Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya mibale 1–7. Malongi mpe Mayokani 10–11: “Ete Okoka Kobima Molongi”


“Sanza ya mibale 1–7 Malongi mpe Mayokani 10–11: “Ete Okoka Kobima Molongi” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya mibale 1–7 Malongi mpe Mayokani 10–11,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Nkoma na maboko ya Buku ya Mormon

Kopi Ekokani ya Nkoma na Maboko ya Buku ya Mormon.

Sanza ya mibale 1–7.

Malongi mpe Mayokani 107:68

“Ete Okoka Kobima Molongi”

Kokoma makanisi na ntango ya kotanga makomi ezali lokola kolonaka nkona; ata makanisi ya mike-mike ekoki kokamba na emoniseli ya ntina monene mpo na yo moko.

Koma Makanisi na Yo

Lokola bobongoli ya Buku ya Mormon ezalaki se kokoba, motuna etunamaki na mbalakaka: nini Joseph Smith mpe Oliver Cowdery basengelaki kosala na nkasa babongolaki kasi oyo ebungaki? Eloko ya mayele ya kosala oyo esengelaki kosalema ezalaki ya kobandela lisusu bobongoli ya eteni wana, kasi Nkolo amonaki ete ezalaki eloko oyo bakokaki kosala te—bato ya mabe bazalaki kosala miango ya kobongola maloba na nkasa wana mpo na kotia ntembe na mosala efulama ya Joseph. Nzambe azalaki na moango ya kosilisa mayele mabe ya Satana mpe kozongisa oyo ebungaki. Moango oyo ebandaki nkama ya mibu liboso ntango profeta Nefi amiyokaki ya kofulama mpo na kokoma nkoma ya makomi ya mibale oyo ezalaki kaka mpo na eleko moko wana. Nsima, Mormon afulamaki mpo na kokotisa nkoma wana na Buku ya Mormon “mpo na ntina ya bwanya” oyo eyabanaki epai ya Nkolo (tala Maloba ya Mormon 1:3–7).

“Bwanya na ngai,” Nkolo alobaki epai ya Joseph, “ezali monene koleka mayele mabe ya satana” (Malongi mpe Mayokani 10:43). Oyo ezali nsango ya kopesa elikya na mikolo lokola ya biso, ntango makasi ya misala mabe ya monguna mpo na kolembisa bondimi ezali koya makasi koleka. Lokola Joseph, tokoki kotikala “sembo mpe kokende liboso” na mosala oyo Nzambe abengelaki biso kosala (molongo 3). Nsima tokomona ete Asilaki kolengela nzela mpo ete “bikuke ya lifelo ekoka te kolonga” biso te (molongo 69).

Tala Basantu, 1:51–61.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 10:1–33

Satana alukaka kobebisa mosala ya Nzambe.

Satana asepelaka biso tobosana ete azalaka—to ete tobosana koyeba masenginya na ye mpo na kozwa nguya likolo na biso (tala 2 Nefi 28:22–23). Kasi maloba ya Nkolo na Malongi mpe Mayokani 10 esakoli ete Satana azali ntango nyonso kosala mpo na kotelemela mosala ya Nzambe. Ntango otangi milongo 1–33, tala lolenge nini Satana alukaki kobebisa mosala ya Nzambe na ntango ya Joseph Smith (tala lisusu milongo 62–63). Bokokani nini omoni na ndenge Satana azali kosala lelo? Okoki kosenga Nkolo asunga yo komona lolenge nini Satana akoki komeka yo. Oyekoli nini uta na eteni 10 oyo ekoki kosunga yo kotelemela makasi ya Satana?

Malongi mpe Mayokani 10:34–52

Ya Nkolo “bwanya ezali monene koleka mayele mabe ya satana.”

Mibu mingi koleka 2,400 yambo makambo oyo masalema, Nkolo alengelaki kozongisa nkasa ya Buku ya Mormon oyo ebungaki (tala 1 Nefi 9). Oyekoli nini na ntina ya Nkolo na Malongi mpe Mayokani 10:34–52? Elembo ya solo nini ya bwanya ya Nkolo mpe ya koyeba makambo yambo esalema omoni na kati ya bomoi na yo?

Nkoma ya makomi oyo Nzambe alengelaki mpo na kozwa esika ya nkoma na maboko oyo ebungaki ezwami sikawa na 1 Nefi kino na Omni. Lolenge nini masolo mpe mateya na kati ya nkoma ya makomi oyo “[ebwaki] pole monene likolo ya nsango malamu [yango ]” mpo na yo? (Malongi mpe Mayokani 10:45).

Elilingi
Mormon kokomaka makomi na bapalaki na bokuse

Mormon Kokomisaka Bapalaki mikuse, na Tom Lovell

Malongi mpe Mayokani 11

Soki nasengi epai ya Nzambe, nakozwa.

Mingi ya bato ya libota baninga ya Joseph Smith mpe basengaki ye aluka koyeba nini ezali bolingi ya Nkolo na ntina na bango. Joseph asepelaki kosala yango, kasi Nkolo azalaki lisusu na bolingi ya kopesa bango emoniseli ya moto na moto ye moko. Na kati ya Malongi mpe Mayokani 11, emoniseli oyo Joseph azwaki mpo na kulutu na ye ya mobali Hyrum, Nkolo alobaki, “Nakopesa yo Molimo na ngai, … mpe nsima okoyeba … makambo nyonso oyo ozali na yango mposa epayi na ngai” (Malongi mpe Mayokani 11:13–14).

Nkolo alobaki maloba na Ye ezalaki mpo na “bato banso oyo bazali na mposa ya malamu, mpe baoyo babwaki likwangola na bango mpo na kobuka mbuma” (molongo 27). Na kati ya Malongi mpe Mayokani 11, Nkolo azali komeka koyebisa yo nini na ntina ya emoniseli na yo moko? na ntina ya kosala mosala ya Nzambe? Bansango mosusu nini Azali na yango mpo na yo?

Malongi mpe Mayokani 11:15–26

Ntango nazali koluka mpo na “kozwa liloba ya [Nzambe] ,” nakozwa Molimo mpe nguya na Ye.

Ata yambo ya bobongoli ya Buku ya Mormon, Hyrum Smith azalaki na mposa ya koteya nsango malamu. Ntango otangi eyano ya Nkolo na bamposa na ye, kanisa nini yango elakisi epai na yo “kozwa liloba ya [Nzambe] ” (molongo 21). Lolenge nini kozwa liloba ya Nzambe esungaka yo kosalela na Eklezia? Lolenge nini yango ememaka nguya ya Nzambe kati na bomoi na yo?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 10:5.Toyekoli nini uta na molongo oyo na ntina ya nguya ya losambo? Lolenge nini biso “tosambelaka ntango nyonso”? (Mpo na kozwa makanisi masusu, tala David A. Bednar, “Sambelaka Ntango nyonso,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2008, 41–44.)

Malongi mpe Mayokani 10:38–46.Mpo na kosalisa libota na yo kosolola lolenge nini Nkolo asungaki kozwa na nzela mosusu nkasa ebunga ya bobongoli ya Buku ya Mormon, ntango mosusu bato ya libota bakoki kosolola na ntina ya eloko moko oyo babungisi kala mingi te. Lolenge nini bayokaki ntango bayebaki ete eloko yango ebungaki? Lolenge nini bayokaki ntango emonanaki? Atako nkasa ya Buku ya Mormon emonanaki ata moke te, lolenge nini Nkolo azongisaki kobungisama na yango, engebene na Malongi mpe Mayokani 10:38–46?

Malongi mpe Mayokani 10:55–70.Bengisa bato ya libota nyonso bazwa to batia bilembo na maloba oyo ebandi na “nazali” to “nakosala.” Toyekoli nini uta na maloba “nazali” na ntina ya nani Yesu azali mpe Azali lolenge nini? Toyekoli nini uta na maloba “nakosala” mpo na oyo etali maye Asalaka? Lendisa bato ya libota bakabola lolenge nini makambo oyo ya solo elendisaka bondimi na bango na Yesu Klisto.

Malongi mpe Mayokani 11:12–14.Kotangaka milongo oyo ekoki kosunga bato ya libota na yo bayeba kososola ntango Molimo azali kosolola na bango. Okoki kopelisa mwinda mpo na kongengisa nse mpe kobengisa moto moko ya libota koya esika mwinda ezali kopela. Lolenge nini yango osengi asala ezali lokola kolandaka bokambi ya Molimo Mosantu? Mayele nini ya kosala to ya bomoi okoki kokabola?

Malongi mpe Mayokani 11:15–30.Kanisa kokoma molongo ya makambo oyo Nkolo alobelaki Hyrum Smith asala mpo ete amilengela mpo na kokabola nsango malamu. Nini tosengeli kosala lokola libota?

Mpo na kozwa makanisi mingi mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Search, Ponder, and Pray,” Chants pour Enfants, 109; tala “Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo ya Makomi na Libota.”

Kobongisa Mateya na Biso

Salela makomi na bomoi na yo. Nsima ya kotanga eteni moko ya makomi, senga bato ya libota bakabola ndenge bakoki kosalela maloba na bomoi na bango. Ndakisa, bakoki kokabola lolenge nini Molimo epusaki bango na banzela elimbolami kati na Malongi mpe Mayokani 11:12–13.

Elilingi
Joseph mpe Hyrum Smith

Joseph mpe Hyrum Smith, na Ken Corbett

Bimisa na lokasa