Sanza ya Yambo 4–10. Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:1–26: ‘Namonaki Likonzi ya Moto,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani (2020)
Sanza ya Yambo 4–10. Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:1–26,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota
Sanza ya Yambo 4–10
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:1–26
“Namonaki Likonzi ya Moto”
Ntango otangi Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:1–26, nsango nini ozwi mpo na bomoi na yo? Nini ezali ya motuya koleka nyonso mpo na yo mpe libota na yo?
Koma Makanisi na Yo
Malongi mpe Mayokani ezali buku ya biyano na nsambo: Mingi ya bimoniseli ya bule kati na buku oyo biyaki lokola eyano na mituna. Boye, ebongi malamu kobanda boyekoli ya Malongi mpe Mayokani na kotalaka motuna oyo ebandaki bosopani ya emoniseli na mikolo ya nsuka—moko oyo Joseph Smith atunaki na nse ya banzete ya mwa zamba moko na 1820. “Etumba ya maloba mpe makelele kili-kili ya makanisi” (Joseph Smith—Mambi ya kala 1:10) etikaki Joseph na mokakatano na ntina ya eyamba mpe ezalela ya molimo na ye; ntango mosusu likambo oyo ekoki kozala ya yo. Ezali na makanisi mingi ya kozanga boyokani mpe mingongo ya kondimisa bato mingi na mikolo na biso, mpe ntango tolingi kopona-pona nsango yango mpe kozwa bosolo, tokoki kosala oyo Joseph asalaki. Tokoki kotuna mituna, koyekola makomi, komanyola, mpe na nsuka kotuna Nzambe. Na eyano na losambo ya Joseph, likonzi ya moto ekitaki uta na lola; Nzambe Tata mpe Yesu Klisto babimelaki ye mpe bayanolaki mituna na ye. Litatoli ya Joseph na likambo oyo wana ya kokamwa esakoli na bokasi nyonso ete moto “oyo [azangi] bwanya akoka kosenga epai ya Nzambe, mpe akozwa” (Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:26). Tokoki banso kozwa, soki limoni ya lola te, ata na moke limoni ya polele mpenza, oyo engengisami na pole ya lola.
Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:1–26
Joseph Smith azali Profeta ya Bozongisi.
Ntina ya lisitwale ya Joseph Smith ezalaki ya kotia biso “na boyebi ya makambo” mpamba te bosolo na ntina ya Joseph ezali mbala mingi ya kobebisama (Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:1). Ntango otangi Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:1–26, nini elendisi litatoli na yo ya libiangi na ye ya bonzambe? Koma makambo ya solo oyo omoni ete Nkolo alengelaki Joseph Smith mpo na etinda na ye ya kozala profeta. Ntango otangi, osengeli mpe kokoma makanisi mpe mayoki na yo na ntina ya Joseph Smith mpe litatoli na ye.
Tala lisusu Basantu, 1:3–19.
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:5–20
Soki nasengi na bondimi, Nzambe akoyanola.
Esila kokomela yo ete “ozanga bwanya” to omiyoka na mokakatano na ntina ya mokano oyo osengelaki kozwa? (Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:13). Oyekoli nini na maye mayelaki Joseph Smith na milongo 5–20? Kanisa na ntina ya mposa na yo moko ya kozwa bwanya mpe bososoli monene, mpe tala lolenge nini okoluka bosolo.
Tala lisusu 1 Nefi 10:17–19; 15:6–11; Russell M. Nelson, “Emoniseli mpo na Eklezia, Emoniseli mpo na Bomoi na Biso,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2018, 93–96.
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:15–20
Mpo na nini masolo ezali ya ndenge na ndenge na ntina ya Limoni ya Yambo?
Na ntango azalaki na bomoi, Joseph Smith akomaki maye akutanaki na yango na Zamba ya Bule ata na moke mbala minei, mbala mingi kosalelaka mokomi. Mpo na kobakisa, masolo ya balobi mingi ekomamaki na bato oyo bayokaki Joseph koloba na ntina ya limoni na ye. Atako masolo maye ezali kokesena na mwa molai ya makambo, na kotalaka bayoki oyo balandaki ye mpe esika alobelaki yango, atako bongo masolo alobaki ezali ya kokokana. Mpe lisolo moko na moko ebakisi makambo oyo esungaka biso kososola malamu makambo Joseph Smith akutanaki na yango, kaka lokola moko moko ya Bansango malamu minei esungaka biso kososola malamu mosala ya Mobikisi.
Mpo na kotanga masolo mosusu ya Joseph, tala “First Vision Accounts” (Masolo ya Nsango malamu, topics.ChurchofJesusChrist.org). Oyekoli nini uta na kotangaka masolo nyonso oyo?
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:15–20
Limoni ya Yambo ebandaki Bozongisi ya nsango malamu ya Klisto.
Joseph Smith andimaki ete Nzambe akoyanola losambo na ye, kasi asengelaki te komitia na mabanza lolenge nini eyano yango ekobongola bomoi na ye—mpe mokili. Ntango ozali kotanga na ntina ya maye Joseph akutanaki na yango, manyola lolenge nini Limoni ya Yambo ebongolaki bomoi na yo. Ndakisa, okoki kokokisa esakola oyo na banzela mingi: “Mpo ete Limoni ya Yambo esalemaki, nayebi ete …” Lolenge nini opambolamaki mpo na Limoni ya Yambo?
Tala lisusu video “Ask of God: Joseph Smith’s First Vision,” na, ChurchofJesusChrist.org; Les Saints, 1:14–19; Russell M. Nelson, “Yokela Ye,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2020, 88–92.
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:21–26
Nakoki kotikala ngwi na oyo ngai nayebi, atako basusu babwakisi ngai.
Moko ya mapamboli ya makomi ezali ete kati na yango ezali na bandakisa efulami ya bilombe mibali mpe basi oyo balongaki mikakatano na bondimi na Yesu Klisto. Ntango Joseph Smith akutanaki na botelemeli na ntina ya limoni na ye, amikitolaki na Apostolo Paulo, oyo mpe anyokwamaki mpo alobaki ete amonaki limoni. Ntango otangi lisolo ya Joseph, nini efuli yo mpo na kotikala ya kokangama ngwi na litatoli na yo? Ndakisa mosusu nini—uta na makomi to na bato oyo oyebi—epesaka yo mpiko ya kotikala ya kokangama ngwi na makambo ya molimo oyo okutanaki na yango?
Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa
-
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:6.Lolenge nini tokoki kotalela bozangi koyokana na lolenge ete boswani to kowelana ezala te lokola bato oyo balimbolami na molongo oyo?
-
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:11–13.Kotangaka milongo oyo ekoki kofula bato ya libota kokabola maye bakutana na yango ntango molongo ya makomi etuti mitema na bango mpe efuli bango mpo na kosala.
-
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:16–20.Ntango libota na yo ezali kotanga milongo oyo, yeba kolakisa langi oyo ezali kokende elongo na elilingi oyo to foto mosusu ya Limoni ya Yambo (ntango mosusu libota na yo ekosepela koyema dessin na bango moko). Bokoki mpe lisusu kotala video “Kosenga na Nzambe: Limoni ya Yambo ya Joseph Smith” (ChurchofJesusChrist.org). Bokoki moko na moko kokoma molongo ya makambo ya solo toyekoli uta na limoni oyo, nsima kokabola mikanda na bino moko na mosusu. Yango esengeli kozala ntango moko monene mpo na bato ya libota bakabola lolenge nini bazwaki matatoli na bango ya Limoni ya Yambo ya Joseph Smith.
-
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:17.Ntango Nzambe abimelaki Joseph Smith, Ye, abengaki Joseph na nkombo. Ntango nini bato ya libota na yo bayokaki ete Tata na Lola ayebi bango moko moko mpenza?
-
Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:21–26.Lolenge nini tokoki koyanola ntango bato batie ntembe na matatoli na biso?
Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya bana.
Loyembo oyo ekoki koyembama: “Joseph Smith’s First Prayer,” Hymns, no 26.
Mingongo ya Bozongisi
Libota ya Joseph Smith
Tozali biso banso moko na moko na litomba ya mozindo na ntina ya bomoi ya libota na biso, mpe bokeseni ezalaki te mpo Joseph Smith . Bondimi makasi mpe misala ya baboti na ye kati na eyamba elonaki nkona ya bondimi oyo esalaki ete Bozongisi esalema. Zulunale ya Joseph elobeli maloba ya lokumu oyo: “maloba mpe lokota [ezali] kokoka te mpo na kolakisa botondi oyo nasengeli kopesa epai ya Nzambe mpo na kopesaka ngai baboti ya lokumu boye.”1
Maloba malandi uta na mama na ye, Lucy Mack Smith; ndeko na ye ya mobali William Smith; mpe Profeta ye moko epesi biso bososoli na nguya monene ya eyamba kati na libota ya Smith.
Lucy Mack Smith
“[Penepene na 1802], nakweyaki maladi. … Namilobelaki ngai moko, namilengelaki te mpo na kokufa mpo ete nayebi te banzela ya Klisto, mpe emonanaki epai na ngai lokola ete ezalaki na lobwaku ya molili mpe wapi namiyoka kaka ngai moko katikati na ngai moko mpe Klisto ete namekaki kokatisa ngambo te. …
“Natalelaki Nkolo mpe nabondelaki mpe nasambaki epai ya Nkolo ete akoka kobatela bomoi na ngai ete nakoka kobokola bana na ngai mpe kolendisa motema ya mobali na ngai; boye nde natikalaki butu mobimba. Nasalaki liyokani na Nzambe [ete] soki akotika ngai na bomoi nakosala nyonso mpo nakota na eyamba oyo ekopesa ngai makoki ya kosalela ye malamu, ezala soki ekozwama na Biblia to na esika wapi mosusu nakokuta yango, ata soki esengelaki kozwama uta na lola na nzela ya losambo mpe bondimi. Na nsuka mongongo elobelaki ngai mpe elobaki, ‘Luka mpe okozwa, beta ekofungolelama yo. Tika motema na yo elendisama. Bondimela Nzambe; bondimela mpe ngai.’ …
“Uta na ntango oyo kokende liboso nakobaki kozwa makasi. Nalobaki kaka moke na ntina ya likambo ya eyamba atako etondisamaki na makanisi na ngai mobimba, mpe nakanisaki ete nakotia molende nyonso ntango kaka nakokaki kozala na makoki ya koluka moto ya botosi na Nzambe oyo ayebaki banzela ya Nzambe mpo na kolakisa ngai makambo ya Lola.”2
William Smith
“Mama na ngai, oyo azalaki mwasi ya botosi na Nzambe mpenza mpe oyo azalaki na litomba mpo na bolamu ya bana na ye, bipai nyonso mibale awa mpe nsima ya bomoi, asalelaki banzela nyonso oyo bolingo na ye ya moboti ekokaki kopesa ye, mpo na kotindika biso tomipesa na kolukaka lobiko ya milimo na biso, to (lokola liloba ezalaki na ntango wana) ‘na kozwaka eyamba.’ Azalaki kolendisa biso tokende na mayangani, mpe pene na libota mobimba esepelaki na likambo yango, mpe bakomaki baluki ya bosolo.”3
“Tozalaki ntango nyonso kosala nsambo ya libota mpo nakoki komikundola yango. Nazali komikundola malamu tata azalaki kotia maneti na libenga ya kazaka na ye, … mpe ntango biso bana mibali tozalaki komona ye alati matalatala na ye, tozalaki koyeba ete ezali elembo ya komilengela mpo na losambo, mpe soki tomonaki yango te mama akoyebisa biso, ‘William,’ to moto kani oyo azalaki epotu ya moto, ‘milengela mpo na losambo.’ Nsima ya losambo tozalaki na loyembo moko oyo tozalaki koyemba.”4
Joseph Smith
“Nalobi sikawa, ete [tata na ngai] atikala kosala eloko moko ya mabe te oyo ekoki kolobelama ete ezangaki boboto, na bomoi na ye, na boyebi na ngai. Nalingaki tata na ngai mpe makanisi na ye; mpe makundoli ya misala na ye ya lokumu, efandi na bozito likolo ya molimo na ngai; mpe mingi ya maloba malamu mpe ya kimoboti na ye epai na ngai, ekomami na palaki ya motema na ngai. Bule epai na ngai, ezali makanisi oyo nalingaka na lisolo ya bomoi na ye, oyo ezali na nguya na moto na ngai mpe epikami na kati, na botali na ngai moko uta mbotama na ngai. … Mama na ngai azali lisusu mwasi moko ya lokumu mpenza, mpe ya malamu koleka basi nyonso.”5