Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya mibale 22–28. Malongi mpe Mayokani 18–19: “Motuya ya Milimo Ezali Monene”


“Sanza ya mibale 22–28. Malongi mpe Mayokani 18–19: ‘“Motuya ya Milimo Ezali Monene,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya mibale 22–28. Malongi mpe Mayokani 18–19,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Elanga ya Martin Harris

Elanga ya Martin Harris, na Al Rounds

Sanza ya mibale 22–28.

Malongi mpe Mayokani 18–19

“Motuya ya Milimo Ezali Monene”

Bimoniseli na kati ya Malongi mpe Mayokani epesamaki lokola eyano na mabaku se moko mpamba nsima ya mibu 200 eleki, kasi mabongi oyo bimoniseli yango eteyaka ezali mpo na seko. Luka mabongi yango ntango ozali kotanga, mpe kanisa lolenge nini kosalela yango mpo na yo.

Koma Makanisi na Yo

Martin mpe Lucy Harris bazalaki na moko ya bilanga ya kitoko koleka mpenza na Palmyra, New York. Ezwaki bango mibu mingi mpo na kosomba yango, esungaki bango mpo na kobokola libota, mpe epesaki bango lokumu na lingomba ya bato. Kasi na 1829 ekomaki polele ete Buku ya Mormon ekokaki kobimisama bobele soki Martin adefi mosolo na kosimbisaka elanga na ye mpo na kofuta kobimisama ya buku na masini. Martin azalaki na litatoli ya Buku ya Mormon, kasi Lucy azalaki na yango te. Soki Martin akendaki liboso na kosimbisaka elanga mpo na kodefa mosolo mpe Buku ya Mormon etekamaki malamu te, alingaki kobungisa elanga na ye mpe kotia likama na libala na ye. Na ngonga moko to mosusu, biso nyonso tokokutanaka na mituna ya lolenge moko oyo Martin akokaki kokutana na yango: Nini ezali motuya ya nsango ya Yesu Klisto epai na ngai? Nini nazali kolinga kobonza mpo na kosunga botongami ya bokonzi ya Nzambe? Ekoki kosunga biso tomikundola ete moto moko naino te afuta ntalo ya motuya monene koleka mpo na kopambola bana ya Nzambe koleka Yesu Klisto, “ya lokumu koleka banso” (Malongi mpe Mayokani 19:18).

Martin azwaki ekateli ya kosimbisa elanga na ye. Libonza na ye efutaki bobimisi ya buku na masini ya bakopi 5.000 ya yambo ya Buku ya Mormon. Mpe nsima, bifuku koleka 190 ya mikanda, bifuku ya milimo na mokili mobimba bapambolami.

Mpo na kozwa nsango mingi na ntina ya bobimisi ya Buku ya Mormon, tala Les Saints, 1:76–84.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 18:10–16

Nkolo asepelaka ntango toyambolaka.

Tala mbala boni maloba koyambola mpe boyamboli masalelami na Malongi mpe Mayokani 18 mpe 19mobimba, mpe manyola nini oyekoli uta na maloba oyo mbala nyonso basaleli yango. Kanisa mingimingi Malongi mpe Mayokani 18:10–16; lolenge nini milongo oyo esimbi lolenge oyokaka na ntina ya boyamboli—boyamboli na yo moko mpe mokumba ya kobengisa basusu bayambola?

Tala lisusu Alma 36:18–21; Dale G. Renlund, “Boyamboli: Boponi Moko ya Esengo,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2016, 121–24.

Malongi mpe Mayokani 18:34–36

Nakoki koyoka mongongo ya Nzambe na Malongi mpe Mayokani.

Soki moto moko atunaki yo mongongo ya Nkolo ezalaka lolenge nini, okoloba nini? Kanisa na ntina ya motuna oyo ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 18:34–36. Oyekoli nini na ntina ya mongongo ya Nkolo na kotangaa Malongi mpe Mayokani? Nini okoki kosala mpo na koyoka mongongo na Ye polele mingi koleka?

Malongi mpe Mayokani 19:15–20

Yesu Klisto anyokwamaki mingi mpo ete nakoka koyambola mpe koya epai na Ye.

Boyokani ya Sika etalisi mpasi ya Mobikisi na Getesemane uta na miso ya baoyo bamonaki yango. Na Malongi mpe Mayokani 19:15–20, Yesu Klisto alobelaki mpasi na Ye na maloba na Ye moko. Ntango ozali kotanga lisolo oyo ya bule, ya moto ye moko, luka maloba mpe nkoma oyo etalisi mpasi ya Mobikisi. Kanisa nini liloba to lisakoli moko na moko eteyi yo. Mpo na nini Mobikisi andimaki konyokwama? Kanisa kokoma mayoki na yo na ntina ya Yesu Klisto mpe mbeka na Ye mpo na yo.

Tala Yoane 15:13; Mozia 3:7; Alma 7:11–12; Malongi mpe Mayokani 18:10–13.

Elilingi
Yesu Klisto kosimbaka mwana moke ya mobali

Motuya ya Molimo, na Liz Lemon Swindle

Malongi mpe Mayokani 19:26–27, 34–41

Mapamboli ya Nzambe ezali minene koleka biloko ya motuya ya mabele.

Buku ya Mormon etekamaki malamu te na Palmyra, mpe lokola litomba, Martin Harris asukisaki koteka eteni monene ya elanga na ye mpo na kofuta nyongo (tala “The Contributions of Martin Harris,” Revelations in Context, 7–8). Manyola kobonzama to mbeka wana—mpe nsango oyo ozwi na ntina na yango—ntango otangi biteni oyo. Okokaki lisusu kokanisa na ntina ya nini Nkolo asengaki yo kobonza. Omoni nini na milongo miye oyo efuli yo mpo na kosala mabonza oyo na “esengo” mpe “bosepeli”? (tala lisusu milongo 15–20).

Malongi mpe Mayokani 19:23

Kimia eyaka uta na koyekola na ntina ya Yesu Klisto mpe kolanda Ye.

Kanisa libiangi ya Mobikisi “Yekola uta na ngai.” Oyekoli nini na ntina ya Yesu Klisto na kati ya Malongi mpe Mayokani 19? Koma makanisi na yo, mpe manyola lolenge nini makambo oyo ya solo na ntina ya Mobikisi esungaka yo kozwa kimia. Elingi koloba nini epai na yo “kotambola na bosokemi ya Molimo na [Ye]”?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 18:1–5.Ntango mosusu bato ya libota bakoki kokabola mwa “bandakisa mingi” (molongo 2) wapi Molimo emonisamaki epai na bango ete makomi ezali solo, kaka bobele lolenge Asalaki na Oliver Cowdery. Lolenge nini libota na yo ekoki “kotia elikya na makambo oyo ekomami” (molongo 3) na kati ya makomi? Lolenge nini okoki kotonga moboko ya libota likolo likolo ya “libanga” (molongo 4) ya nsango malamu?

Malongi mpe Mayokani 18:10–13; 19:16–19.Moto ya libota moko moko akoki kotanga Malongi mpe Mayokani 18:10–13 mpe kotia nkombo na ye na esika ya maloba “molimo,” “milimo,” mpe “bato nyonso.” Bokoki nsima kosolola lolenge nini milongo oyo esungi biso tososola ntina ya motuya na biso epai ya Tata mpe Mwana na Ye (tala Malongi mpe Mayokani 19:16–19).

Malongi mpe Mayokani 18:21–25.Bankombo ya bato ya libota na yo ezali na ndimbola ya ntina? Ntango mosusu bokoki kosolola na ntina ya mpo na nini bankombo ezali ntina mpe yango elakisi nini kozwa likolo na biso moko nkombo ya Yesu Klisto (tala Mozia 5:7). Oyo ekoki kozala libaku malamu mpo na kosunga bato ya libota komilengela kozwa nkombo ya Klisto likolo na bango moko ntango babatisami.

Malongi mpe Mayokani 19:15–20.Mpo na kosunga libota na yo ezwa boyebi ya ntina na milongo oyo, ntango mosusu okoki kotanga yango ntango bozali kotala elilingi ya Yesu Klisto (moko etiami na liteya oyo). Bato ya libota bakoki nsima kokabola mayoki na bango na ntina ya Mobikisi. Loyembo oyo bolingaka mingi na ntina ya Mobikisi ekoki mpe lisusu kobengisa Molimo.

Mpo na kozwa makanisi mingi mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na kati ya Yaka, Landa Ngai—Mpo na Kelasi ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Merveilleux l’amour,” Cantiques, no. 117.

Kobongisa Boyekoli ya Moto ye moko

Tuna mituna. Malongi mpe Mayokani ezali elembo yasolo ete mituna ekambaka na emoniseli. Ntango ozali kotanga makomi, koma mituna oyo ezali koyela yo. Nsima manyola mpe sambela mpo na koluka biyano.

Elilingi
Klisto kosambelaka na Elanga ya Getesemane

Klisto Kosambelaka na Elanga ya Getesemane, na Hermann Clementz

Bimisa na lokasa