Yaka, Landa Ngai 2024
Sanza ya zomi na moko 10–16: “Namoni Mabonza na Yo na Botosi”: Malongi mpe Mayokani 129–132


“Sanza ya zomi na moko 10–16: ‘Namoni Mabonza na Yo na Botosi’: Malongi mpe Mayokani 129–132,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: Malongi mpe Mayokani 2025 (2025)

“Malongi mpe Mayokani 129–132,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Ndako mpe Eklezia: 2025

Joseph Smith azali koteya

Ndimbola uta Joseph Smith in Nauvoo, 1840, na Theodore Gorka

Sanza ya zomi na moko 10–16: “Namoni Mabonza na Yo na Botosi”

Malongi mpe Mayokani 129–132

Na nzela ya Joseph Smith, Nkolo alongolaki mabombami mosusu ya boseko. Bonene ya Nzambe, nkembo ya lola, mpe bonene ya boseko ekoki komonisama ya kokokana na pole ya nsango malamu ezongisama, kutu na bandelo ya milimo lokola ya biso. Bimoniseli kati na Malongi mpe Mayokani 129–32 ezali ndakisa malamu. Nzambe akokani na nini? Ye “azali na nzoto … ya mosuni lokola ya moto.” Lola ezali lokola nini? “Lolenge moko ya lingomba ya bato oyo ezali kati na biso awa ekozala kati na biso kuna” (Malongi mpe Mayokani 130:22, 2). Bongo, moko ya bisengo ya babosolo etali lola ezali ete ekoki kozala na kati nna bozalani ya libota na biso ya kitoko, soki ekangisami na likoki elongobana. Bosolo lokola oyo ekoki kokomisa lola mosika mingi te—ya nkembo, kasi pete mpo na kozwama.

Kasi nsima, ntango mosusu Nzambe akoki kosenga biso tosala makambo oyo ezali mpenza ya kpokoso mpe oyo emonanaka lokola ekoki kozwama te. Mpo na Basantu mingi ya ebandeli, libala na basi mingi ezalaki moko ya motindo ya bongo. Ezalaki momekano ya mpasi ya bondimi mpo na Joseph Smith, mwasi na ye Emma, mpe penepene na banso oyo bazwaki yango. Mpo na kolonga momekano oyo, basengelaki mingi kozala kaka na mayoki ya malamu mpo na nsango malamu ezongisami; basengelaki kozala na bondimi na Nzambe oyo ekendaki mosika na mozindo koleka. Motindo wana ezali lisusu te lelo, kasi ndakisa ya bondimi ya baoyo basalelaki yango ezali naino. Mpe ndakisa oyo ezali kofulaka biso ntango basengi biso tosala ya biso moko “mabonza na botosi” (Malongi mpe Mayokani 132:50).

elembo ya boyekoli

Makanisi mpo na koteya na Ndako mpe Eklezia

Malongi mpe Mayokani 130–132

Nzambe alingi konetola bana na Ye.

Ezali na makambo ebele oyo toyebi te etali bonetoli to bomoi na ndelo ya likolo ya bokonzi ya Nzambe—lolenge ya bomoi oyo Nzambe abikaka. Mingi na yango ekoki kozala likolo ya likoki na biso ya lelo mpo na kososola. Kasi Nzambe abimisaki mwa makambo moko ya motuya, mpe mingi na yango ezwami kati na Malongi mpe Mayokani 130–32. Bokoki kotanga elongo na mituna lokola oyo na makanisi: Nini nayekoli oyo etali Nzambe? Nayekoli nini etali bomoi nsima ya kufa? Lolenge nini nsango oyo etali bomoi ya seko epambolaka bomoi na ngai sikawa?

Tala lisusu “Our Hearts Rejoiced to Hear Him Speak,” na Revelations in Context, 277–80.

Malongi mpe Mayokani 130:20–21; 132:5

Nzambe apambolaka bato oyo batosaka mibeko na Ye.

Lolenge nini okoloba na maloba na yo, oyo Nkolo azali koteya yo kati na Malongi mpe Mayokani 130:20–21 mpe 132:5? Manyola lolenge nini libongisi oyo elakisamaki na bomoi na yo.

Mbala mosusu, atako ntango tozali batosi Nzambe, mapamboli tolikiaka eyaka te mbala moko. Lolenge nini obombaka bondimi na yo mpe elikya ntango yango eyaka? Luka babomoni oyo kati na nsango ya Mpaka D. Todd Christofferson “Our Relationship with God” (Liahona, Sanza ya mitano 2022, 78–80).

Tala lisusu 1 Nefi 17:35; Malongi mpe Mayokani 82:10.

Malongi mpe Mayokani 130:20–21

elembo ya seminele
Tata ya Lola asalaki ete ekoka kosalema mpo mabota ezala seko.

Na nzela ya Profeta Joseph Smith, Nkolo azongisaki bosolo ete libala mpe bozalani ya libota ekoka kozala seko. Ntango azali kotanga Malongi mpe Mayokani 132:13–21, luka maloba oyo ekosalisa yo ososola bokeseni katikati ya oyo “ekotikala” seko mpe oyo ekotikala te. Okanisi elimboli nini mpo na bozalani na libala “na [Nkolo]”? (molongo 14).

Na kati ya nsango na ye “In Praise of Those Who Save,” Mokambi Dieter F. Uchtdorf akesenisi bozalani ya libala ya seko na makambo ya “kobwakisa” (Liahona, Sanza ya mitano 2016, 77–78). Nini bokeseni oyo eteyi yo oyo etali lolenge nini ya koleyisa—to komilengela mpo na—bozalani na libala? Kanisa oyo etali bozalani ya libota na yo—sikawa mpe na mikolo ekoya liboso—ntango ozali kotanga nsango ya Mpaka Uchtdorf. Ozwi nini kuna oyo epesi yo elikya na Klisto mpo na bozalani ya libota na yo?

Mokambi Henry B. Eyring akabolaki toli oyo azwaki ntango azalaki komitungisa oyo etali lolenge ya libota na ye: “Osengeli bobele kotambwisa bomoi elongobani na bokonzi ya selesitiale, mpe mabongisi ya libota na yo ekozala kitoko mingi koleka oyo okoki kobanza” (na “A Home Where the Spirit of the Lord Dwells,” Liahona, Sanza ya mitano 2019, 25). Lolenge nini toli oyo esalisaka yo to moto songolo oyebi?

Tala lisusu “Families Can Be Together Forever,” Hymns, no. 300; Topics and Questions, “Marriage,” Gospel Library.

mobali mpe mwasi libanda ya tempelo

Libala ekoki kokangisama mpo na libela kati na ndako ya Nkolo.

Malongi mpe Mayokani 132:1–2, 29–40

Libala na balongani mingi endimami na Nzambe bobele ntango Atindi yango.

Bato ebele oyo batangaka Kondimana na Kala bamitunaka oyo etali Abalayama, Yakobo, Mose, mpe basusu oyo babalaki basi mingi. Basali oyo ya Nkolo bazalaki kosala ekobo? Nzambe andimaki mabala na bango? Joseph Smith azalaki na mituna ya lolenge moko. Luka biyano Nzambe apesi na Malongi mpe Mayokani 132:1–2, 29–40.

Libala ya mobali moko mpe mwasi moko ezali motindo ya Nzambe ya libala (tala moto ya eteni ya Esakola ya Bakambi 1; Yakobo 2:27, 30). Nzokande, azalaki na bangonga ntango Nzambe atindaki bana na Ye basalela libala na basi mingi.

Mibu ya ebandeli ya Eklezia ezongisami ezalaki moko ya bileko wana ya bokeseni. Soki olingi koyekola mingi mpo na oyo etali libala na basi mingi kati na Basantu ba Mikolo mya Nsuka ya ebandeli, tala “Mercy Thompson and the Revelation on Marriage” (na Revelations in Context, 281–93); Saints, 1:290–92, 432–35, 482–92, 502–4; Topics and Questions, “Plural Marriage in The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints,” Gospel Library; “Mpo na nini Ezalaki Ntina mpo na Joseph Smith mpe Basusu Babala Basi Ebele?” (video), ChurchofJesusChrist.org.

10:7

Why was it necessary for Joseph Smith and others to practice polygamy?

elembo ya eteni ya bana 03

Makanisi mpo na Koteya Bana

Malongi mpe Mayokani 130:2, 18–19; 132:13, 19

Tata na Lola alingaka ngai natalela makambo ya seko.

Malongi mpe Mayokani 130:20–21132:5, 21–23

Nzambe apambolaka ngai ntango natosaka mibeko na Ye.

  • Ntango mosusu lisano ya pete ekoki koteya bana na bino na oyo etali kotosaka mitindo ya Nzambe. Ndakisa, bokoki kotuna bango bapesa bino bokambi mpo na kotambola esika songolo, lokola na eteyelo to na etonga ya Eklezia. Nini ekomaka ntango tolandaka babokambi yango te? Nsima bokoki kotanga Malongi mpe Mayokani 130:21 mpe kokanisa babokambi oyo na mitindo ya Nzambe apesaki biso.

  • Bokoki lisusu koyemba elongo loyembo oyo etali botosi, lokola “Keep the Commandments” (Children’s Songbook, 146–47), mpe koluka maloba kati na Malongi mpe Mayokani 130:20–21 mpe 132:5 oyo ekokani na oyo kati na loyembo. Lolenge nini Nzambe apambolaka biso ntango tozali koluka kobatela mitindo na Ye?

Malongi mpe Mayokani 130:22

Tata na Lola mpe Yesu Klisto bazali na banzoto ya mosuni ezanga nkufa.

  • Nsima ya kotanga Malongi mpe Mayokani 130:22 elongo, bino mpe bana na bino bokoki kotala elilingi ya Yesu Klisto mpe kotala misu na Ye, monoko na Ye, mpe biteni misusu ya nzoto na Ye. Bana na bino bakokoki kotala na biteni mokomoko oyo ya nzoto na bango moko. Boyebisa bango mpo na nini ezali motuya koyeba ete nzoto na biso ekokani ya nzoto ya Tata na Lola mpe Yesu Klisto.

mwasi mpe elenge mwasi libanda ya tempelo

Na ntina ya makuli na kati ndako ya Nkolo, mabota ekoki kozala mpo na libela na libela.

Malongi mpe Mayokani 132:19

Tata na Lola asali ete ekoka kosalema mpo mabota ezala elongo seko.

  • Bosalisa bana na bino bazwa bandakisa ya biloko oyo ewumelaka libela te—bilei oyo epolaka, fololo oyo enzulukaka, mpe bongo na bongo. Nsima botala Malongi mpe Mayokani 132:19 elongo mpe bozwa maloba ya motuya lokola “boyokani ya seko,” “kokangisama,” “na boseko nyonso,” mpe “libela na libela.” (Tala lisusu “Mokapo 55: Esakola oyo etali Libala,” na Masolo ya Malongi mpe Mayokani, 198, to video oyo ekokani kati na Gospel Library.) Bokoki lisusu kotala bililingi ya libota na bino mpe kotatola ete Nkolo asalaki yango ezala, na nzela ya makuli mpe mayokani ya tempelo, mpo ete mabala ewumela seko.

0:42

Chapter 55: A Revelation about Marriage: July 1843

Bosala keba na bizalela ya libota. “Bana lelo bamimonaka bango moko kozala kati na mabota ekesena mpe etonda na makambo ndenge na ndenge. … [Biso] tosengeli kosalisa [baoyo] bamiyokaka kozala bango moko, na ngambo ya loboko ya mwasi na nsima, to libanda ya efelo” (Neil L. Andersen, “Whoso Receiveth Them, Receiveth Me,” Liahona, Sanza ya mitano 2016, 49, 52).

Mpo na makanisi mingi koleka, tala nsango ya sanza oyo na magazini ya Moninga .

kisuku ya bokangisi

Kisuku ya bokangisi kati na Tempelo ya Paris na France.

lokasa ya molulu mpo na bana