Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Yambo 11–17. Malongi mpe Mayokani 2; Joseph Smith—Mambi ya Kala 1:27–65: “Mitema ya Bana Ekobaluka epai ya Batata na Bango”


“Sanza ya Yambo 11–17. Malongi mpe Mayokani 2; Joseph Smith—Mambi ya kala 1:27–65: ‘Mitema ya Bana Ekobaluka epai ya Batata na Bango,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya Yambo 11–17. Malongi mpe Mayokani 2; Joseph Smith—Mambi ya kala 1:27–65,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Moroni kobimelaka Joseph Smith

Abengaki Ngai na Nkombo na Ngai, na Michael Malm

Sanza ya Yambo 11–17

Malongi mpe Mayokani 2; Joseph Smith—Mambi ya kala 1:27–65

“Mitema ya Bana Ekobaluka epai ya Batata na Bango”

Molimo Mosantu akoki koteya yo ntango nyonso ozali kotanga makomi—ata makomi oyo otanga mbala mingi liboso. Na yango zala ya kofungwama na boyebi mpe bofuli ya sika.

Koma Makanisi na Yo

Elekaki mibu misato uta Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto, babimelaki Joseph Smith na mwa zamba, kasi Joseph azwaki bimoniseli mosusu te uta wana. Abandaki komitungisa na ntina ya ezalela na ye liboso ya Nkolo. Lokola banso kati na biso, asalaki mabunga, mpe amiyokaki ya kokweya mpo na yango. Nzokande Nzambe azalaki kaka na mosala mpo na ye kosala. Mpe mosala oyo Joseph abiangamaki kosala ezali ya kokangama na oyo Nzambe asengi biso. Joseph atindamaki kobimisa Buku ya Mormon; totindami kosala nini na yango? Joseph azwaki bafungola ya bonganganzambe mpo na kobalola mitema ya bana epai ya batata na bango, lolenge nini biso tozali kobalola mitema na biso epai ya bankoko na biso? Bayebisaki Joseph masakoli oyo masengelaki kala mingi te kokokisama; eteni na biso ezali nini na kosungaka mpo na kokokisa yango? Ntango tozali kosala mosala ya Nzambe, tokoki kozela kokutana na botelemeli mpe kutu moniokoli, kaka lokola esalaki Profeta. Kasi tokoki lisusu kozala na bondimi ete Nkolo akokomisa biso bisalelo na maboko na Ye, kaka lokola Asalaki mpo na Joseph.

Tala lisusu Basantu, 1:20–48.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi yo Moko

Joseph Smith—Mambi ya kala 1:27–33

Nzambe azali na mosala mpo ete ngai nasala.

Ntango ozali kotanga Joseph Smith—Mambi ya kala 1:27–33, kanisa ete Nzambe azali na mosala mpo na yo kosala, lokola Asalaki mpo na Joseph Smith. Manyola libiangi oyo uta na Mokambi Russell M. Nelson: “Senga Tata na yo na Lola, na nkombo ya Yesu Klisto, lolenge nini Ayokaka na ntina na yo mpe etinda na yo awa na mabele. Soki osengi na motema moko, mbala na mbala Molimo akomimisa to akoyebisa yo na mongongo ya nse bosolo oyo ebongolaka bomoi. … Nalaki yo ete ntango obandi kososola ata mwa moke ya lolenge Tata na yo ya Lola amonaka yo mpe nini Ye azali kotiela yo motema mpo osalela Ye, bomoi na yo ekozala lolenge moko te!” (“Becoming True Millennials” [worldwide devotional for young adults, Sanza ya yambo. 10, 2016], broadcasts.ChurchofJesusChrist.org).

Okoki ntango mosusu koyoka lolenge Joseph ayokaki na milongo 28–29. Nini okoki koyekola uta na ndakisa ya Joseph na ntina ya oyo osengeli kosala ntango misala na yo ezali lolenge moko te na mosala Nzambe abengi yo kosala?

Joseph Smith—Mambi ya kala 1:34–65

Buku ya Mormon ezali na “litondi ya Nsango malamu ya seko.”

Ntango ozali kotanga Joseph Smith—Mambi ya kala 1:34–65, tala na molai makambo nini na kati ya milongo oyo ekoki kozala motuya mpo na yo soki oyoka ata mokolo moko te na ntina ya Buku ya Mormon. Lokola mondimi, mpo na nini lisolo oyo ezali na ntina mpo na litatoli na yo ya Buku ya Mormon?

Tala lolenge nini Buku ya Mormon ekokisi masakoli na Yisaya 29:4, 11–18.

Joseph Smith—Mambi ya kala 1:36–41

Bozongisi ya nsango malamu ekokisaki masakoli ya kala.

Moroni atangelaki Joseph masakoli mingi ya Boyokani ya Kala mpe ya Sika, lokola Yisaya 11; Misala 3:22–23; mpe Yoele 2:28–32. Mpo na nini masakoli oyo makokaki kozala ntina mpo ete Joseph ayeba yango? Mpo na nini ezali ntina mpo ete oyeba yango?

Malongi mpe Mayokani 2

Eliya azongisaki nini?

Mokambi Henry B. Eyring alobaki: “Ezali ntina ya koyeba mpo na nini Nkolo alakaki kotinda Eliya. Eliya azalaki mosakoli monene na nguya monene oyo epasamelaki ye na Nzambe. Azalaki na nguya monene oyo Nzambe apesaka na bana na Ye: azalaki na nguya ya kokangisa, nguya ya kokanga na nse mpe ya kokanga yango na lola” (“Mitema Ekangisama Elongo,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2005, 78).

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 110:13–16; David A. Bednar, “Let This House Be Built unto My Name,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2020, 84–87.

Elilingi
Tempelo ya Palmyra na New York na eleko yambo na eleko ya malili makasi

Tempelo ya Palmyra na New York. Mabota ekangisamaka na tempelo na nguya ezongisami na nzela ya Eliya.

Malongi mpe Mayokani 2

Eliya ayaki kobalola motema na ngai epayi ya bankoko na ngai.

Maloba lokola “kolona,” “mitema,” mpe “kobalola” na eteni oyo ezali koteya yo na ntina ya etinda ya Eliya mpe mapamboli ya bafungola ya bonganganzambe azongisaki? Lolenge nini oyokaki motema na yo kobaluka epai ya bankoko na yo? Kanisa banzela nini okoki koyokela mayoki ya boye mbala mingi koleka. Ntango mosusu okoki kotuna ndeko moko akabola na yo lisolo ya moko ya bankoko na yo—kutu malamu koleka, okoki kokoma yango. Ntango mosusu okoki kokitola nkoko oyo akufa oyo atikala kozwa makuli ya nsango malamu te mpe nsima kosala mosala wana na kati ya tempelo.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Joseph Smith—Mambi ya kala 1:28–29.Lolenge nini Joseph Smith ayokaki na ntina ya mabunga na ye? Nini asalaki na eyano ya mayoki oyo? Nini toyekoli uta na ye na ntina ya nini tosengeli kosala ntango tosali mabunga?

Joseph Smith—Mambi ya kala 1:33–54.Okoki kotuna moto moko ya libota kotanga na mongongo makasi eteni to nsango nyonso ya Moroni uta na Joseph Smith—Mambi ya kala 1:33–42 mbala minei (mpo ete Moroni azongelaki maloba oyo mbala minei). Na kati ya botangi moko na moko, senga baye libota mosusu bakabola oyo bazali komikundola uta na nsango oyo, na bozangi kotalaka makomi. Mpo na nini Nkolo akokaki kobandela bansango ya ntina mbala ebele? Nini ezali banzela mosusu oyo Nkolo ateyaka biso na nzela ya kozongela lisusu maloba?

Malongi mpe Mayokani 2:2.Mpo na kosunga bana na yo basosola “bilaka basalaki epai ya batata,” okoki kotanga Abraham 2:9–11 elongo to kotala video “Batatoli ya kafukafu ya Klisto—Mokambi Russell M. Nelson” (ChurchofJesusChrist.org). Kitola bilaka Nzambe asalaki lokola eteni ya liyokani na Ye elongo na Abalayama. Lolenge nini “tolonaka” bilaka oyo na mitema na biso?

Malongi mpe Mayokani 2:2–3.Mpo na kosunga bato ya libota babalola mitema na bango epai ya batata (to bankoko) na bango, okoki kobengisa bango bayekola na ntina ya nkoko moko mpe kokabola oyo bayekoli elongo na bato basusu ya libota. Mpo na nini Nkolo alingaka biso toyekola na ntina ya bato ya libota na biso mpe kosala makuli ya tempelo mpo na bango? Lolenge nini topambolami ntango tokotaka elongo kati na mosala ya mambi ya kala ya libota mpe mosala ya tempelo? (tala Dale G. Renlund, “Mambi ya kala ya Libota mpe Mosala ya Tempelo: Kokangisa mpe Kobikisa,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2018, 46–49).

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Mambi ya kala ya Libota—Nazali Kosala Yango,” Chants pour Enfants, 94.

Kobongisa Boyekoli Makomi na Yo moko

Kosalela lisungi ya boyekoli makomi. Bisalelo lokola makomi ya nse ya lokasa, Mokambi na Masolo, Dikisionele ya Biblia, Mokambi na Makomi, mpe ChurchofJesusChrist.org ekoki kosunga yo ososola malamu mingi bato, makambo manene, mpe maloba na kati ya makomi.

Elilingi
Moroni azali kopesa Joseph Smith bapalaki ya wolo

Joseph Azali Kozwa Bapalaki, na Gary E. Smith

Bimisa na lokasa