Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Yambo 25–31. Malongi mpe Mayokani 6–9: “Oyo Ezali Molimo ya Emoniseli”


“Sanza ya Yambo 25–31. Malongi mpe Mayokani 6–9: ‘Oyo ezali Molimo ya Emoniseli,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya Yambo 25–31. Malongi mpe Mayokani 6–9,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

mokomi  kokomaka na lokasa

Sanza ya Yambo 25–31.

Malongi mpe Mayokani 6–9

“Oyo ezali Molimo ya Emoniseli”

Nkolo amonisaki makambo ya solo epai na biso na mayele mpe mitema na biso (tala Malongi mpe Mayokani 8:2–3). Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 6–9, koma makanisi nyonso oyo okozwa.

Koma Makanisi na Yo

Na eleko ya elanga moke ya mobu 1828, elenge moteyi moko ya bana kelasi na nkombo ya Oliver Cowdery azwaki mosala ya kotangisa na Manchester, New York, mpe afandaki na libota ya Lucy mpe ya Tata Joseph Smith. Oliver ayokaki nsango ya ya mwana na bango ya mobali Joseph, oyo azalaki sikawa kofanda na Harmony, Pennsylvania, mpe Oliver, oyo azalaki komimona ye moko lokola moluki ya bosolo, alingaki koyeba mingi koleka. Ba Smiths balimbolaki bayei ya banjelu bayaki kotala bango, masolo ya makomi ya kala, mpe libonza ya kobongola na nguya ya Nzambe. Oliver asepelaki makasi. Ekoki kozala ya solo? Lucy mpe Tata Joseph bapesaki ye toli oyo ezali mpo na moto nyonso oyo alukaka bosolo: sambela mpe senga Nkolo.

Oliver asalaki, mpe Nkolo ayanolaki, kolobaka na kimia mpe elikya na mayele ya Oliver. Emoniseli oyo Oliver amonaki, ekoki kozala ya ye moko—likambo moko ayekolaki kutu mingi koleka na mozindo na basanza ya nsima. Emoniseli ezali te kaka mpo na baprofeta; ezali mpo na moto nyonso oyo azali na mposa na yango mpe asengi yango. Oliver ayebaki makambo nyonso naino te, kasi ayebaki ndambo mingi ya kokoka mpo na koleka na eteni elandi ya nzela na ye. Nkolo azalaki kosala eloko moko ya ntina monene na nzela ya Joseph Smith, mpe Oliver alingaki kozala moto moko kati na yango.

Mpo na kozwa nsango mingi koleka na ntina ya lisolo na ebandeli ya Malongi mpe Mayokani 6–9, tala Basantu, 1:58–64; “Days of Harmony” (video, ChurchofJesusChrist.org).

elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 6; 8–9

Tata na Lola alobelaka ngai na nzela ya “Molimo ya bosolo.”

Na eleko ya milonda na mobu 1829 Oliver Cowdery akendaki mobembo na Harmony mpe amipesaki na bolingi na ye moko kozala mokomi ya Joseph Smith ntango azalaki kobongola Buku ya Mormon. Oliver akomaki sikawa na bososoli malamu ya mosala ya kobongola bimoniseli. Boyebi wana etutaki motema na ye, mpe amitunaki mpe soki akokaki lisusu kopambolama na likabo ya kobongola. Nkolo apesaki ye ndingisa ya komeka kobongola, kasi kozwa emoniseli ezalaki eloko ya sika mpo na Oliver, mpe komeka na ye etambolaki malamu te. Azalaki naino na mingi ya koyekola, mpe Malongi mpe Mayokani 6, 8, mpe 9 elakisi ete Nkolo azalaki na bolingi ya koteya ye.

Ntango ozali kotanga biteni oyo, tala nini Nkolo ateyaki na ntina ya emoniseli moto azwaka mpo na ye moko. Lolenge nini maloba na Ye ekangami na maye okutanaki na yango na bomoi na yo—to na maye olingi kozwa?

Ndakisa, nini Malongi mpe Mayokani 6:5–7; 8:1; 9:7–8 epesi yo makanisi na ntina ya oyo Nkolo asengaka yo yambo Abimisa bolingi na Ye?

Oyekoli nini uta na Malongi mpe Mayokani 6:14–17, 22–24; 8:2–3; 9:7–9 na ntina ya banzela ekeseni oyo emoniseli esengeli koya?

Ezali na likambo mosusu oyekoli na ntina ya emoniseli uta na biteni oyo?

Mpo na koyekola mingi na ntina ya emoniseli, tala Russell M. Nelson, “Emoniseli mpo na Eklezia, Emoniseli mpo na Bomoi na Biso,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2018, 93–96; Julie B. Beck, “And upon the Handmaids in Those Days Will I Pour Out My Spirit,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2010, 10–12. Mpo na ozwa nsango mingi koleka na ntina ya “likabo ya Alona” oyo elimbolami na kati ya eteni 8, tala “Oliver Cowdery’s Gift,” Revelations in Context, 15–19.

Malongi mpe Mayokani 6:18–21, 29–37

Talela Klisto na likanisi nyonso.

Atako Joseph asilaki kokutana na “makambo ya mpasi” ntango azalaki kosala mosala ya Nkolo (Malongi mpe Mayokani 6:18), ye mpe Oliver bazalaki solompenza na likanisi moko te ya lolenge nini makambo oyo masengelaki kokoma mpasi nsima ya mibu mingi. Kasi Nkolo ayebaki, mpe ayebi mikakatano nini ekokoma na bomoi na yo ya mikolo mikoya lokola. Toli na ye epai ya Joseph mpe Oliver na Malongi mpe Mayokani 6:18–21, 29–37 ekoki lisusu kosunga yo. Lolenge nini Joseph mpe Oliver bakokaki komiyoka nsima ya koyoka maloba oyo? Nini ozwi na milongo miye oyo esalisi yo kotiela Nkolo motema? Lolenge nini okoki kotalela Klisto mingi koleka na bomoi na yo?

Oliver Cowdery

Oliver Cowdery, na Lewis A. Ramsey

Malongi mpe Mayokani 6–7; 9:3, 7–14

“Kutu lokola olingi kozwa na ngai ekozala se bongo.”

Tala mbala boni maloba lokola “mposa” to “bamposa” emonani na biteni 6 mpe 7. Nini oyekoli uta na biteni oyo mpo na motuya oyo Nzambe atie likolo ya bamposa na yo? Mituna yo moko motuna ya Nkolo na Malongi mpe Mayokani 7:1: “Mposa na yo ezali nini?”

Moko ya mposa ya sembo ya Oliver Cowdery—mpo na kobongola lokola Joseph Smith abongolaki—ekokisamaki te. Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 9:3, 7–14, makanisi nini ozwi oyo ekoki kosalisa yo ntango bamposa na yo ya sembo ezali kokokisama te?

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 11:8; Dallin H. Oaks, “Desire,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2011, 42–45.

elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 6:7, 13.Lolenge nini okoki kosunga libota na yo esosola ete “misolo” ya solo ezwami na bomoi ya seko? (molongo 7). Okoki kobengisa bato ya libota basala mosolo ya lokuta mpe bakoma to bayema likolo na yango mwa mapamboli mingi ya ndenge na ndenge libota na yo ezwaki mpo na ntina ya nsango malamu ezongisama.

Malongi mpe Mayokani 6:15, 22–23; 8:2–3; 9:7–9.Kotanga milongo oyo na ntina ya lolenge nini Nzambe alobelaka bana na Ye ekoki kozala libaku malamu mpo na kokabola na libota na yo lolenge nini Alobelaki yo.

Malongi mpe Mayokani 6:33–37. Bato ya libota bakoki kokabola banzela bakoki “kosala malamu,” ata na ntango bazali koyoka bobangi. Ekoki lisusu kosalisa soki botali nyonso to ndambo ya maloba ya Mpaka Ronald A. Rasband “Bomitungisa Te” (Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 18–21). Elingi koloba nini “kotalela [Klisto] na likanisi nyonso”? (eteni 36). Nini ezali bandakisa mosusu ya bato oyo batalelaki Nkolo mpo na kolonga ntembe mpe bobangi? (tala, ndakisa, Estele 4; Alma 26:23–31).

Malongi mpe Mayokani 8:10.Oyo ekoki kozala libaku malamu mpo na kokabola lolenge nini bondimi na Yesu Klisto elendisaki yo mpe libota na yo. Mpo na nini ezali ntina ete biso “tosenga na bondimi”? Mapamboli nini omoni uta na kolukaka biyano to lisalisi na bondimi?

Mpo na kozwa makanisi mingi mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Meka Kosala Bolamu,” Chants pour Enfants, 158.

elembo ya mingongo ya bozongisi

Mingongo ya Bozongisi

Bobongoli ya Buku ya Mormon

Na Sanza ya minei mobu 1829, sanza wapi biteni 6–9 ya Malongi mpe Mayokani ezwamaki, mosala monene ya Joseph Smith ezalaki ya kobongola Buku ya Mormon. Ntango batunaki ye nsima mpo na koyeba lolenge nini mokanda oyo ebongolamaki, Joseph alobaki “ete ezalaki ntina te ya koyebisa mokili makambo nyonso.”1 Azalaki mbala mingi koloba kaka ete yango ebongolamaki “na likabo, mpe na nguya ya Nzambe.”2

Toyebi makambo mingi te na ntina ya mosala ya kokamwa ya bobongoli, kasi toyebi ete Joseph Smith azalaki momoni, asungamaki na bisalelo oyo Nzambe alengelaki: mabanga mibale oyo ezalaki komonisa kati na nkombo ya Urim mpe Thummim mpe libanga mosusu oyo ebengamaki libanga ya momoni.3

Maloba elandi, uta na banzeneneke oyo bamonaki mosala ya bobongoli na miso, esungaki litatoli ya Joseph Smith.

Sanduku ya mabaya ya Hyrum Smith oyo ebombaki bapalaki ya wolo

Bato bakanisaka ete sanduku oyo, oyo ezalaki ya Hyrum Smith, esalelamaki mpo na kobomba bapalaki ya wolo mpo na ntango moke.

Emma Smith

Emma Smith

“Ntango mobali na ngai azalaki kobongola Buku ya Mormon, nakomaki mwa ndambo na yango, ntango azalaki kotanga molongo moko moko, liloba moko moko, mpe ntango akomaki na bankombo ya bato oyo akokaki kotanga yango te, to maloba ya milai, azalaki kotanga letele moko moko na mongongo makasi, mpe ntango nazalaki kokoma yango, soki nasali mwamabunga kani na baletele, azalaki kotelemisa ngai mpe kosembola baletele na ngai, atako ezalaki mpasi mpo na ye komona lolenge nini nazalaki kokoma yango na ntango wana. Kutu liloba Sarah akokaki koloba yango te na ebandeli, kasi asengelaki kotanga letele moko moko, mpe nakokaki koloba yango mpo na ye.”4

“Mbala mingi bapalaki ezalaki ya kotiama likolo ya mesa na likanisi ata moko te ya kobomba yango, elingama na mwa elamba ya mesa, oyo napesaki ye mpo na kogumba yango na kati. Mokolo moko nayokaki bapalaki, lokola ezalaki likolo ya mesa, kolakisaka bandelo mpe motindo na yango. Ezalaki komonana lokola lokasa ya papiye evimba ya kongumbama, mpe ezalaki kolenga-lenga na makelele ya libende ntango bansonge na yango ezalaki kotombolama na mosapi monene, lokola ntango mosusu moto atombolaka bansonge ya buku na mosapi monene. …

“Boyambi na ngai ezali ete Buku ya Mormon ezali solo ya bonzambe—nazali na ntembe ata moke te mpo na yango. Nasepeli ete moto moko te akokaki kotanga nkoma ya maboko soki afulamaki te; mpo, na ntango nazalaki kosala lokola mokomi na ye, [Joseph] azalaki kotangela ngai ngonga nsima ya ngonga; mpe ntango azongaki nsima ya kolia, to nsima ya kokata, azalaki kobanda mbala moko esika asukaki, na kozangaka kotala nkoma ya maboko to kosengaka batangela ye eteni kani na yango. Oyo ezalaki eloko ya momesano mpo na ye kosala. Ezalaki mpasi na komona ete moto oyo atanga akoka kosala yango; mpe mpo na moto oyo ayebi te mpe oyo atanga te lokola azalaki, ekokaki kosalema mpenza te.”5

Emma Smith kosalisaka na kobongola.

Elilingi ya Emma mpe Joseph Smith na Michael T. Malm

Oliver Cowdery

Oliver Cowdery

“Nakomi na biki na ngai moko Buku ya Mormon mobimba (longola se mwa nkasa moke) lokola ekweyaki uta na mbebo ya profeta, ntango abongolaki yango na likabo mpe nguya ya Nzambe, na lisalisi ya Urim mpe Thummim, to, ndenge kaka ebengami na buku, bibongoleli bisantu. Namonaki na miso na ngai moko, mpe nasimbaki na maboko na ngai moko, bapalaki ya wolo uta na oyo wapi buku ebongolamaki. Namonaki mpe lisusu bibongoleli yango.”6

Matangi

  1. Bambando, 25–26 Sanza ya zomi 1831,” Buku ya mbando 2, 13, josephsmithpapers.org.

  2. Na “Mambi ya kala ya Eklezia,” Times and Seasons, Sanza ya misato. 1, 1842, 707; tala lisusu Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (2007), 441.

  3. Mpo na kozwa nsango mingi, tala “Bobongoli ya Buku ya Mormon,” Bamama ya makambo ya Nsango malamu, topics.ChurchofJesusChrist.org; Richard E. Turley Jr., Robin S. Jensen, mpe Mark Ashurst-McGee, “Joseph Momoni,” Ensign, Sanza ya zomi. 2015, 48–55.

  4. Na Edmund C. Briggs, “A Visit to Nauvoo in 1856,” Journal of History, vol. 9, no. 4 (Sanza ya zomi. 1916), 454; etangami na Russell M. Nelson, “A Treasured Testament,” Ensign, Sanza ya nsambo 1993, 62.

  5. Na “Last Testimony of Sister Emma,” Saints’ Herald, Sanza ya zomi. 1, 1879, 290; kokakola letele ya sikawa.

  6. Na zulunale ya Reuben Miller, sanza ya zomi 21, 1848, Church History Library, Salt Lake City; kokakola letele, bilembo ya bokomi, mpe baletele minene ya sikawa.

Joseph Smith mpe Oliver Cowdery kobongolaka bapalaki ya wolo

Joseph Smith mpe Oliver Cowdery bayekolaki mingi na nzela ya mosala ya kobongola bapalaki ya wolo.