Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Yambo 18–24. Malongi mpe Mayokani 3–5: “Mosala na Ngai Ekokende Liboso”


“Sanza ya Yambo 18–24. Malongi mpe Mayokani 3–5: ‘Mosala na Ngai Ekokende Liboso,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya Yambo 18–24. Malongi mpe Mayokani 3–5,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Banto mpe Mabota: 2021

Elilingi
bato kosalaka mosala na elanga

Eleko ya Bobuki Mbuma na France, na James Taylor Harwood

Sanza ya Yambo 18–24

Malongi mpe Mayokani 3–5

“Mosala na Ngai Ekokende Liboso”

Koma oyo oyekoli mpe oyoki ntango ozali koyekola makomi. Oyo ekosunga yo komikundola makanisi wana mpe kokabola yango elongo na basusu.

Koma Makanisi na Yo

Na ntango ya mwa mibu na ye ya ebandeli lokola profeta ya Nkolo, Joseph Smith ayebaki naino makambo nyonso te na ntina ya “mosala kitoko” oyo azwelaki libiangi mpo na kosala. Kasi eloko moko oyo makambo akutanaki na yango na ebandeli eteyaki ye ezalaki ete mpo ete alonga na mosala ya Nzambe, liso na ye esengeli mpenza kotalela bobele “nkembo ya Nzambe” (Malongi mpe Mayokani 4:1, 5). Ndakisa, soki Nkolo apesaki ye toli oyo eyokanaki te na bamposa na ye, asengelaki kolanda toli ya Nkolo. Mpe kutu soki azwaki “bimoniseli mingi, mpe … nguya ya kosala misala mingi ya kokamwisa,” soki bolingi na ye moko ekomaki na ntina mingi na miso na ye koleka bolingi ya Nzambe, ye “asengelaki kokweya” (Malongi mpe Mayokani 3:4). Kasi Joseph ayekolaki eloko mosusu ya motuya kaka na ntina ya kosala mosala ya Nzambe: “Nzambe atonda na mawa,” mpe soki Joseph ayambolaki na bosembo mpenza, ye azalaki “kaka moponami” (molongo 10). Mosala ya Nzambe ezali, nsima ya nyonso, mosala ya bosikoli. Mpe mosala wana “ekoki te kobebisama” (molongo 1).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi yo Moko

Malongi mpe Mayokani 3:1–15

Nasengeli kotalela Nzambe na esika ya kobanga moto.

Na ebandeli ya mosala ya Joseph Smith, ezalaki mpasi kozwa baninga malamu—mingimingi baninga lokola Martin Harris, mobali moko ya lokumu, ya bozwi, oyo azalaki na meko mpo na kopesa lisungi ya motuya. Mpe Martin na bolingi na ye moko asalisaki Joseph, kutu atako abungisaki botosi ya baninga na ye mpe esengaki ye abonza ya ye mosolo.

Boye ezali pete mpo na kososola ntina oyo Joseph alingaki kokokisa bosenga ya Martin ya kozwa eteni ya yambo ya bobongoli ya Buku ya Mormon mpo na kolakisa mwasi na ye, oyo atiaki ntembe na bosolo ya Buku ya Mormon. Joseph akobaki kotuna Nkolo na ntina ya bosenga wana, atako na ntango Apekisaki yango, kino na nsuka, nsima Joseph atunaki mbala ya misato, Nkolo alobaki iyo. Likambo ya mpasi, nkoma yango ya maboko ebungaki ntango ezalaki na maboko ya Martin, mpe Joseph mpe Martin bapesamaki etumbu makasi epai ya Nkolo (tala Basantu, 1:51–53).

Ntango otangi Malongi mpe Mayokani 3:1–15, maniola lolenge nini makanisi ya bato basusu ekoki kotinda yo osala likambo songolo. Okoki komona lisusu ete likolo ya kongangela Joseph Smith, Nkolo abimisaki maloba ya mawa. Oyekoli nini uta na lolenge Nkolo na nyonso mibale alakisaki mpe alendisaki Joseph? Toli nini ozwi oyo ekoki kosunga yo ntango omekami na kobangaka bato basusu koleka Nzambe?

Tala lisusu “Masalisi ya Martin Harris,” Bimoniseli na Likambo, 1–9, history.ChurchofJesusChrist.org.

Malongi mpe Mayokani 4

Nkolo asengi ngai nasalela Ye na motema na ngai mobimba.

Eteni ya 4 esalemaka mbala mingi na bamisionele ya ntango mobimba. Nzokande, ezali na litomba ya komona ete emoniseli oyo epesamaki na ebandeli epai ya Tata Joseph Smith, oyo abengamaki te na misio kasi oyo azalaki kaka na “mposa ya kosalela Nzambe” (molongo 3).

Lolenge moko ya kotanga eteni oyo ezali ya kokanisa yango lokola ndimbola ya moto oyo alingi kosala mosala ya Nkolo. Masengami nini osengeli kokokisa mpo olonga? Mpo na nini makokito bizaleli oyo ezali na ntina? Ntango mosusu okoki na nzela ya losambo kopona eloko moko okoki kosala mpo na “kolonga [yo moko] malamu koleka mpo na mosala” (molongo 5).

Malongi mpe Mayokani 5

Nakoki kozwa litatoli na ngai moko ya Buku ya Mormon.

Elilingi
Martin Harris

Martin Harris, na Lewis A. Ramsey

Soki obengamaki mpo na kotatola na esambiselo na ntina ya bosolo ya Buku ya Mormon, elembo ya solo nini okoki kopesa? Motuna ya lolenge moko ezalaki na makanisi ya Martin Harris ntango mwasi na ye, Lucy, afundaki ete Joseph Smith azalaki kokosa bato na kobetaka ntolo ete abongoli bapalaki ya wolo (tala Basantu, 1:56–58). Na yango Martin asengaki Joseph bilembo ya solo mingi koleka ete bapalaki ya wolo ezalaki ya solo. Malongi mpe Mayokani 5 ezali emoniseli mpo na koyanola bonsenga ya Martin.

Oyekoli nini na Malongi mpe Mayokani 5 na ntina ya likambo oyo elandi:

Malongi mpe Mayokani 5:1–10

Nkola oyo ekozwa liloba ya Nzambe na nzela ya Joseph Smith.

Nini Malongi mpe Mayokani 5:1–10 eteyi yo na ntina ya mosala monene ya Joseph Smith kati ya eleko na biso—mpe na bomoi na yo? Manyola lolenge nini ozwaki liloba ya Nzambe na nzela ya Profeta Joseph Smith. Kanisa kokoma na kati ya zulunale to kokabola na moto moko botondi na yo mpo na makambo ya solo oyo ezongisamaki to emonisamaki polele na nzela na ye.

Tala lisusu 2 Nefi 3:6–24.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 3:1–4.Senga moto ya libota moko atambola na nzela ya “kotengama” mpe nsima na nzela ya “semba”. Elingi koloba nini na libota na biso koyeba ete “banzela ya [Nzambe] ezali semba”?

Malongi mpe Mayokani 121:7–8Ntango moto moko azali kotindika biso toboya kotosa Nzambe, makambo ya solo nini kati na milongo oyo ekoki kosunga biso totikala sembo? Ntango mosusu bato ya libota bakoki kokabolana mikumba na lisano moko kati na oyo wapi moto moko atikali sembo atako batindi ye koboya kotosa Nzambe.

Malongi mpe Mayokani 4.Ntango libota na yo ezali kosolola na ntina ya nini yango elingi koloba kosala na elanga ya Nzambe, bakoki kosala mwa mosala na elanga moko (to kosala lokola ). Bisalelo nini esengeli mpo na mosala ya elanga? Nzambe alimboli nini na eteni 4 oyo ekoki kozwama lokola bisalelo oyo esengeli mpo na kosala mosala na Ye? Libota na yo ekoki kosolola mpo na nini esalelo moko na moko ezali na ntina mpo na kosala mosala ya Nzambe.

Malongi mpe Mayokani 5:7.Nini ezali mwa bandakisa ya makambo ya solo tondimelaka kasi tokoki komona te? Lolenge nini tokoki koyanola moninga oyo alingi elembo ya solo ete Buku ya Mormon ezali solo?

Mpo na kozwa makanisi mingi na ntina ya koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Nakozala Elombe,” Chants pour Enfants, 162.

Kobongisa Boyekoli Makomi mpo na Yo Moko

kokanga molongo moko na moto. “Kokanga molongo ya makomi na moto ezali kotonga bondeko na moninga ya sika. Ezali lokola kokutana na moto ya sika oyo akoki kosunga na ntango ya bosenga, kopesa bofuli mpe bolendisi, mpe kozala liziba ya mpiko mpo na mbongwana oyo esengami” (Richard G. Scott, “Nguya ya Makomi,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2011, 6).

Elilingi
Joseph Smith na baboti na ye

Bozito ya Mpasi ya Kobungisa Nkasa 116, na Kwani Povi Winder

Bimisa na lokasa