“Mingongo ya Bozongisi: Lingomba ya Bamama Basungi,” Yaka, Landa Ngai—mpo na Ndako mpe Eklezia: Malongi mpe Mayokani 2025 (2025)
“Lingomba ya Bamama Basungi,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: 2025
Mingongo ya Bozongisi
Lingomba ya Bamama Basungi
Na 1842, nsima ya kobongisama ya Lingomba ya Bamama Basungi na Nauvoo, Illinois, Profeta Joseph Smith alobaki, “Eklezia ebongisamaki naino malamu te kino basi babongisamaki boye.” Na lolenge moko, boyekoli ya Bozongisi ya Eklezia ya Nkolo mpe bonganganzambe na Ye ekokisami naino te kino ekokotisa lboyekoli ya Lingomba ya Bamama Basungi, oyo yango moko ezali “bozongisi ya ndakisa moko ya kala” ya basi oyo bazalaki bayekoli ya Yesu Klisto.
Eliza R. Snow azalaki na mokumba monene kati na bozongisi wana. Azalaki wana ntango Lingomba ya Bamama Basungi ebongisamaki yambo mpe, lokola sekeletele ya lingomba, azalaki kokoma na ntango ya makita. Atatolaki moto ya yambo ete Lingomba ya Bamama Basungi ebongisamaki “na kolandaka ndakisa ya bonganganzambe.” Oyo elandi ezali maloba na ye, oyo ekomamaki ntango azalaki kosala lokola Mokambi Monene ya mibale na Lingomba ya Bamama Basungi, mpo na kosalisa bandeko na ye ya basi basosola mosala ya bonzambe oyo epesamaki na bana basi ya boyokani ya Nzambe.
Mpo na koyekola mingi oyo etali lolenge nini Lingomba ya Bamama Basungi ebongisamaki, tala Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2017), 1–25; Mibu Ntuku mitano Yambo ya Lingomba ya Bamama Basungi (2016), 3–175.
Eliza R. Snow
“Atako nkombo ya [Lingomba ya Bamama Basungi] ekoki kozala ya mokolo ya sika, libongisi oyo ezali ya kala. [Joseph Smith] ayebisaki biso, ete lingomba kaka moko oyo ezalaki kati na Eklezia ya kala, lolenge moko na oyo esalemaki na mikanda ekomama na Kondimana na Sika, kosalelaka nkombo, ‘mwana mwasi aponama’ [tala 2 Yoane 1:1; Malongi mpe Mayokani 25:3].
“Oyo ezali lingomba oyo ekoki te kozala soki Bonganganzambe ezalaki te, uta na likambo oyo etali likoki na yango nyonso mpe nguya uta na ebandela wana. Ntango Bonganganzambe elongolamaki na mabele, libongisi oyo lokola mpe makambo nyonso mosusu ya molongo ya solo ya Eklezia ya Yesu Klisto likolo ya mabele, ebungaki. …
“Kozala kati na lingomba ya ‘Bamama Basungi ya Basi ya Nauvoo,’ … mpe kozalaka na boyebi ya sikisikikati na lisanga wana, ntango mosusu nakoki kosolola mwa ndambo ya toli oyo ekosunga bana basi ya Siona na kokendaka liboso na mokumba oyo ya ntina mpenza, oyo etondisami na mikumba ya sika mpe ekomisami ebele. Soki elenge mwasi songolo mpe bamama na Yisalaele bayoki na ndambo ya mikumba na bango kati ya boyangeli na bango, bakozwa sikawa makoki mpo na nguya mpe makokii ya kosala bolamu na oyo bapambolameli na mosuni mpenza. …
“Soki mituna eyei na makanisi, ya moto songolo, Nini ezali ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi? Nakoki koyanola—mpo na kosala bolamu—mpo na kosenga ete oyo nyonso azali na makoki oyo tozali na yango mpo na kosala bolamu, asala yango kaka mpo na kosunga babola te kasi mpo na kobikisa milimo. Bosangisi ya bokasi ekokokisa makambo mingi koleka oyo ekoki kokokisama te na moto oyo aleki banso na bokasi. …
“Na kosalisaka babola, Lingomba ya Bamama Basungi ya Basi ezali na mikumba misusu ya kosala koleka lisungi oyo esengami na nzoto. Bobola ya mayele mpe na maladi ya motema, yango mpe esengaka bokebi; mpe mbala mingi liloba ya bosembo—mwa maloba moke ya toli, to kutu mbote ya loboko ya esengo mpe ya bolingo ekosala boalamu mpe ekosepelisa malamu koleka saki ya wolo. …
“Ntango Basantu basangani uta na mboka ya bapaya, ntango bazali bapaya epayi ya moto nyonso, mpe bazali pembeni ya kokambama mosika na baoyo babombanaka mpo na kokosa, Lingomba ya Bamama [Basungi] esengeli kozala na mpiko ya kotala nsima na [bango], mpo na koyingisa bango kati na lingomba oyo ekobongisa mpe etombolaka bango, mpe likoloi nyonso kolendisa kati na bondimi ya Nsango malamu, mpe na kosalaka bongo, ekoki kozala esalelo na kobikisaka mingi.
“Ekoki kosenga babuku ya mikanda minene mpo na kolimbola misala, matomba mpe mikumba oyo eyaka kati na boyebi ya Lingomba. … Kende na yango (na nse ya bokambi ya episikopo na yo) na kimia, na bosembo, na bompikiliki, na lisanga mpe na losambo, mpe Nzambe akolatisa makasi na yo motole ya elonga.”