Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya zomi na mibale 28–Sanza ya yambo 3. Malongi mpe Mayokani 1: “Boyoka, O Bino Bato”


“Sanza ya zomi na mibale 28–Sanza ya yambo 3. Malongi mpe Mayokani 1: ‘Boyoka, O Bino Bato,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya zomi na mibale 28–Sanza ya yambo 3. Malongi mpe Mayokani 1,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
koyekola makomi na libota

Sanza ya zomi na mibale 28–Sanza ya yambo 3

Malongi mpe Mayokani 1: “Boyoka, O Bino Bato”

“Boyoka, O Bino Bato”

Kanisa na ntina ya Malongi mpe Mayokani 1 lokola boyingisi ya ye moko Nkolo na buku oyo ya bimoniseli ya Ye na mikolo ya nsuka. Nini alingi yo oyeba na ntina ya Malongi mpe Mayokani? Manyola motuna oyo, mpe koma makanisi nyonso oyo ezali koyela yo ntango otangi eteni 1.

Koma Makanisi na Yo

Na Sanza ya zomi na moko 1831, Eklezia ezongisama ya Yesu Klisto ezalaki bobele na mobu moko na ndambo. Atako ezalaki kokola, yango ezalaki kaka lingomba ya bandimi bayebana te kofandaka na bandelo ya bato moke, baye bakambamaki na profeta moko na mibu katikati ya bantuku mibale. Kasi Nzambe atalaki bandimi oyo lokola basali mpe bantoma na Ye, mpe Alingaki ete bimoniseli oyo Apesaki bango ebimisama na mokili.

Malongi mpe Mayokani eteni 1 ezali liyebisi ya Nkolo na ebandeli ya buku mpo na bosangisi ya bimoniseli oyo, mpe yango alakisi polele ete atako bandimi ya Eklezia bazalaki moke, eloko moko ya moke ezalaki te na ntina nsango Nzambe alingaki Basantu na Ye bakabola. Ezali “mongongo ya bokebisi” mpo na banso ya “bato ya mabele,” koteyaka bango bayambola mpe batia “liyokani ya seko” ya Nzambe (milongo 4, 8, 22). Basali oyo bazali komema nsango oyo bazali “bato na botau mpe bato mpamba lokola bato banso,” kasi basali ya komikitisa bazali nde baoyo Nzambe azali na bango mposa—na ntango wana mpe sikawa—mpo na kobimisa Eklezia na Ye “libanda ya butu mpe libanda ya molili” (milongo 23, 30).

Mpo na kozwa nsango mingi na ntina ya lisolo ya Malongi mpe Mayokani 1, tala Basantu, 1:140–43.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi yo Moko

Malongi mpe Mayokani 1: “Boyoka, O Bino Bato”

Nkolo abengisi ngai mpo na “koluka mitindo oyo.”

Liyebisi moko ezali nkoma na ebandeli mpo na koyingisa buku. Ezali kolobela bampo mpe bantina ya buku mpe ezali kosunga batangi bamilengela mpo na kotanga. Ntango bozali kotanga Eteni 1—“Liyebisi” ya Nkolo na Malongi mpe Mayokani (molongo 6)—boluka bampo mpe bantina oyo Nkolo apesaki mpo na bimoniseli na Ye. Nini oyekoli uta na eteni 1 oyo ekosunga yo ozwa litomba monene uta na boyekoli na yo ya Malongi mpe Mayokani? Ndakisa, okoki komanyola nini yango elingi koloba mpo na “koyoka mongongo ya Nkolo” na bimoniseli oyo (molongo 14) to mpo na “koluka mitindo oyo” (molongo 37).

Tala lisusu boyingisi na Malongi mpe Mayokani.

Malongi mpe Mayokani 1:1–6, 23–24, 37–39

Nzambe alobaka na nzela ya basali na Ye, mpe maloba na Ye ekokokisama.

Eteni 1 ebandi mpe esuki na esakoli ya Nzambe ete Ye alobaka na nzela ya basali na Ye baponama (tala milongo 4–6, 23–24, 38). Koma oyo oyekoli uta na emoniseli oyo na ntina ya Nkolo mpe mongongo na Ye. Oyekoli nini na ntina ya basali ya Nkolo? Ntango nini oyokaki mongongo ya Nzambe kati na mongongo ya basali na Ye? (tala molongo 38).

Elilingi
liyangani ya likita linene

Baprofeta mpe bapostolo bazali koteya biso mitindo ya Nzambe.

Malongi mpe Mayokani 1:3, 24–28, 31–33

Soki nazali na bomikitisi, etumbu ya Nkolo ekoki komema ngai nayambola.

Tala na molongo 3 mpe milongo 24–28, Nkolo alobaki ete masumu mpe mabunga ya bato ekoyebisama. Na ngambo moko oyo ezali likambo moko ya mpasi, mpe ya mawa, mpe na ngambo mosusu ezali likambo ya ntina mpo na koteya. Mpo na nini makambo oyo ezali ya kokesana bongo? Kanisa lolenge nini osalaka ntango oyebaka masumu mpe botau na yo. Makambo nini ya malonga omoni na milongo 24–28 oyo ekoki kosunga yo oyanola na lolenge malamu? Nini milongo oyo, elongo na milongo 31–33, ezali koteya yo na ntina ya lolenge nini Nkolo amonaka botau mpe masumu na yo?

Tala lisusu Masese 3:11–12; Etele 12:27; Moroni 6:8.

Malongi mpe Mayokani 1:12–30, 35–36

Nkolo azongisaki nsango malamu na Ye mpo na kosunga ngai nalonga mikakatano ya mikolo ya nsuka.

Atako eteni 1 ekebisi na ntina ya mikolo ya mpasi oyo ezali koya, ezali mpe lisusu na nsango ya elikia: “Ngai Nkolo, koyebaka mpasi oyo esengeli koya na bato ya mabele, nabiangaki mosali na ngai Joseph Smith, Moke, mpe nalobaki epai na ye uta na lola” (molongo 17).

Koma makambo ya mawa mingi oyo Nkolo akebisi biso na ntina na yango (tala, ndakisa, milongo 13–16, 35). Makambo ya mawa mosusu nini oyo omoni na mokili ya lelo—to na bomoi na yo moko? Milongo 17–30 etalisi lolenge nini Nkolo asali mpo na yo yambo ete makambo ya mawa mingi oyo mazali koya. Banza kokoma molongo ya makambo oyo ozali komona.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 1:1–6, 37–39.Mpo na kobanda lisolo na ntina ya makebisi uta na Nkolo, bokoki kosolola na ntina ya makebisi oyo tozwaka uta na bato basusu na ntina ya makama oyo tokoki komona te—lokola esika ya ndako wapisielumwa, ekumbaki ya makasi, to bopusani ya motuka. Bandakisa oyo eteyi biso nini na ntina ya makebisi ya Nkolo? Engebene na Malongi mpe Mayokani 1:1–6, 37–39, lolenge nini Nkolo azali kokebisa biso? Na ntina ya likambo nini Akebisi biso kala mingi te awa? Ntango mosusu okoki kotala to kotanga biteni ya masolo ya likita linene oyo eleki kala mingi te mpe koluka bandakisa ya “mongongo ya bokebisi” ya Nzambe.

Malongi mpe Mayokani 1:16.Elakisi nini “kotia bosembo ya [Nkolo]”? Lolenge nini tokoki koyeba malamu ete tozali kosala yango, na esika ya kotambola “na lolenge [na biso] moko”?

Malongi mpe Mayokani 1:30.Elingi koloba nini mpo na koloba ete Eklezia ezali “solo mpe na bomoi”? Mpo na kosala ete libota na yo ekanisa na ntina ya motuna oyo, ntango mosusu okoki kolakisa bango bafoto ya biloko na bomoi mpe biloko na bomoi te. Bokoki lisusu kosolola na ntina ya nini bokoki kosala lokola libota mpo na kosunga “kobimisa [Eklezia] uta na butu mpe uta na molili.”

Malongi mpe Mayokani 1:37.Kanisa kosala moango lokola libota na ntina ya lolenge nini “bokoluka mitindo oyo” kati na Malongi mpe Mayokani na mobu oyo. Lolenge nini bokokomisa boyekoli na bino ya makomi ya mbala na mbala eteni moko ya bomoi ya libota? Makanisi nini ya boyekoli ekoki kosunga bino koyekola uta na makomi? (Tala “Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli Makomi na Libota na Yo” na ebandeli ya mokanda oyo.)

Mpo na kozwa makanisi mingi mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Landa Profeta,” Buku ya Nzembo ya Bana, 110–11, mingi-mingi molongo ya nsuka.

Kobongisa Boyekoli na Yo moko

Luka Yesu Klisto. Ntina ya makomi ezali mpo na kotatola Mobikisi mpe nsango malamu na Ye. Ntango otangi Malongi mpe Mayokani 1, kanisa kotia bilembo to kokoma milongo oyo ezali koteya bino eloko moko na ntina ya Yesu Klisto.

Elilingi
Buku ya Mibeko

Bimoniseli ya yambo na Eklezia ezongisama bisangisamaki na kati ya Buku ya Mibeko.

Bimisa na lokasa