Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya Mwambe 18–24: “Libongisi elongo na Elaka”: Malongi mpe Mayokani 89–92


“Sanza ya Mwambe 18–24: ‘Libongisi elongo na Elaka’: Malongi mpe Mayokani 89–92,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Malongi mpe Mayokani 2025 (2025)

“Malongi mpe Mayokani 89–92,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: 2025

libota ezali kolamba elongo

Sanza ya Mwambe 18–24: “Libongisi elongo na Elaka”

Malongi mpe Mayokani 89–92

Na Eteyelo ya Baprofeta, Profeta Joseph Smith ateyaki bampaka ya Yisalaele oyo etali kotonga bokonzi ya Nzambe likolo ya mabele. Basololaki makambo ya solo ya molimo, basambelaki elongo, bakilaki mpe bamilengelaki mpo na kosakola nsango malamu. Kasi ezalaki na eloko moko oyo etali esika wapi masolo ezalaki kosalema, eloko oyo ekoki komonana mabe epayi na biso lelo, mpe yango mpe emonanaki malamu te epayi ya Emma. Na ntango ya mayangani, mibali bazalaki komela makaya mpe kotafuna tumbako, oyo ezalaki momeseno na ntango wana, kasi ezalaki kotia matono ya moindo likolo ya mabaya ya nse mpe ezalaki kotika solo ya makasi na mopepe. Emma akabolaki mitungisi na ye na Joseph, mpe Joseph atunaki Nkolo. Eyano na Ye ezalaki emoniseli oyo ekendaki mosika koleka molinga mpe matono ya tumbaku. Likambo oyo epesaki Basantu, mpo na bankola oyo ekoya, “libongisi elongo na elaka”—bilaka ya bokolongono ya nzoto, “bwanya,” mpe “biloko ya motuya monene ya boyebi” (Malongi mpe Mayokani 89:3, 19).

Tala lisusu Basantu, 1:166–68.

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe na Eklezia

Malongi mpe Mayokani 89

elembo ya seminele
Nkolo apesaki ngai Liloba ya Bwanya mpo na kosalisa ngai nazala kolungonu na nzoto mpe molimo.

Ntango bampaka kati na Eteyelo ya Baprofeta bayokaki yambo Joseph Smith kotanga Liloba ya Bwanya, babwakaki mibokolo to pipe mpe batumbako ya kotia na monoko na bango kati na moto” (Basantu, 1:168). Balingaki kolakisa bango bolingi ya kotosa Nkolo. Ntango mosusu osila “kobwaka” na bomoi na yo biloko oyo Liloba ya Bwanya epekisaka, kasi nini lisusu okoki koyekola uta na emoniseli oyo? Tala makanisi oyo:

  • Kokanisa etali emoniseli lokola “libongisi elongo na elaka” (molongo 3)—bosolo elenda oyo ekambaka bozwi ekateli. Mabongi nini ozwi oyo ekoki kokamba mikano na yo? Mapamboli nini Nkolo alaki? (tala milongo 18–21). Lolenge nini Ye akokisaki bilaka oyo kati na bomoi na yo?

  • Bandakisa nini omoni ya “mabe mpe miango … na mitema ya bato oyo basanganaki na ekokolo” oyo lakisi Liloba ya Bwanya? (molongo 4). Na kobakisa na emoniseli oyo, Nkolo apesaki nini mpo na kosalisa yo okima to olonga bamabe oyo?

  • Emoniseli oyo etei yo nini oyo etaliNkolo? Lolenge nini Liloba ya Bwanya elimbolami na Malongi mpe Mayokani 29:34–35?

  • Nini otindami kosala mpo na kobatela nzoto na yo malamu koleka?

Okoki kozala osila kozwa libaku ya kolimbolela basusu mpo na nini obikaka Liloba ya wania—mpe okoki kozala na mabaku mingi koleka na mikolo ekoya liboso. Banza lolenge nini okoki kosalela mabaku oyo mpo na kotatola na ntina ya Mobikisi, bosantu ya banzoto, mpe bosolo mosusu ya molimo. Mpo na makanisi, tala “Nzoto na yo ezali bule,” Mpo na Bokasi ya Bilenge: Bokambi mpo na Kozala Maponi, 22–29.

Tala lisusu 1 Bakolinti 6:19–20; Thomas S. Monson, “Mabongisi mpe Bilaka,” Liahona, Sanza ya Zomi na moko. 2016, 78–79; Topics and Questions, “Word of Wisdom [Liloba ya Bwanya],” Gospel Library; “The Word of Wisdom,” kati na Revelations in Context, 183–91; “Addiction,” “Physical Health,” Life Help, Gospel Library.

4:39

Principles and Promises

Yekola mpe teya na nzela ya mabongisi. Na esika ya kokoma makambu oyo tokoki kosala to oyo tokoki kosala te, tokoki kobika na mabongisi mpo na kosalela bonsomi na biso ya kopona mpe bondimi na Klisto. Ndakisa, banza mituna oyo eyekami na mabongisi oyo etali Liloba ya Bwania: Mabongisi nini ekoki kopesa bolendisi na moto moko oyo azali komitungisa mpo na kotosa Liloba ya Bwania? Mabongisi nini ekoki kolendisa ngai ntango nazali na mpasi ya nzoto atako nazali kobika Liloba ya Bwania.

mwasi azali kosala yoga

Tata na Lola alingaka biso tobatela banzoto na biso.

Malongi mpe Mayokani 90:1–17

Bokambi ya Yambo ezali na “bafungola ya bokonzi.”

Na eteni 90, Nkolo apesaki makebisi oyo etali “mosala mpe bokambi” (molongo 12) ya Joseph Smith, Sidney Rigdon, mpe Frederick G. Williams—bato ya oyo tobengi sikawa Bokambi ya Yambo. Oyekoli nini oyo etaliBokambi ya Yambo uta na milongo 1–17? Banza kotala bansango ya kala te uta na baye ya Bokambi ya Yambo. Lolenge nini bango “batiaka alima na makambo nyonso ya eklezia mpe ya bokonzi oyo”? (molongo 16). Lolenge nini okoki kolakisa ete ezali te “likambo moko ya pepele” epayi na yo? (molongo 5).

Banza koyembaka to kotanga maloba na “Come, Listen to a Prophet’s Voice” (Hymns, no. 21) to loyembo mosusu etali baprofeta oyo balakisi mateya ya milongo oyo. Lolenge nini mosala ya Bokambi ya Yambo esungaki yo oyeba Tata na Lola mpe Yesu Klisto?

Malongi mpe Mayokani 90:24

“Makambo nyonso ekosala elongo mpo na [ya ngai] bolamu.”

Manyola mayele ya mosala oyo ozwi mpe oyo etatoli elaka ya Nkolo na Malongi mpe Mayokani 90:24. Kanisa kokoma mayele na yo mpe kabola yango na moto moko ya libota to molingami moko—ntango mosusu moto moko oyo azali na mposa ya elikya to bolendisi. Soki ezali na mapamboli oyo ozali naino kozela sikawa, manyola oyo okoki kosala mpo otikala sembo ntango ozali kozela komona lolenge nini “makambo nyonso ekosalema elongo mpo na bolamu na yo.”

Malongi mpe Mayokani 90:28–31

Vienna Jaques azalaki nani?

Vienna Jaques abotamaki na sanza ya motoba June 10, 1787, na Massachusetts. Mwasi ya bondimi oyo azalaki na misolo mingi, Vienna akutanaki yambo na bamisionele na 1831. Nsima ya kozwa litatoli ya molimo ete nsango na bango ezalaki solo, ye, akendaki mobembo mpo na kokutana na Profeta na Kirtland, Ohio, esika wapi abatisamaki.

Vienna atosaki toli ya Nkolo epayi na ye na Malongi mpe Mayokani 90:28–31. Bobulisi na ye epayi ya Nkolo, mpe lisusu mabonza asalaki na ebandeli na Kirtland, ekomaki na ntango ya mpasi mpo na Eklezia, ntango bakambi bazalaki komeka kosomba mabele epayibwapi Tempelo ya Kirtland esengelaki kotongama. Vienna azalaki “sembo, mpe … goyi-goyi te” na bomoi na ye mobimba mpe na nsuka afandaki na “kimia” (molongo 31) na Valley ya Salt Lake, wapi esika akufaki na mibu 96.

Malongi mpe Mayokani 91

“Molimo alakisaki bosolo.”

Biso nyonso tokutanaka na basango oyo ezali na “makambo ebele … oyo ezali solo” mpe “makambo mingi … oyo ezali solo te” (Malongi mpe Mayokani 91:1–2). Toli nini ozwi kati na molongo 91 oyo ekoki kosalisa yo ososola bosolo kati na bansango oyo omoni? Lolenge nini Molimo esalisaki yo ososola bosolo uta na libungi?

Mpo na makanisi mingi koleka, tala nsango ya sanza oyo na Liahona mpe Mpo na Bokasi ya Bana bamagazini.

elembo ya eteni ya bana 02

Makanisi mpo na Koteya Bana

Malongi mpe Mayokani 89

Liloba ya Bwania esalisaka ngai nazala kolungonu mpe molimo.

  • Mpo na koyingisa eteni 89, ntango mosusu yo mpe bana na yo bokoki kotala elilingi ya tempelo to koyemba loyembo etali bokolungonu ya nzoto, lokola “The Lord Gave Me a Temple [Nkolo Apesaki Ngai Tempelo]” (Children’s Songbook, 153), mpo na koteya ete banzoto na biso ezali lokola batempelo mpo na milimo na biso. Salisa bana na yo basala ndenge bakoki kobatela banzoto na bango.

  • Mpo na koyekola mitindo ya Nkolo kati na Malongi mpe Mayokani 89:10–17, yo mpe bana na yo bokoki koyema to kotala bililingi ya makambo ya malamu oyo tokoki kolia to kobatela banzoto na biso (tala elilingi mpe lokasa ya molulu na nsuka ya mwango oyo). Nini Nkolo akebisi biso tosalela te? Mpo na nini Ye alingaka biso tobatela banzoto na biso?

  • Mpaka Gary E. Stevenson ateyaki bato ya bilenge balengela liboso oyo bakosala ntango bakomekama na masanga ya milangwa to lopipi. Ye ateyaki: “Bokomona ete lisenginya ekozala na nguya moke likolo na bino. Osilaki kozwa mokano ya boniboni okoyanola mpe nini okosala. Okozala na mposa ya kozwa ekateli ntango nyonso te” (“Your Priesthood Playbook [Buku ya lisano ya Bonganganzambe na Yo],” Liahona, Sanza ya Mitano 2019, 48). Nsima ya kotanga elongo Malongi mpe Mayokani 89:4 mpe esakola ya Mpaka Stevenson, solola elongo na bana na yo oyo etali lolenge nini bakoki kozwa ekateli sikawa—mpo na mikolo etikali ya babomoi na bango—mpo na kobika Liloba ya Bwania. Okoki kosala lisano ya lolenge nini bakoki koyanola soki moto songolo, kutu moninga, alakisi bango eloko moko oyo ebongi te na Liloba ya Bwania. Lolenge nini Nkolo apambolaka biso ntango totosaka Liloba ya Bwania? (tala milongo 18–21).

bana bazali kosakana na libongo

Nzoto na biso ezali likabo uta na Nzambe.

Malongi mpe Mayokani 90:5

Nzambe apesaka ngai baprofeta mpo na kokamba mpe kobatela ngai.

  • Bokoki kotala bililingi ya baprofeta ya kala to koyemba loyembo lokola “Follow the Prophet [Bolanda Profeta]” (Children’s Songbook, 110–11). Lolenge nini Nzambe apambolaki bana na Ye na nzela ya baprofeta na Ye? Mpo na nini toyokaka baprofeta ya Nzambe? (tala Malongi mpe Mayokani 90:5). Nsima yo mpe bana na yo bokoki kotala elilingi ya profeta ya bomoi mpe kokabola makambo oyo Nkolo ateyaki to akebisaki biso na nzela na ye. Lolenge nini tokoki kolanda profeta?

Malongi mpe Mayokani 91

Molimo ekoki kosalisa ngai nayeba oyo ezali solo.

  • Okoki koloba na bokuse moto ya eteni mpo na Malongi mpe Mayokani 91 mpo na kosalisa bana na yo basosola mpo na nini emoniseli oyo epesamaki. Bakoki nsima kokanisa bisika, lokola na kati na bopanzi nsango, epayi eye tozwaka “makambo mingi … oyo ezali solo” mpe “makambo mingi … oyo ezali solo te” (milongo 1–2). Nini milongo 4–6 etei biso oyo etaliMolimo Mosantu? Lolenge nini Molimo Mosantu esungaka biso toyeba oyo ezali solo?

Mpo na makanisi mingi koleka, tala nsango ya sanza oyo na magazini ya Moninga .

mbuma

“Nkona nyonso ezali malamu mpo na bilei ya moto; lokola lisusu mbuma ya nzete ya vino.”

lokasa ya molulu mpo na bana