Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya mibale 8–14. Malongi mpe Mayokani 12–13; Joseph Smith—Mambi ya kala 1:66–75: “Likolo na Bino Balingami na Ngai Basaleli”


Sanza ya mibale 8–14. Malongi mpe Mayokani 12–13; Joseph Smith—Mambi ya kala 1:66–75: ‘Likolo na Bino Balingami na Ngai Basaleli,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

Sanza ya mibale 8–14. Malongi mpe Mayokani 12–13; Joseph Smith—Mambi ya kala 1: 66–75,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Ebale ya Susquehanna

Sanza ya mibale 8–14.

Malongi mpe Mayokani 12–13; Joseph Smith—Mambi ya kala 1:66–75

“Likolo na Bino Balingami na Ngai Basaleli”

Joseph Smith mpe Oliver bazwaki boyebi mosusu ntango basambelaki na ntina ya makambo ya solo oyo bayekolaki na makomi (tala Joseph Smith—Mambi ya kala 1:68). Lolenge nini okolanda ndakisa na bango?

Koma Makanisi na Yo

Ekoki kozala solo ete bato mingi koleka na mokili mobimba bayoka naino te esika oyo babengi Harmony, na Pennsylvania. Kasi mbala mingi Nkolo aponaka bisika oyo biyebana te mpo na makambo ya ntina minene koleka nyonso na bokonzi na Ye. Na esika ya mwa zamba moke pene ya Harmony na sanza ya mitano 15, 1829, Yoane Mobatisi abimaki lokola mosekwi epai ya Joseph Smith mpe Oliver Cowdery. Atiaki maboko na ye likolo ya mito na bango mpe akulisaki bango Bonganganzambe ya Alona, kobiangaka bango “balingami na ngai basaleli ” (Malongi mpe Mayokani 13:1).

Kotangama lokola molingami mosaleli elongo na Yoane Mobatisi, oyo abatisaki Mobikisi mpe alengelaki nzela mpo na boyei na Ye (tala Matai 3:1–6, 13–17), esengelaki kozala na komikitisa, ntango mosusu kutu kolekela mokumba ya kilo koleka mpo na bilenge mibali mibale oyo bakokisaki mibu na bangoya ntuku mibale. Na ntango wana, Joseph mpe Oliver bayebanaki naino te, mingi mpe lokola Harmony eyebanaki te. Kasi kosalela kati na mosala ya Nzambe ezalaka ntango nyonso likambo ya lolenge nini tosalelaka, kasi likambo ya nani amoni te. Nzokande atako likabona yo ezala moke to emonana te ntango mosusu, yo mpe ozali molingami mosaleli kati na mosala monene ya Nkolo.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 12

Nkolo alingi ngai nasunga kofandisa ntina ya Siona.

Tata Joseph Knight. mpe mwasi na ye, Polly, bakutanaki na Joseph Smith ntango, moto oyo azalaki na mibu 20, abandaki kosala na elanga na bango na Colesville, New York. Joseph Knight alimbolaki ye lokola mosali malamu koleka banso atikala kozwa. Andimelaki litatoli ya Joseph Smith na ntina ya bapalaki ya wolo mpe amemaki Polly mpo na kokende kotala Joseph Smith ntango azalaki kobongola Buku ya Mormon na ndako na ye na Harmony, Pennsylvania. Sikasikawana kaka ye [mama Polly] andimaki. Mpo na mikolo mitikali ya bomoi na bango , Joseph mpe Polly batikalaki sembo na nsango malamu ezongisama. Bato ya libota ya Knight mingi koleka 60 bayaki kosangana mpe basalisaki kofandisa Eklezia na New York, Ohio, Missouri, Nauvoo, mpe nsuka-nsuka na Salt Lake City.

Joseph Knight alingaki koyeba lolenge nini akokaki kosalisa na mosala ya Nkolo. Eyano ya Nkolo (sikawa Malongi mpe Mayokani 12) ezali mpo na “baoyo nyonso bazali na mposa ya komema liboso mpe kofandisa mosala oyo” (molongo 7)—kotangaka mpe yo. Nini yango elingi koloba na yo “komema liboso mpe kofandisa ntina ya Siona”? (molongo 6). Lolenge nini mabongi mpe makoki na milongo 7–9 esalisaka yo kosala yango?

Tala lisusu “The Knight and Whitmer Families,” Revelations in Context, 20–24.

Malongi mpe Mayokani 13

Bonganganzambe ya Alona ezongisamaki na Yoane Mobatisi.

Na lisakola bobele moko, Yoane Mobatisi abimisaki makambo mingi ya solo na ntina ya Bonganganzambe ya Alona. Kanisa kokoma makambo nyonso oyo oyekoli uta na eteni oyo (kotangaka mpe uta na moto ya eteni). Ekoki kosalisa yo soki oyekoli masakoli mosusu oyo okomona. Topesi mwa bandakisa mpo na yo kobanda:

Mapamboli nini ozwaki na nzela ya makuli ya Bonganganzambe ya Alona?

Elilingi
Joseph Smith kobatisaka Oliver Cowdery

Joseph Smith Abatisi Oliver Cowdery, na Del Parson

Joseph Smith—Mambi ya kala 1:66–75

Makuli epesaka ngai nzela ya kozwa nguya ya Nzambe.

Ndeko mwasi Carole M. Stephens, mosungi ya kala na Bokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi, ateyaki: “Makuli mpe mayokani ya bonganganzambe epesaka nzela na litondi ya mapamboli elakama epai na biso na Nzambe, maye ekokisami kosalema na Bomikabi ya Mobikisi. Yango[makuli mpe mayokani] elatisaka bana mibali mpe bana ya basi ya Nzambe na nguya, nguya ya Nzambe, mpe epesaka biso libaku ya kozwa bomoi ya seko” (“Toyebi Oyo Tozali na Yango?Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2013, 12).

Ntango otangi Joseph Smith—Mambi ya kala 1:66–75, bakisa litangi ya nsuka ya molongo 71, Tala nini efulaki Joseph mpe Oliver mpo na koluka koyeba na ntina ya libatisi, mpe koma mapamboli oyo eyaki epai na bango nsima ya kosala makuli ya bonganganzambe. Kanisa kotanga mama ya makambo ya zulunale mobimba oyo okomaki nsima ya kozwa makuli to kokoma makundoli na yo ya milulu wana. Mapamboli nini ozwaki na nzela ya makuli ya bonganganzambe?

Tala lususu Malongi mpe Mayokani 84:20–22; Les Saints, 1:65–68.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 12:8.Mpo na nini bizaleli oyo bikomami na molongo oyo ezali ntina mpenza ntango tozali kosala mosala ya Nkolo?

Malongi mpe Mayokani 13.Nini ekoki kotonga bondimi ya libota na yo na bozongisi ya Bonganganzambe ya Alona? Video “Bozongisi ya Bonganganzambe ya Alona” (ChurchofJesusChrist.org) to mosala ya ntoki oyo ezali kosalema elongo na nsango oyo ekoki kosunga libota na yo etala Bozongisi ya Bonganganzambe ya Alona. Bakoki kosepela koyema foto ya molulu yango, koyekama na oyo bazali kotanga Joseph Smith—Mambi ya kala 1:68–74? Bakoki mpe lisusu kokabola matatoli na bango na ntina ya nguya ya bonganganzambe na bomoi na bango.

Tala lisusu “Site Interneti ya Bozongisi ya Bonganganzambe” na history.ChurchofJesusChrist.org.

Joseph Smith—Mambi ya kala 1:68.Lolenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Joseph Smith mpe Oliver Cowdery mpo na kozwa biyano na mituna na biso? Ekoki kozala ntango bozali kotanga elongo, bokoki koomisa yango momeseno ya kopema mbala na mbala mpo na kopema mpe kotuna soki moto moko azali na motuna na ntina ya maye bazali kotanga.

Joseph Smith—Mambi ya kala 1:71, koma.Nini ebeti makanisi ya bato ya libota na yo na ntina ya maloba ya Oliver Cowdery? “Nini ezali mikolo ya kobosana te” ya libota na yo?

Joseph Smith—Mambi ya kala 1:73–74.Nguya nini Molimo Mosantu ezalaki na yango likolo ya Joseph mpe Oliver? Ntango nini Molimo esungaki libota na yo kososola makomi mpe kosepela na Nkolo?

Mpo na kozwa makanisi mingi mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Bonganganzambe Ezongisami,” Chants pour Enfants, 89.

Kobongisa Mateya na Biso

Yekola liteya moko. Lokola libota, bopona liteya oyo bokolinga koyekola na molai na yango. Ndakisa, poso oyo bokoki kosalela Mokambi na Masolo to Mokambi na Makomi (scriptures.ChurchofJesusChrist.org) mpo na kozwa makomi na ntina ya Bonganganzambe ya Alona.

Elilingi
Yoane Mobatisi kokulisaka Bonganganzambe ya Alona na Joseph Smith

Likolo na Bino Balingami na Ngai Basaleli, na Linda Curley Christensen

Bimisa na lokasa