Malongi mpe Mayokani 2021
Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota


“Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota,Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota,Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Kosalela Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota

Mokanda Oyo Ezali Mpo na Nani?

Mokanda oyo ezali mpo na moto mpe libota nyonso kati na Eklezia. Esalemi mpo na kosalisa bino boyekola nsango malamu—ezala mpo na bino moko to elongo na libota na bino. Soki na ntango eleki boyekolaki nsango malamu mbala na mbala te, mokanda oyo ekoki kosalisa bino mpo na kobanda. Soki bosila kozala na momesano ya koyekola nsango malamu, mokanda oyo ekoki kosalisa bino mpo na kozwa mabaku ya ntina mingi koleka.

Lolenge nini Nasengeli Kosalela Mokanda Oyo?

Bosalela mokanda oyo na lolenge oyo bomoni ekoki kosalisa bino. Bokoki kokamata yango lokola mokambi to lisalisi mpo na boyekoli ya makomi ya moto ye moko mpe mpo ya libota. Bokoki lisusu kosalela yango mpo na likita ya libota na mpokwa. Miango ezali kotalisa mabongi ya ntina maye mazwami kati na Malongi mpe Mayokani, kopesa makanisi ya koyekola mpe milulu mpo na bato mpe mabota, mpe ezali kopesa bisika mpo na kokoma mayoki ya motema na yo.

Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota esalemi te mpo na kozwa esika to kotelemela makambo mosusu ya malamu oyo bozali kosala. Bolanda bokambami ya Molimo mpo na kozwa mokano lolenge nini kobanda boyekoli ya bino moko ya liloba ya Nzambe.

Lolenge nini Mokanda Oyo Etali Maye Mazali Koleka na Eklezia?

Miango ya mokanda oyo ebongisami engebene na manaka ya kotanga ya poso na poso. Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana mpe Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Eyenga elandi manaka se moko wana. Mpo na kosunga bokasi na bino mpo na koyekola mpe kosalela nsango malamu na ndako, bateyi na bino na eklezia bakopesa bino mabaku ya kokabola boyebi, makanisi, mpe mituna na bino mpo na oyo etali biteni ya makomi oyo bozalaki koyekola na ndako.

Lokola Eteyelo ya Eyenga eteyami kaka mbala mibale na sanza, bateyi ya Eteyelo ya Eyenga bakoki kopona kolekisa to kosangisa miango mpo na kolanda manaka ya poso na poso. Oyo ekoki lisusu kozala na ntina monene baposo mosusu ntango makita ya Eklezia oyo esalemaka ntango nyonso ekoki kosalema te mpo na likita ya likonzi to bantina mosusu. Na baposo oyo bobengisami kokoba koyekola Malongi mpe Mayokani na ndako.

Esengeli Ngai Kolanda Manaka Yango Kaka Ndenge Ebongisami?

Manaka lokola ebongisami ekosunga bino kosilisa kotanga Malongi mpe Mayokani na nsuka ya mobu. Mpo na kobakisa, kolandaka manaka se moko lokola basusu ekoki kokamba bino na makambo malamu na ndako, na eklezia, mpe bisika nyonso mosusu. Kasi bomiyoka lokola bakangi bino na manaka to lokola nde botindami na makasi kotanga milongo nyonso te; manaka ezali kaka mokambi mpo na kosunga bino bomitambwisa. Eloko ya motuya ezali ete bozali koyekola nsango malamu bino moko mpe lokola libota.

Elilingi
Balongani bazali koyekola makomi

Bimisa na lokasa