“Sanza ya mibale 15–21. Malongi mpe Mayokani 14–17: ‘Telema lokola Nzeneneke,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)
“Sanza ya mibale 15–21. Malongi mpe Mayokani 14–17,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021
Sanza ya mibale 15–21
Malongi mpe Mayokani 14:17
“Telema lokola Nzeneneke”
Libota ya Joseph Smith mpe baninga na ye basusu basengaki ye mbala mosusu koluka emoniseli mpo na oyo Nzambe alingaki bango basala. Ntango ozali kotanga bimoniseli oyo, kanisa nzela nini Nzambe abombi mpo na yo.
Koma Makanisi na Yo
Atako mosala ya bobongoli ezalaki kokende liboso malamu, na Sanza ya mitano 1829 bomoi ya Joseph, Emma, mpe Oliver ekomaki mpasi mingi na Harmony. Kobundisama na bato ya nzinganzinga ezalaki komata na ntango lisungi ya libota ya Emma ezalaki kokita. Lokola bamonaki ete Harmony ezalaki lisusu esika ya bokengi te, Oliver akendaki epai ya moninga moko oyo alakisaki litomba na mosala ya Joseph Smith: David Whitmer. David azalaki kofanda na baboti mpe bandeko na ye na Fayette, New York, mosika pene ya bakilometele 160. Akutanaki na Oliver mobu moko eleki, mpe Oliver akomelaki ye mikanda mingi uta ntango wana, kokabolaka mayele azwaki na kosalaka elongo na Profeta. Ezala David to moto moko ya libota na ye moko te akutanaka na Joseph. Kasi ntango Oliver asengaki soki ye na Joseph bakokaki kokende na ndako ya Whitmer mpo na kosilisa bobongoli ya Buku ya Mormon, libota ya Whitmer bafungolelaki bango bikuke na bango. Mpe Nkolo azalaki ya kobomba makambo mingi mpo na libota ya Whitmer na esika ya kopesa bobele esika ya kofanda na Profeta. Profeta azwaki malako moko malengelamaki mpo na bango, maye ezwami na Malongi mpe Mayokani 14–17, mpe ntango wana basengelaki kokoma moko ya mabota ya ebandeli ya Eklezia mpe banzeneneke ya Bozongisi oyo ezali kosalemaka sikawa.
Mpo na koyeba mingi na ntina ya libota ya Whitmer, tala Les Saints, 1:68–71.
Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko
Nakoki kosala na “mosala monene mpe kitoko.” ya Nzambe
Ntango akutanaki na Joseph Smith, David Whitmer azalaki elenge mobali oyo amipesaki na mosala na ye ya bilanga ya libota. Kasi Nkolo azalaki na mosala mosusu na makanisi mpo na David—atako na ndenge mosusu ezalaki mwa lolenge moko lokola mosala ya bilanga. Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 14:1–4, tala lolenge nini Nkolo akokanisi mosala na Ye na oyo ya David amesanaki na yango. Oyekoli nini na ntina ya mosala ya Nkolo uta na emekiseli oyo?
Lolenge nini okoki “kobwaka ya yo] likwangola”? (molongo 4). Tala bilaka epesami na eteni oyo mobimba epai na baoyo “balukaka komema liboso mpe kotia … Siona” (molongo 6).
Liloba ya Nzambe ezali “na bomoi mpe na nguya.”
Nkolo akokanisi liloba na Ye na “mopanga oyo bapelisi ngambo nyonso mibale” (Malongi mpe Mayokani 14:2). Emekiseli oyo eteyi yo nini na ntina ya liloba ya Nzambe? Ndakisa, lolenge nini liloba na Ye ezali na bomoi, nguya mpe ya kopela? Lolenge nini otikala koyoka nguya ya liloba ya Nzambe?
Kanisa banzela mosusu oyo Nzambe azali kolimbola mosala na Ye. Ndakisa, oyekoli nini na ntina ya liloba ya Nzambe uta na bimekiseli na biteni oyo elandi?
Bomoi ya seko ezali “likabo ya monene koleka makabo nyonso ya Nzambe.”
Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 14:7, manyola mpo na nini bomoi ya seko ezali “likabo ya monene koleka makabo nyonso ya Nzambe.” Likanisi ya mozindo oyo uta na Mokambi Russell M. Nelson esengeli kosalisa: “Na moango monene ya esengo ya Nzambe, mabota makoki kokangisama kati na batempelo mpe komilengela mpo na kozonga kofanda libelaliboso na Ye. Wana ezali bomoi ya seko!” (“Matondi Epai ya Nzambe,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2012, 77).
Kanisa kobakisa matangi oyo makokani na molongo 7 oyo esungaka yo kososola mingi na ntina ya bomoi ya seko (tala “Bomoi ya Seko” na Mokambi na Masolo to Mokambi na Makomi, scriptures.ChurchofJesusChrist.org). Nini oyekoli oyo efuli yo mpo na koluka bomoi ya seko?
Komema milimo epai ya Klisto ezali mosala ya motuya monene.
John mpe Peter Whitmer bango mibale balingaki koyeba nini “esengelaki kozala ya motuya monene koleka nyonso” na bomoi na bango (Malongi mpe Mayokani 15:4; 16:4). Omitungisaka mpe na ntina na ya motuna oyo mpo na yo moko? Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 15–16, manyola mpo na nini komema milimo epai ya Klisto ezali likambo ya motuya monene boye. Lolenge nini okoki kobengisa milimo epai ya Klisto?
Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 18:10–16.
Nkolo asalelaka banzeneneke mpo na kotia liloba na Ye.
Nzeneneke azali nani? Mpo na nini Nkolo asalelaka banzeneneke na mosala na Ye? (tala 2 Bakolinti 13:1). Manyola mituna oyo ntango ozali kotanga maloba ya Nzambe epai ya Banzeneneke Misato na Malongi mpe Mayokani 17. Ekoki mpe lisusu kosalisa soki botali “Litatoli ya Banzeneneke Misato” na Buku ya Mormon. Lolenge nini Banzeneneke basungaka mpo na komema “bantina ya bosembo” ya Nzambe? (molongo 4).
Boyebaki ete Mary Whitmer azwaki mpe litatoli ya bapalaki ya wolo? Anjelu Moroni alakisaki yango epai na ye lokola kondimama ya bomipimi to komibonzela asalaki ntango Joseph, Emma, mpe Oliver bafandaki na ndako na ye (tala Basantu, 1:70–71). Oyekoli nini uta na maye ayebaki na ntina ya kozwa litatoli?
Tala lisusu Saints, 1:73–75; Ulisses Soares, “The Coming Forth of the Book of Mormon,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2020, 32–35.
Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa
-
Malongi mpe Mayokani 14:1–4.Kanisa kobengisa libota na yo koluka mpe kozwa masakoli matali kosala bilanga na biteni oyo. Mpo na nini Nkolo asengelaki kokokanisa mosala na Ye na bobuki mbuma? Nini tokoki kosala mpo na kosalisa na mosala na Ye?
-
Malongi mpe Mayokani 14:2.Oyo bosengeli kosala mpo na molongo oyo na “Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko” etangi mwa biteni ya makomi na ntina ya liloba ya Nzambe. Ntango mosusu bato ya libota bakoki kotanga yango mpe kokabola oyo bayekoli. Lolenge nini biteni ya makomi oyo efuli biso mpo na “kopesa bokebi” na liloba ya Nzambe?
-
Malongi mpe Malongi mpe Mayokani 15:6; 16:6.Milongo oyo ekoki kofula lisolo moko na ntina ya makambo oyo ezali ya motuya mingi koleka na libota na yo (tala lisusu Malongi mpe Mayokani 18:10).
-
Malongi mpe Mayokani 17.Libota na yo ekoki kosepela koyemaka bilili ya biloko moko moko oyo Banzeneneke Misato bamonaki (tala molongo 1). Ntango ozali kotanga Eteni 17, luka masakoli oyo eteyaka na ntina ya Buku ya Mormon. Lolenge nini tokoki kozala banzeneneke ya Buku ya Mormon? Libota na yo ekoki lisusu kotala video “A Day for the Eternities” (ChurchofJesusChrist.org).
Mpo na kozwa makanisi mingi mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo in Come, Follow Me—For Primary.
Loyembo oyo ekoki koyembama: “Nakokende Epai oyo Yo olingi Ngai nakende,” Cantiques, no. 270.
Mingongo ya Bozongisi
Lucy Mack Smith mpe Banzeneneke Misato mpe Mwambe
Anjelu Moroni alakisaki bapalaki ya wolo epai ya Joseph Smith, Oliver Cowdery, David Whitmer, mpe Martin Harris na zamba pene ya ndako ya Whitmer na Fayette, New York. Baboti ya Joseph bazalaki koya kotala libota ya Whitmers. Lucy Mack Smith, mama ya Joseph, alakisaki nguya ya makamwisi oyo likolo ya banzeneneke:
“Ezalaki na katikati ya ngonga ya misato mpe ya minei. Mama Whitmer mpe tata Smith mpe ngai moko tofandaki na chambre to kisuku. Nafandaki penepene ya mbeto. Ntango Joseph akotaki, amibwakaki na nse pene na ngai. ‘Tata! Mama!’ elobaki ye. ‘Boyebi te lolenge nini nazali na esengo. Nkolo asali ete bapalaki emonisama epai ya basato misusu mpe ngai, oyo bamoni anjelu mpe basengeli kotatola bosolo oyo nalobaki. Mpo bayebi bango moko ete nalingaka kokosa bato te. Mpe namiyoki lokola motema ekiti na mokumba monene, oyo ezalaki mbele kolekela ngai namema. Kasi basengeli sikawa komema eteni, mpe esepelisi molimo na ngai ete nazali kaka ngai moko te na mokili.’ Nsima Martin Harris akotaki. Amonanaki lokola ya kotondisama na esengo mingi. Nsima atatolaki na oyo amonaki mpe ayokaki, lokola basusu basalaki, Oliver mpe David. Litatoli na bango ezalaki lolenge moko na oyo ezwamaki na Buku ya Mormon. …
“Martin Harris mingimingi amonanaki kozala na bozangi makoki ya kotalisa mayoki na ye na maloba. Alobaki, ‘namonaki sikawa anjelu uta na Lola oyo atatolaki na ntembe te bosolo ya nyonso oyo nayokaki na ntina ya nkoma ya makomi, mpe miso na ngai etalaki ye. Natalaki lisusu bapalaki mpe nasimbaki yango na maboko na ngai mpe nakoki kotatola na ntina na yango na mokili mobimba. Kasi nazwaki mpo na ngai moko litatoli ete maloba ekoki te kolobela, oyo monoko moko te ekoki kolimbola, mpe napamboli Nzambe na bosolo ya molimo na ngai ete azali na bonkonde mpo na kokmisa ngai, kutu ngai, nzeneneke ya bonene ya mosala na Ye mpe miango na ye na nkombo [ya] bana ya bato.’ Oliver mpe David lisusu basanganaki na ye na masanjoli ya lokumu epai ya Nzambe mpo na bolamu mpe mawa na Ye. Tozongaki na ndako [na Palmyra, New York,] mokolo elandi na esengo, kosepelaka na mwa lisanga moke ya bato.”1
Lucy Mack Smith azalaki mpe wana ntango Banzeneneke Mwambe bazongaki uta na makambo bakutanaki na yango:
“Nsima ya bozongi ya banzeneneke oyo na ndako, anjelu abimelaki lisusu Joseph; na ntango Joseph azalaki kopesa bapalaki na maboko na ye. Na mpokwa wana tosalaki likita moko, na liye wapi banzeneneke nyonso batatolaki makambo lokola elobelami likolo; mpe libota na biso mobimba, kutu na Don Carlos [Smith], oyo azalaki na mibu 14, atatolaki na ntina ya bosolo ya eleko ya mikolo ya nsuka —ete efungolamaki mpenza mobimba na ntango wana.”2