Malongi mpe Mayokani 2021
Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo Moko ya Makomi


Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo Moko ya Makomi,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo Moko ya Makomi,” Yaka Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021

Elilingi
Moto azali koyekola makomi

Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo Moko ya Makomi

Oyo ezali mwa nzela ya pete mpo na kobongisa boyekoli na yo ya liloba ya Nzambe kati na makomi

Sambela mpo ete Ofulama na Molimo.

Makomi ezali liloba ya Nzambe, boye senga Ye lisalisi mpo na kososola yango.

Luka Bosolo na ntina ya Yesu Klisto.

Makomi eteyaka biso ete makambo manso etatolaka Klisto (tala 2 Nefi 11:4; Mose 6:63), boye kanisa kokoma to kotiaka bilembo na milongo oyo etatoli Mobikisi, komisa misisa ya bolingo na yo mpo na Ye mozindo, mpe teya boniboni kolanda Ye.

Luka Maloba mpe Masakola oyo Ezali Kofula.

Okoki komona ete maloba mosusu mpe masakola na makomi etuti yo, lokola soki ekomamaki mpenza mpo na yo. Ekoki komonana elongobani na yo mpe ekoki kofula mpe kozala na ntina mpo na yo. Kanisa kotia yango bilembo na makomi to kokoma yango na zulunale moko ya boyekoli.

Luka Bosolo ya Nsango Malamu.

Ntango mosusu bosolo ya nsango malamu (ebengami mbala mingi malongi to mabongi) elobami mbala moko, mpe ntango mosusu etalisami na nzela ya ndakisa to lisolo. Mituna, “Bosolo nini ya seko eteyami na milongo oyo?”

Yokela Molimo

Tia bokebi na makanisi mpe mayoki na yo, ata soki etali makambo oyo ozali kotanga te. Mayoki wana ekoki kozala makambo oyo mpenza Tata na yo na Lola alingi yo koyekolisa.

Kokanisa makomi na Bomoi na Yo.

Kanisa lolenge boni nsango mpe mateya ozali kotanga etali bomoi na yo. Ndakisa, okoki komituna, “Makambo nini nakutana na yango ekokani na oyo nazali koyekola?” to “Lolenge boni nakoki kolanda ndakisa ya moto oyo kati na makomi?”

Tuna Mituna ntango Ozali Koyekola

Ntango ozali koyekola makomi, mituna ekoki koya na makanisi. Mituna oyo ekoki kotala nini ozali kotanga to bomoi na yo na makambo mingi. Manyola mituna oyo mpe luka biyano ntango ozali kokoba koyekola makomi.

Salela Masalisi ya Koyekola Makomi.

Mpo na kozwa boyebi ya kobakisa na kati ya milongo ozali kotanga, salela matangi na nse ya lokasa, Mokambi na Masolo, lisusu Dikisionele ya Biblia, Mokambi na Makomi (scriptures.ChurchofJesusChrist.org), mpe masalisi masusu mpo na koyekola.

Kanisa Esika mpe Eleko Makomi Ezali Kolobela

Okoki kozwa boyebi ya makambo oyo ezali na ntina monene mpo na oyo etali litangi moko ya makomi ntango otali nyonso ezingi makomi yango, lokola makambo to esika ebandaki. Ndakisa, koyebaka makambo na ebandeli mpe boyambi ya bato Nzambe alobaki na bango ekoki kosunga yo kososola malamu mingi ntina ya maloba na Ye.

Koma Makanisi mpe Mayoki na Yo

Ezali na nzela mingi ya kokoma mayoki oyo ekoya ntango ozali kotanga. Ndakisa, okoki kotia elembo na liloba to lisakola moko ya ntina mpe kokoma makanisi na yo lokola litangi moko na makomi na yo. Okoki lisusu kobatela zulunale moko ya boyebi, mayoki, mpe makanisi ozali kozwa.

Yekola Maloba ya Baprofeta mpe Bapostolo ba Mikolo mya Nsuka.

Tanga nini baprofeta mpe bapostolo ba mikolo mya nsuka bateyi mpo na oyo etali mabongi omoni kati na makomi (ndakisa, tala conference.ChurchofJesusChrist.org mpe magazini ya Eklezia).

Kabola Boyebi

Kososola boyebi uta na boyekoli na yo moko ezali kaka zela moko ya malamu mpo na koteya basusu te, kasi ezali lisusu kosalisa na kolendisaka bososoli na yo ya oyo otangi.

Salela Oyo Yo Oyekoli.

Koyekola makomi esengeli kaka te kofula biso kasi lisusu kokamba biso na kobongola lolenge tozali kotambwisa bomoi na biso. Yoka nini Molimo ezali kotindika yo osala ntango ozali kotanga, mpe nsima kana kosalela bitinda yango.

Elilingi
mwasi koyekolaka makomi

Mpaka David A. Bednar alobaki: “Tosengeli te kozela ete Eklezia lokola lingomba eteya to elobela biso nyonso tosengeli koyeba mpe kosala mpo na kokoma bayekoli oyo bamipesa mpe koyika mpiko tii na nsuka. Nzokande, mokumba na biso moko ya moto na moto ezali ya koyekola nini tosengeli koyekola, kotambwisa bomoi lolenge toyebi tosengeli kotambwisa, mpe kokoma banani Moteyi alingi biso tokoma. Mpe bandako na biso ezali esika ya nsuka mpo na koyekola, kozala mpe kokoma” (“Prepared to Obtain Every Needful Thing,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2019 2019, 102).

Bimisa na lokasa