki ya Moroni, “Boya epai ya Klisto, mpe bobonga nie kati na ye” (Moroni 10:32).

Makanisi mpo ya koyekola na Eklezia mpe na Ndako

Moroni 10:3–7

Elilingi
elembo ya seminele
Nakoki koyeba bosolo ya makambo nyonso na nguya ya Molimo Mosantu.

Elaka kati na Moroni 10:3–7 ebongoli bomoi ya bankoto ya bato na mokili mobimba. Lolenge nini ebongoli ya yo? Ntango otangi Moroni 10:3–7, kanisa kotanga na bokebi mingi koleka ndenge otangaki na kala. Okoki kotalela liloba moko na moko, komitunaka yo moko mituna lokola oyo:Oyo elimboli nini? Lolenge nini nakoki kosala yango malamu koleka? Mayele nini nazwi na yango?

Ntango ozali komanyola boluki na yo moko mpo na bosolo ya molimo, ekoki kosalisa na koyekola lolenge nini basusu bazwi bosolo na nguya ya Molimo Mosantu. Mpaka Mathias Held alimbolaki likambo na ye lokola mondimi ya sika ya Eklezia (tala “Seeking Knowledge by the Spirit,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 31–33). Mpaka David F. Evans alimbolaki likambo na ye lokola moko oyo akolaki na Eklezia kasi azalaki kaka na mituna (tala “The Truth of All Things,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 68–70). Kanisa kotanga moko to nyonso mibale ya bansango yango mpe kokoma makambo nyonso oyo oyekoli na boluki na bango ya solo oyo esalisaka yo na oyo ya yo moko.

Okoki mpe koluka koyeba makambo oyo Nzambe ateyaki na ntina na solo na kotangaka mwa mikapo na buku Mokambi ya Makomami, “Bosolo” (Gospel Library). Makomi nini emonani ete ekosalisa yo mingi mingi? Mbala mosusu okokaki kopona moko mpo na kokabola na moto mosusu oyo azali mpe koluka bosolo na nzela ya Molimo.

Tala lisusu Henry B. Eyring, “The Faith to Ask and then to Act,” Liahona, Sanza ya zomi na moko 2021, 74–76; “Let the Holy Spirit Guide,” Banzembo, no. 143; Gospel Topics, “Seek Truth and Avoid Deception,” Gospel Library.

Koma makanisi. Kobongwana na nsango malamu ya Yesu Klisto elimboli nyonso mibale koyeba mpe kosalela nsango malamu. Okosala mingi na makambo oyo oyekoli soki okomi yango. Soki ozali koteya, senga bato oyo ozali koteya bakoma makanisi na bango ya molimo.

Moroni 10:8–25

Nzambe apesi ngai makabo ya molimo.

Ezali na banzela mingi moto akoki “koboya … makabo ya Nzambe” (Moroni 10:8). Bato basusu bandimaka te ete makabo oyo ya Nzambe kutu ezalaka. Basusu bazali kaka koboyaka makabo na bango na komonaka yango mpamba to kozangaka kokolisa yango. Ntango otangi Moroni 10:8–25, luka bosolo oyo ekosalisa yo okundola makabo na yo ya molimo mpe osalela yango mpo na kopambola bana ya Nzambe. Mituna lokola oyo ekoki kosalisa: Makabo ya molimo ezali nini? Bapesaka yango na banani? Mpo na nini bapesaka yango? Lolenge nini tozwaka yango? Okoki kokanisa bandakisa ya bato oyo basalelaka makabo oyo etangami na Moroni 10:9–16?

Moroni 10:30–33

Nakoki kobonga nie na nzela ya ngolu ya Yesu Klisto.

Toli ya Moloni mpo na “koya epai ya Klisto” esangisi mingi koleka koyekola mpe kokanisa na ntina na Ye. Na yango, oyo ezali libiangisi ya koya epai ya Klisto na lolenge malamu ya kokoka—kokoma lokola Ye azali. Ntango otangi Moroni 10:30–33, koma maloba maye makosalisa yo ososola nini elimboli koya epai ya Klisto, lolenge nini ekoki kosalema, mpe matomba oyo ewuti na kosalaka yango.

Tala nsima na boyekoli na yo ya Buku ya Mormon na mobu oyo, mpe komanyola nini oyokaki mpe oyekolaki na ntina ya Yesu Klisto. Ndakisa, lolenge nini Buku ya Mormon esalisi yo koya epai na Ye? Lolenge nini esalisi yo otia motema mobimba na ngolu na Ye? Lolenge nini esalisi yo “owangana te” nguya ya Mobikisi? Kanisa kokabola litatoli na yo moko ya Buku ya Mormon na moto moko oyo asengeli koyoka yango, bakisa mpe balingami mpe baninga oyo bakoki koyeba nsango na yango te.

Tala lisusu “Moroni Abiangi banso Baya epai ya Klisto” (video), Gospel Library.

Mpo na makanisi mosusu, tala banimero ya sanza oyo ya Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bilenge magazines.

Makanisi mpo na Koteya Bana

Moroni 10:3–4

Nakoki koyeba mpo na ngai moko ete Buku ya Moroni ezali solo.

  • Lolenge nini okoki kosalisa bana na yo na kondima libiangi ya Moroni ya kotuna Nzambe soki Buku ya Mormon ezali solo? Kanisa kopesa bango mwa nkasa oyo ezali na maloba boye Tanga, Kundola, Manyola, mpe Senga likolo na yango. Bana na yo bakoki kozwa maloba oyo kati na Moroni 10:3–4. Nini tosengeli kotanga, kokundola, komanyola, mpe kosenga mpo na kozwa to kolendisa matatoli na biso ya Buku ya Mormon? Bana na yo bakokaki mpe koluka bokokani kati na biteni yango mpe nzembo “Koluka, Komanyola, mpe Kosambela” (Children’s Songbook,, 109).

  • Bana na yo bakokaki kosalela elilingi oyo ezali na nsuka ya mwango oyo mpo na kolobela Moroni kokundaka bapalaki ya wolo (tala lisusu “Mokapo 54: Elaka ya Buku ya Mormon,” Masolo ya Buku ya Mormon, 156). Bana mike bakoki kosepela kosala lokola bazali Moroni kokoma na bapalaki mpe kokunda yango. Bokabola moko na mosusu matatoli na bino ya Buku ya Mormon.

Moroni 10:8–19

Tata na Lola apesi ngai makabo ya molimo.

  • Mpo na koteya bana na yo makabo ya molimo, okoki kokoma mituya 9 kino 16 na nkasa ekeseni mpe kozinga nkasa moko na moko lokola likabo. Bana na yo bakokaki kosala moto na moto na ntango na ye ya kofungola makabo, kotanga milongo uta na Moroni 10:9–16 oyo ekokani na mituya, mpe koyeba likabo moko na moko ya molimo. Okoki kolobela lolenge nini Tata na Lola alingi biso tosalela makabo oyo mpo na kopambola bana na Ye. Okoki lisusu kosalisa bana na yo bamona makabo oyo Tata na Lola apesi bango.

Moroni 10:32–33

Yesu Klisto alingi ngai koya epayi na Ye.

  • Bana na yo bayebi nini elimboli “koya epai ya Klisto”? Mbala mosusu okokaki kotanga Moroni 10:32 mpe kobengisa bango kozongela yango elongo na yo. Na nsima, bakokaki kokanga miso ntango ozali kotya elilingi ya Yesu esika moko boye na kisuku ya kolala. Nsima tika bango kofungola miso na bango, koluka elilingi, kosangana nzinganzinga na yango, mpe kolobela banzela oyo tokoki koya epayi ya Klisto. Mbala mosusu ekoki kosalisa soki okomi motuna yango Koya epayi ya Klisto elimboli nini? Salisa bango baluka Moroni 10:32–33 mpo na koluka biyano oyo ekoki kozwama (tala lisusu Biteni ya Bondimi 1:3–4). Bosala elongo mpo na kotanga oyo Klisto alingi biso tosala mpe nini Ye alaki kosala mpo na biso.

  • Mbala mosusu bana na yo bakosepela kosala mpe kokembisa bilembo oyo ezali lokola motema oyo elobi “Nalingi Nzambe na makasi na ngai nyonso, makanisi mpe nguyana ngai nyonso” (tala Moroni 10:32). Lokola bazali kosala yango, solola na bango na ntina ya lolenge nini tozali kolakisa Nzambe ete tolingaka Ye.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka, tala nimero ya sanza oyo ya Moninga magazine.

Elilingi
Moroni azali kokunda bapalaki ya wolo

Yambo ya kokunda bapalaki, Moroni abengisaki biso ete “tomikundola lolenge nini Nkolo azalaka na boboto” (Moroni 10:3)

Bimisa na lokasa