Malongi mpe Mayokani 2021
Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo ya Makomi na Libota


“Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo ya Makomi na Libota,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo ya Makomi n Libota,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

mabota ezali koyekola makomi

Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo ya Makomi na Libota

Koyekola makomi mbala na mbala na libota ezali nzela moko ya nguya mpo na kosalisa libota na yo eyekola nsango malamu. Mbala boni mpe ntango boni botangaka lokola libota ezali na ntina te koleka kosala ntango nyonso makasi. Ntango okomisi boyekoli makomi eteni moko ya ntina ya bomoi ya libota na yo, okosalisa bato ya libota na yo kobelema pene pene ya moko mpe mosusu mpe pene ya Yesu Klisto mpe kotonga matatoli na bango likolo ya moboku ya liloba na Ye.

Manyola mituna oyo elandi:

  • Lolenge nini okoki kolendisa bato ya libota bayekola makomi na bango moko?

  • Nini okoki kosala mpo na kolendisa bato ya libota bakabola maye bazali koyekola?

  • Lolenge nini okoki kobeta nsete na mabongi oyo ozali koyekola na kati ya Malongi mpe Mayokani na bantango ya kotangisa ya mikolo nyonso?

Mikundola ete libota ezali esika elongobani mpo na koyekola nsango malamu. Bokoki koyekola mpe koteya nsango malamu na ndenge oyo ekokaki te kosalema na eteyelo moko ya Eklezia. Zala na mayele ya bokeli ntango okanisi na ntina ya banzela ya kosalisa libota na yo eyekola nsango malamu.

Makanisi mpo na Molulu

Manyola mwa ndambo ya makanisi oyo elandi mpo na kolendisa boyekoli na bino ya makomi na libota:

Salela miziki

Yemba nzembo oyo ekolendisa mabongi oyo eteyami na kati ya makomi. Loyembo oyo ekoki koyembama to loyembo ya bana etiami na liteya moko na moko ya poso na poso. Okoki kotuna mituna na ntina ya maloba to masakola oyo ekomami. Likolo ya loyembo, libota na yo ekoki kosala misala oyo elimboli nzembo to koyoka nzembo lokola lisolo ya miziki ntango bozali kosala misala misusu.

Kabola makomi ya ntina

Pesa bato ya libota ntango ya kokabola biteni ya makomi oyo bamonaki kozala ntina na ntango ya boyekoli na bango moko.

Salela maloba na yo moko

Bengisa bato ya libota baloba na bokuse maloba na bango moko oyo bayekoli uta na makomi oyo boyekoli.

Salela makomi na bomoi na yo

Nsima ya kotangaka eteni moko ya makomi, tuna bato ya libota bakabola ndenge ya nsango yango esalelami na bomoi na bango.

Tuna motuna

Bengisa bato ya libota batuna motuna ya nsango malamu, mpe nsima bolekisa ntango na kolukaka milongo oyo ekoki kosalisa kopesa eyano na motuna yango.

Lakisa makomi

Pona molongo oyo omoni kozala motuya, mpe lakisa yango wapi bato ya libota bakomona yango mbala na mbala. Bengisa bato ya libota bapona makomi ya kotalisa moko nsima ya mosusu.

Sala mokanda ya makomi

Lokola libota, bopona milongo mingi oyo bokosepela kosolola na poso ekoya nsima.

Bokanga makomi na moto

Pona eteni ya makomi oyo ezali ntina mpo na libota na yo, mpe bengisa bato ya libota bakanga yango na moto na kozongelaka yango mokolo na mokolo to kosalaka lisano ya kokanga na moto.

Bokabola mateya ya ndakisa

Bozwa biloko oyo ekokani na mikapo mpe milongo oyo bozali kotanga lokola libota. Bengisa bato ya libota basolola na ntina ya lolenge nini eloko moko na moko ekokani na mateya kati ya makomi.

Pona liteya songolo

Tika bato ya libota bapona moko nsima ya mosusu liteya moko oyo libota ekoyekola elongo. Salela Mokambi na Masolo, Dikisionle ya Biblia, to Mokambi na Makomi (scriptures.ChurchofJesusChrist.org) mpo na kozwa biteni ya likomi na ntina ya liteya.

Yema elilingi

Tanga mwa milongo moke lokola libota, mpe nsima pesa ntango mpo na bato ya libota bayema eloko moko oyo ekokani na oyo botangi. Bolekisa ntango na kosololaka na ntina ya elilingi ya moko na mosusu.

Bosala lisano na lisolo

Nsima ya kotanga lisolo, bengisa bato ya libota babeta basala lisano na lisolo yango. Nsima, bosolola na ntina ya lolenge nini lisolo ekokani na biloko oyo ozali kokutana na yango yo moko to lokola libota.

Koteya Bana

Soki ozali na bilenge bana kati na libota na yo, oyo ezali mwa ndambo misala oyo ekoki kosalisa bango mpo na bayekola:

Boyemba

Nzembo mpe bamiziki uta na Chants pour les enfants ezali koteya malongi na nguya mpenza. Liteya moko na moko na kati ya mokanda oyo ezali na loyembo oyo ekoki koyembama. Okoki lisusu kosalela Annexe pour les Sujets na nsuka ya Chants pour les enfants mpo na kozwa nzembo oyo ekokani na mabongi ya nsango malamu oyo ozali koteya. Sunga bana na yo balimbola maloba ya nzembo na bomoi na bango.

Yoka to Sala lisano na lisolo

Bilenge bana balingaka masolo—uta na makomi, uta na bomoi na bino, uta na mambi ya kala ya Eklezia, to uta na bazulunale ya Eklezia. Luka banzela ya komema bango babeta lisolo. Bakoki kosimba bililingi to biloko, koyema bilili ya oyo bazali koyoka, kosala lisano uta na lisolo, to kutu kosalisa bango kobeta lisolo. Salisa bana na yo bayeba bosolo ya nsango malamu na masolo bazali kokabola.

Tanga makomi

Ekoki kozala ete bilenge bana bakoka kotanga malamu mpenza te, kasi okoki kosalisa bango na koyekolaka uta na makomi. Okoki kozala na mposa ya kotalela bobele molongo moko, esakola to liloba moko ya motuya.

Botala elilingi to botala video moko

Tuna mituna na ntina ya elilingi to video etali libongi to liteya ya nsango malamu oyo bozali kosolola. Ndakisa, okoki kotuna, “Nini ezali kosalema na kati ya elilingi oyo? Boyoki yango ndenge nini?” Aplikasio ya Etando ya Nsango Malamu Gospel Media Library na ChurchofJesusChrist.org, mpe children.ChurchofJesusChrist.org ezali bisika bilongobani mpo na koluka bililingi mpe bavideo.

Kela

Bana bakoki kotonga, koyema to kopakola langi na eloko moko ekokani na lisolo to libongi oyo bazali koyekola.

Sala elongo na mateya ya ndakisa

Liteya moko ya ndakisa ya pete ekoki kosalisa bana na yo basosola libongi ya nsango malamu oyo ezali mpasi mpo na kososola. Ntango osaleli mateya ya ndakisa, luka nzela ya kosala ete bana na yo bazala kati ya lisano. Bakoyekola mingi uta na likambo oyo bazali kosala elongo na basusu koleka bobele kotalaka video to bolakisi moko.

Lisano ya Kokabola Mikumba

Ntango bana basali lisano na kokabolaka mikumba ya likambo oyo bakokutana na yango na yango na bomoi ya solo, bazali na bososoli malamu ya koyeba lolenge nini kosalela libongi ya nsango malamu na bomoi na bango.

Milulu ya Kobandela

Bilenge bana bakoki kozala na mposa ya koyoka makanisi to maloba mbala na mbala mpo na kososola yango. Ndakisa, bokoki kokabola lisolo ya makomi mbala na mbala na ndenge ebele—kotangaka makomi, kolobaka na bokuse na ndenge na yo, kotika bana na yo basunga yo obeta lisolo, kobengisaka bango babeta lisolo, mpe bongo.

Tia boyokani na bantina na bango ya bokoli

Boyekoli makomi na libota ekoki kopesa bofuli mpo ete bilenge mpe bana batia manaka ya bokoli ya molimo, nzoto, mayele, mpe bomoto na bango (tala Luka 2:52).

libota kosekaka elongo

Koteya Bilenge

Soki ozali na bilenge na libota na yo, oyo ezali makambo oyo ekoki kosunga bango bayekola:

Bengisa bango bateya

Mbala mosusu toyekolaka mingi koleka ntango toteyaka eloko songolo koleka ntango tozali bobele koyoka yango. Pesa bilenge na yo mabaku ya kokamba masolo ya libota na ntina ya makomi.

Tia mikangano na seminele

Mobu oyo bayekoli ya seminele bazali kotanga Malongi mpe Mayokani. Soki bilenge na yo bazali kokende na seminele, bengisa bango bakabola oyo bazali koyekola kuna.

Bokokanisa makomi

Mbala mosusu bilenge bazalaka na mobulungano ya komona lolenge nini malongi mpe mabongi na kati ya makomi eyokanaka na bomoi na bango. Sunga bango bamona lolenge nini masolo mpe mateya na kati ya makomi ekokani na makambo oyo bazali kokutana na yango na libota, na kelasi, to na baninga na bango.

Tuna mituna oyo ekolendisa bomanyoli

Bilenge mingi bayanolaka malamu na mituna oyo epesaka bango ndingisa ya kobimisa makanisi na bango mpe mayoki na ntina ya makomi na esika ya kozongelaka bobele oyo makomi elobi. Ndakisa, okoki kotuna, “Nkolo ateyi bino nini na kati ya milongo oyo?” to “Mpo na nini bokanisi emoniseli oyo ekoki kozala ntina mpo na Basantu na 1830?”

Tia boyokani na bantina na bango ya bokoli

Boyekoli makomi na libota ekoki kopesa bofuli mpo ete bilenge mpe bana batia manaka ya bokoli ya molimo, nzoto, mayele, mpe bomoto na bango (tala Luka 2:52).

Zala ya kofungwama na mituna na bango

Motuna ya elenge ezalaka libaku ya motuya mpo na kokabola bosolo mpe koluka bososoli na liteya to lisolo oyo ye azali na litomba ya solo na yango koleka. Kobanga te mituna to kozanga yango te, atako yango etali lisolo ya liteya te. Ezali Malamu soki ozali na biyano nyonso te. Libota ezali esika elongobani mpo na koluka biyano elongo.

Lendisa bango bakabola boyebi na bango

Bilenge bazalaka na banzela ya kotala mpe boyebi oyo ezali kaka ya bango moko mpo na kosunga na boyekoli ya makomi na libota. Tika bango bayeba ete ozali na litomba na oyo Molimo ezali koteya bango na ntina ya makomi. Okoki kutu kotuna bango bakabola boyebi uta na boyekoli na bango moko.

Zala ya polele

Soki ozali na bilenge oyo bazali na bolingi ya kozala na boyekoli makomi na libota te, luka ndenge mosusu mpo na kosangana na ye. Ndakisa, okoki komema na lolenge ya pete nsango malamu na masolo na bino to kokabola makomi ya ntina na lolenge oyo emonisami lokola koteya to kokonza te? Boyekoli ya makomi esengeli te kozala ndenge moko na mabota nyonso. Bana basusu bakoki koyanola malamu na boyekoli makomi moko na moko. Bosambelaka mpe bolandaka bitinda ya Molimo.

Mokambi Russell M. Nelson alobaki: “Nalaki ete ntango ozali kosala na molende mpo na kobongisa lisusu libota na yo ezala esika ya koyekola nsango malamu, kozwa mwa ntango mingi koleka ya yo Saba ekozala mpenza esengo koleka. Ya yo bana bakosepela mingi koyekola mpe kosalela mateya ya Mobikisi, mpe nguya ya monguna na ya yo bomoi mpe na ya yo ndako ekokita. Bambongwana na libota na yo ekozala makasi mpe ekowumela” (“Becoming Exemplary Latter-day Saints,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 113).