Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya misato 1–7. Malongi mpe Mayokani 20–22: “Bokoli ya Eklezia ya Klisto”


“Sanza ya misato 1–7. Malongi mpe Mayokani 20–22: ‘Bokoli ya Eklezia ya Klisto,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya misato 1–7. Malongi mpe Mayokani 20–22,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Ndako ya Peter Whitmer

Ndako ya Peter Whitmer, na Al Rounds

Sanza ya misato 1–7.

Malongi mpe Mayokani 20–22

“Botelemi ya Eklezia ya Klisto”

Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 20–22, zala ya kofungwama na makanisi ya Molimo Mosantu. Kanisa kokoma yango mpo ete okoka kotala yango.lisusu

Koma Makanisi na Yo

Mosala ya Profeta Joseph Smith ya kobongolaka Buku ya Mormon esilaki sikawa. Kasi mosala ya Bozongisi ewutaki bobele kobanda. Ezalaki polele uta na bimoniseli ya ebandeli ete likolo ya kozongisa malongi mpe likoki ya bonganganzambe, Nkolo alingaki kozongisa lingomba ya kala—Eklezia na Ye (tala Malongi mpe Mayokani 10:53; 18:5). Boye, na mokolo ya 6, sanza ya minei , 1830, bandimi koleka motango 40 basanganaki na ndako ya libota ya Whitmer na Fayette, New York, mpo na kotatola lingomba ya Eklezia ya Yesu Klisto.

Kino sikawa, bato basusu bamitunaka, mpo na nini Eklezia ebongisama ezala na ntina? Eyano ekoki kozwana na kati ya, ata na moke, na bimoniseli oyo ekangamaki na likita wana ya yambo ya Eklezia na 1830. Awa, mapamboli malimbolami ezali yango ekokoaki kosalema te soki Eklezia ya solo ya Yesu Klisto “ebongisamaki te mpe etiamaki te engebene na mibeko” na mikolo ya nsuka (Malongi mpe Mayokani 20:1).

Tala lisusu Basantu, 1:84–86, mpe “Botonga Eklezia na Ngai,” Revelations in Context, 29–32.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 20:1–36

Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka etongami na malongi ya solo.

Eteni 20 ekotisami lokola “emoniseli na bobongisi mpe bokambi ya Eklezia” (moto ya eteni). Kasi liboso ya kotia mokoloto na mibeko ya Eklezia, biteni ya bonganganzambe, mpe banzela ya kolanda mpo na kosala makuli, emoniseli oyo ebandi na koteyaka malongi ya ntina koleka. Ntango ozali kotanga milongo 36 ya yambo ya emoniseli oyo, mituna yo moko mpo na nini yango ekokaki kozala. Osengeli lisusu kokoma nkombo ya makambo ya solo ya nsango malamu oyo ozwi. Tala mwa bandakisa:

Mpo na nini ezalaki likambo ya ntina monene ya kobeta makambo ya solo oyo nsete ntango Eklezia ezalaki kotiama?

Malongi mpe Mayokani 72:3–4

Makuli ya bule ezali eteni ya ntina monene na kati ya Eklezia ezongisami.

Ntango Eklezia ebongisamaki, Nkolo ateyaki Basantu na Ye na ntina ya makuli ya bule, kotangaka libatisi mpe elambo. Ntango ozali kotanga malakisi “matali lolenge ya libatisi” na molongo 37, kanisa na ntina ya libatisi na yo. Oyokaki moko ya mayoki oyo elobami na molongo oyo? Ozali koyoka yango sikawa? Manyola nini okoki kosala mpo na kobatela makasi “mokano na yo ya kosalela [Yesu Klisto] kino na nsuka.”

Ntango ozali kotanga na ntina ya elambo na kati ya Malongi mpe Mayokani 20:75–79, meka kotanga nsambo oyo ya bule uta na bomoni ya moto oyo azali koyoka yango mpo na mbala ya yambo. Boyebi nini ozwi na ntina ya elambo? mpo na yo moko? Lolenge nini boyebi oyo ezali kosimba lolenge ozali komilengela mpo na kolia elambo poso oyo?

Elilingi
diakona kokabolaka Elambo

Elambo ezali bokuli ya bule.

Malongi mpe Mayokani 20:38–60

Mosala ya Bonganganzambe epambolaka bandimi ya Eklezia mpe mabota na bango.

Soki moto moko atuni yo mikumba ya momemi bonganganzambe, okoloba nini? Tanga Malongi mpe Mayokani 20:38–60, oyo ebimisinkombo ya mikumba ya ndenge na ndenge ya bonganganzabe. Ezali na eloko moko na milongo miye oyo ebongoli lolenge okanisaka na ntina ya mikumba ya bonganganzambe mpe lolenge nini Mobikisi asalaka mosala na Ye? Lolenge nini opambolamaki na mosala oyo etalisami na milongo oyo?

Mpo na koyekola na ntina ya lolenge nini basi basalelaka likoki ya bonganganzambe kati na mosala ya Eklezia, tala Dallin H. Oaks, “Bafungola mpe Likoki ya Bonganganzambe,” Ensign or Liahona, Sanza ya mitano 2014, 49–52.

Malongi mpe Mayokani 21

Eklezia ya Yesu Klisto ekambami na profeta ya bomoi.

Oyekoli nini uta na Malongi mpe Mayokani 21:4–9 na ntina ya maloba ya baprofeta ya Nkolo? anisa bilaka oyo bilimbolami na molongo 6 mpo na baoyo bazwaka maloba ya Nkolo na nzela ya profeta na Ye. Bilaka oyo elakisi nini epai na yo?

Lolenge nini okoki kozwa liloba ya profeta ya bomoi “lokola uta na monoko ya [Nzambe] ye moko”? (molongo 5). Toli nini profeta ya lelo apesaki oyo ekoki kokamba na mapamboli ya elaka na molongo 6?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 20.Tokoki koloba nini soki moto moko atunaki biso mpo na nini tozali na mposa ya Eklezia? Biyano nini tozwi na Malongi mpe Mayokani 20? Tala lisusu D. Todd Christofferson, “Mpo na nini Eklezia,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2015, 108–11.

Malongi mpe Mayokani 20:77Yango elingi koloba nini “[kotambola] na bosantu liboso ya Nkolo”? Ekoki kosepelisa bato ya libota koyema to kokoma na biteni ya nkasa makambo oyo ekoki kosunga bango batambola na bosantu to makambo oyo ekoki kobulinginisa bango makanisi na kosala bongo. Nsima bakoki kosala nzela kosalelaka papie mpe komeka kotambola na nzela yango, konyataka bobele na esika oyo bayemaki oyo ekomema bango epai ya Klisto.

Malongi mpe Mayokani 20:37, 71–74.Soki moto moko ya libota na yo abatisami naino te, milongo oyo ekoki kokamba na lisolo na ntina ya lolenge nini komilengela mpo na libatisi (tala molongo 37) mpe lolenge nini mabatisi esalemaka (tala milongo 71–74). Bandeko ya libota bakoki kokabola bafoto to makundoli mosusu uta na mokolo na bango ya libatisi.

Malongi mpe Mayokani 20:75–79.Lolenge nini libota na yo ekoki kosalela milongo oyo mpo na komilengela mpo na kosala elambo ya ntina mpenza, ya limemia? Milongo oyo ekoki kolakisa makambo oyo okoki komanyola na ntango ya elambo, mpe bato ya libota bakoki kozwa to koyema bilili ya makambo oyo. Na ntango elongobani, okoki komema bilili oyo na liyangani ya elambo oyo elandi lokola bokundoli ya oyo osengeli kokanisa na ntango ya elambo.

Malongi mpe Mayokani 21:4–7.Kanisa kobengisa bato ya libota baluka maloba mpe nkoma na milongo 4–5 oyo eteyi biso na ntina ya kolandaka profeta ya Nkolo. Yango elingi koloba nini kozwa maloba ya profeta na bompikiliki? na bondimi? Ntango nini tozwaki mapamboli malakani na molongo 6?

Mpo na kozwa makanisi mingimpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Eklezia ya Yesu Klisto,” Chants pour Enfants, 77.

Kobongisa Mateya na Biso

Landa ndakisa ya bomoi ya Mobikisi. “Nguya ya Mobikisi mpo na koteya mpe kotombola basusu ewutaka na lolenge Azalaki na mokili mpe lolenge ya moto oyo Ye azalaki. Soki ozali kosala makasi na molende ya kozala lokola Klisto, okozala na makoki ya koteya lokola Ye” (Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 13).

Elilingi
Oliver Cowdery kokulisaka Joseph Smith

Oliver Cowdery azali kokulisa Joseph Smith, na Walter Rane

Bimisa na lokasa