Malongi mpe Mayokani 2021
Mikanda Misusu


“Mikanda Misusu,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Mikanda Misusu,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021

Elilingi
libota ezali koyekola mikanda ya Eklezia

Mikanda Misusu

Mingi koleka ya mikanda oyo ekoki kozwama na kati ya aplikasio ya Etando ya Mikanda ya Nsango Malamu mpe na ChurchofJesusChrist.org.

Buku ya Nzembo mpe Chants pour Enfants

Miziki ya bule ebengisaka Molimo mpe eteyaka malongi na lolenge moko ya kobosana te. Likolo ya buku ya ebimisami na nkasa ya Buku ya Nzembo mpe Chants pour Enfants, okoki kozwa mateya ya koyoka to audio mpe video ya nzembo mingi mpe nzembo ya bana na music.ChurchofJesusChrist.org mpe na kati ya aplikasio ya Miziki ya Bule.

Mikanda ya Seminele mpe Eteyelo ya Malongi

Mikanda ya Seminele mpe Eteyelo ya Malongi na ntina ya makambo ya ebandeli na lisitwale mpe makanisi ya bato na ntina ya malongi mpo na mabongi mpe masolo oyo ezwami na kati ya makomi.

Bazulunale ya Eklezia

Bazulunale lokola Friend, New Era, Ensign, mpe Liahona ezali na masolo mpe milulu oyo ekoki kobakisa mabongi to mateya na oyo ozali kotangisa uta na Malongi mpe Mayokani.

Masolo ya Nsango Malamu

Na kati ya Masolo ya Nsango Malamu okoki kozwa nsango ya motuya na ntina ya mama ya masolo ya ndenge na ndenge ya nsango malamu, na mikoloto to liens ya koyingela na mikanda, lokola mateya ya likita linene, bartikele, makomi, mpe bavideo. Okoki lisusu kozwa Makomi ya Masolo ya Nsango malamu, oyo epesaka biyano na mituna ya malongi mpe mambi ya kala.

Masolo ya Malongi mpe Mayokani

Masolo ya Malongi mpe Mayokani ezali kosalela bilili mpe lokota moko ya pete mpo na kosalisa bana bayekola Malongi mpe Mayokani. Okoki kozwa lisusu bavideo ya masolo oyo na kati ya aplikasio na Etando ya Mikanda ya Nsango malamu mpe Gospel Media Library na ChurchofJesusChrist.org.

Buku ya Masolo ya Makomi na Langi: Malongi mpe Mayokani

Mokanda oyo ezali na nkasa ya milulu ebongisami mpo na kolendisa boyekoli ya bana uta na Malongi mpe Mayokani.

Bavideo mpe Ntoki

Misala ya ntoki, bavideo, mpe media mosusu ekoki kosunga libota na yo etala masolo ya malongi oyo ezwami na kati ya makomi. Tala Gospel Media Library na ChurchofJesusChrist.org mpo na kokota na liboke ya mikanda ya Eklezia na media. Mikanda oyo ekoki kozwama lisusu na aplikasio ya Gospel Media, mpe bilili mingi bizwami lisusu na kati ya Buku ya Ntoki ya Nsango malamu.

Bimoniseli na Misala

Bimoniseli na Misala: Masolo nsima ya Biteni ya Malongi mpe Mayokani ezali bosangisi ya nkoma na ntina ya lisitwale ezingi bimoniseli oyo bizwami na kati ya Malongi mpe Mayokani. Makambo, ntango to mpe bisika oyo epesami na kati ya mokanda oyo ekoki kosalisa yo kososola malamu mingi koleka nini ekokaki kozala ndimbola ya maloba ya Nkolo na kati ya Malongi mpe Mayokani mpo na Basantu ya Mikolo mya Nsuka ya ebandeli.

Basantu

Les Saints ezali mikanda minene ya masolo bakabola na buku minene mingi ya listitwaleya Eklezia. Mokanda monene ya yambo to Volume 1, The Standard of Truth, mpe Volume 2, No Unhallowed Hand, ezali kolobela eleko se moko ya lisitwale ya Eklezia lokola Malongi mpe Mayokani. Masolo oyo ekoki kopesa bino boyebi na makambo mazingaki bimoniseli oyo bozali koyekola na kati ya Malongi mpe Mayokani.

Masolo ya Mambi ma Kala ya Eklezia

Nkoma ya zulunale mingi na ntina ya bato, bisalelo, boyebi ya mabele mpe mokili, mpe makambo matali mambi ya kala ya Eklezia ekoki kozwama na ChurchofJesusChrist.org/study/history/topics.

Koteya na Lolenge ya Mobikisi

Mokanda oyo ekoki kosunga yo koyekola na ntina ya mpe kosalela mabongi ya koteya lokola Klisto.

Bimisa na lokasa