“Mingongo ya Bozongisi: Libota ya Joseph Smith,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: 2025 (2025)
“Libota ya Joseph Smith,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Libota mpe Eklezia: 2025
Mingongo ya Bozongisi
Libota ya Joseph Smith
Moko na moko totindikami na mozindo moko na bomoi ya libota na biso, mpe bokeseni ezalaki te mpo na Joseph Smith. Boyambi ya losambo mpe ya misala ya baboti na ye elonaki nkona ya bondimi oyo esalaki ete Bozongisi esalema. Zulunale ya Joseph elobeli maloba ya lokumu oyo: “Maloba mpe lokota [ezali] kokoka te mpo na kolakisa botondi oyo nasengeli kopesa epai ya Nzambe mpo na kopesaka ngai baboti ya lokumu boye.”
Maloba malandi uta na mama na ye, Lucy Mack Smith; ndeko na ye ya mobali William Smith; mpe Profeta ye moko epesi biso bososoli na nguya ya eyamba kati na libota ya Smith.
Lucy Mack Smith
“[Penepene na 1802], nakweyaki maladi. … Namilobelaki ngai moko, namilengeli te mpo na kokufa mpo ete nayebi te banzela ya Klisto, mpe emonanaki epai na ngai lokola ete ezalaki na lobwaku ya molili mpe wapi namiyoka kaka ngai moko katikati na ngai moko mpe Klisto ete namekaki kokatisa ngambo te. …
“Natalelaki Nkolo mpe nasengaki mpe nabondelaki epai ya Nkolo ete akoka kobatela bomoi na ngai ete nakoka kobokola bana na ngai mpe kolendisa motema ya mobali na ngai; boye nde natikalaki butu mobimba. Nasalaki boyokani na Nzambe [ete] soki akotika ngai na bomoi nakosala nyonso mpo nakota na eyamba oyo ekopesa ngai makoki ya kosalela ye malamu, ezala soki ekozwama na Biblia to na esika wapi mosusu nakokuta yango, ata soki esengelaki kozwama uta na lola na nzela ya losambo mpe bondimi. Na nsuka mongongo elobelaki ngai mpe elobaki, ‘Luka mpe okozwa, beta ekofungolelama yo. Tika motema na yo elendisama. Bondimela Nzambe; bondimela mpe ngai.’ …
“Uta na ntango oyo kokende liboso nakobaki kozwa makasi. Nalobaki kaka moke na ntina ya likambo ya eyamba atako etondisamaki na makanisi na ngai mobimba, mpe nakanisaki ete nakotia molende nyonso ntango kaka nakokaki kozala na makoki ya koluka moto ya botosi na Nzambe oyo ayebaki banzela ya Nzambe mpo na kolakisa ngai makambo ya Lola.”
William Smith
“Mama na ngai, oyo azalaki mwasi ya botosi na Nzambe mpenza mpe oyo azalaki na litomba mpo na bolamu ya bana na ye, bipai nyonso mibale awa mpe nsima ya bomoi, asalelaki banzela nyonso oyo bolingo na ye ya moboti ekokaki kopesa ye, mpo na kotindika biso tomipesa na kolukaka lobiko ya milimo na biso, to (lokola liloba ezalaki na ntango wana) ‘na kozwaka eyamba.’ Azalaki kolendisa biso tokende na mayangani, mpe pene na libota mobimba esepelaki na likambo yango, mpe bakomaki baluki ya bosolo.”
“Tozalaki ntango nyonso kosala nsambo ya libota mpo nakoki komikundola yango. Nazali komikundola malamu tata azalaki kotia maneti na libenga ya kazaka na ye, … mpe ntango biso bana mibali tozalaki komona ye alati matalatala na ye, tozalaki koyeba ete ezali elembo ya komilengela mpo na losambo, mpe soki tomonaki yango te mama akoyebisa biso, ‘William,’ to moto kani oyo azalaki epotu ya moto, ‘bomilengela mpo na losambo.’ Nsima ya losambo tozalaki na loyembo moko oyo tozalaki koyemba.”
Tata Joseph mpe Lucy Smith bateyaki libota na bango bayekola makomi.
Joseph Smith
“Nalobi sikawa, ete [tata na ngai] atikala kosala eloko moko ya mabe te oyo ekoki kolobelama ete ezangaki boboto, na bomoi na ye, na boyebi na ngai. Nalingaki tata na ngai mpe makanisi na ye; mpe makundoli ya misala na ye ya lokumu, efandi na bozito likolo ya molimo na ngai; mpe mingi ya maloba malamu mpe ya kimoboti na ye epai na ngai, ekomami na palaki ya motema na ngai. Ebulisama epai na ngai, ezali makanisi oyo nalingaka na lisolo ya bomoi na ye, oyo ezali na nguya na moto na ngai mpe epikami na kati, na botali na ngai moko uta mbotama na ngai. … Mama na ngai azali lisusu mwasi moko ya lokumu mpenza, mpe ya malamu koleka basi nyonso.”