Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya misato 8–14. Malongi mpe Mayokani 23–26: “Bolendisa Eklezia”


“Sanza ya misato 8–14. Malongi mpe Mayokani 23–26: ‘Bolendisa Eklezia,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya misato 8–14. Malongi mpe Mayokani 23–26,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Emma Smith

Sanza ya misato 8–14

Malongi mpe Mayokani 23–26

“Bolendisa Eklezia”

Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 23–26, koma makanisi ozwi uta na Molimo Mosantu. Lolenge nini okoki kosalela toli na bimoniseli oyo mpo na kolendisa ezalela na yo moko lokola moyekoli mpe kolendisa lisusu Eklezia?

Koma Makanisi na Yo

Nsima ya Eklezia kobongisama, Basantu bakutanaki na mokakatano ya sika—kopanza nsango malamu mpe kolendisa baoyo basilaki kosangana na Eklezia, na ntango oyo minyoko ezalaki kokoba kobakisama. Emma Smith azalaki temwe ya botelemeli wana ye moko. Na Sanza ya motoba 1830, Emma mpe bato ya libota ya Knight batombelaki kobatisama. Kasi banguna ya Eklezia bamekaki kopekisa oyo esengelaki kozala likambo moko ya bule. Yambo babebisaki lizuka oyo etongamaki mpo na kobomba mayi na mozindo ekoki mpo na mabatisi. Kutu ata nsima ya kobongisa lizuka yango, batomboki basanganaki mpo na koluka kobundisa mpe kotiola baoyo bazalaki kobatisama. Nsima, kaka ntango Joseph akomaki pene ya kokotisa bandimi ya sika, bakangaki ye mpo na kotia mobulu na lisanga ya bato na koteyaka na ntina ya Buku ya Mormon. Emonanaki kozala lokola ete elikya ezalaki na ebandeli mpo na Eklezia ezongisami sika ya Nkolo. Kasi na katikati ya bozangi elikya mpe mobulu oyo, Nkolo apesaki maloba kitoko ya toli mpe bolendisi, oyo ezali “mongongo na Ye epai ya banso” (Malongi mpe Mayokani 25:16).

Tala lisusu Basantu, 1:89–90, 94–97.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 23–26

Nakoki kosunga mpo na kolendisa Eklezia ya Nkolo.

Lelo, pene na mibu 200 mileki uta Eklezia ezongisami ebongisamaki, mposa ya “kolendisa Eklezia” ezali kaka kokoba (Malongi mpe Mayokani 23:3–5). Mpe mosala oyo ezali kaka te mpo na Joseph Smith, Oliver Cowdery, to bakambi na biso ya Eklezia ya sikoyo—ezali mpo na biso nyonso. Na nzela ya boyekoli na yo ya Malongi mpe Mayokani 23–26, manyola toli Nkolo apesaki na bandimi ya sika ya Eklezia mpo na kosunga bango balendisa Eklezia. Oyoki nini oyo Nkolo alingi yo osala mpo na kosala na mosala oyo esengeli bokasi na yo?

Malongi mpe Mayokani 24

Mobikisi akoki kotombola ngai “uta na minyoko na [ngai].”

Kokamba Eklezia na ntango ya minyoko makasi esengeli kozala mokumba ya bozito mpo na Joseph Smith. Luka maloba ya Nkolo ya bolendisi epai na ye na Malongi mpe Mayokani 24.

Makomi oyo elandi eteyi yo nini na ntina ya lolenge nini Mobikisi akoki kobimisa yo uta na minyoko na yo?

Malongi mpe Mayokani 24:1–3 

Malongi mpe Mayokani 24:8 

Malongi mpe Mayokani 121:7–8 

Yisaya 40:28–31 

Mozia 24:14–15 

Lolenge nini Yesu Klisto abimisaki yo uta na minyoko na yo? Nini okoki kosala mpo na kokoba koluka lisungi na Ye na ntango ya mpasi?

Elilingi
Yesu Klisto Kobikisaka bato

Abikisaki Bato Mingi ya Bokono ya Ndenge na Ndenge, na J. Kirk Richards

Malongi mpe Mayokani 25

Emma Smith azali “mwasi aponama.”

Ntango Emma Hale abalanaki na Joseph Smith, ayebaki ete asengelaki komibonzela. Azalaki kokende na kozanga bolingi ya tata na ye mpe azalaki kosombitinia bomoi ya malamu na bomoi ya moko ezanga elikya. Akokaki komituna nini oyo Nkolo azalaki kozela ye asala na kati ya mosala ya Bozongisi. Luka biyano oyo Nkolo apesaki na kati ya Malongi mpe Mayokani 25. Koma maloba ya Nkolo na molongo 16—ozwi eloko moko na eteni oyo okanisi ezali “mongongo na Ye epai na [yo]”?

Tala lisusu “An Elect Lady” (video, ChurchofJesusChrist.org); “Thou Art an Elect Lady,” Revelations in Context, 33–39; Joy D. Jones, “An Especially Noble Calling,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2020, 15–18.

Malongi mpe Mayokani 26:2

Bondimami na banso ezali nini?

Ntango bandimi bazwaka mabiangi to makuli ya bonganganzambe na Eklezia, tozalaka na libaku ya kosunga bango na polele ya kosunga bango na kotombolaka maboko na biso lokola elembo ya lisungi. Libongi ya kolakisaka lisungi mpe bondimami na polele ebengami bondimami ya banso. Lokola Mokambi Gordon B. Hinckley ateyaki, “lolenge ya kosunga oyo ezali mosika koleka kaka momeseno ya kotombola loboko. Elakisi bomipesi na kosimbana, kosunga, kosalisa baoyo baponami” (“Mosala Oyo Etali Bato,” Ensign, Sanza ya mitano 1995, 51).

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 23:6.Mpo na nini Nkolo alingaka biso tosambela “na libota na [biso], mpe elongo na baninga na [biso], mpe na bisika nyonso”? Nini loyembo “Bolingo Elobami Awa” (Chants pour Efants, 190)—to loyembo mosusu na etali losambo—eteyi biso na ntina ya nguya ya losambo na biso?

Tala lisusu 2 Nefi 32:8–9; 3 Nefi 18:18–23.

Malongi mpe Mayokani 24:8.Ekoki kosalisa libota na yo kosolola na ntina ya nini yango elingi koloba “kozala na bompikili kati na mikakatano”? Soki ozali na bana mike, ekoki kosepelisa bango kosalela lisusu maye Mokambi Dieter F. Uchtdorf alimbolaki na “Koba na Bompikiliki” (Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2010, 56; tala lisusu video na ChurchofJesusChrist.org). Nini Malongi mpe Mayokani 24:8 etei biso na ntina ya bompikiliki? Lolenge nini Nkolo asungaka biso tozala na bompikiliki na minyoko na biso?

Malongi mpe Mayokani 25:11–12.Ntango mosusu bokoki koyemba loyembo to kantiki balingaka mingi na moto ya libota moko moko mpe koloba na ntina ya mpo na nini yango ezali “loyembo na ye ya motema.” Lolenge nini nzembo oyo ezali lokola “losambo epai ya [Nzambe]”?

Malongi mpe Mayokani 26:2.Yango ekoki kosalisa mpo na koluka “Bondimami ya Banso” kati na Bokambi na Makomi (scriptures.ChurchofJesusChrist.org). Lolenge nini tolakisaka lisungi na biso mpo na bakambi na biso?

Mpo na kozwa makanisi mingi mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Botombola Mingongo na Bino mpe Boyemba,” Chants pour Enfants, 252 (tala “Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo ya Makomi na Libota”).

Elilingi
elembo ya mingongo ya bozongisi

Mingongo ya Bozongisi

Emma Hale Smith

Maloba ya Nkolo epai ya Emma Smith ekomami na Malongi mpe Mayokani 25 emonisi lolenge nini Ayokaki na ntina na ye mpe makabo akokaki kosala mpo na mosala na Ye. Kasi Emma azalaki lolenge nini? Toyebi nini na ntina ya bomoto na ye, mikangano na ye, bokasi na ye? Nzela moko ya koyeba “mwasi aponama” oyo (Malongi mpe Mayokani 25:3) ezali ya kotanga maloba ya bato oyo bayebaki bomoto na ye.

Elilingi
Emma Smith

Emma Smith, na Lee Greene Richards

Joseph Smith mwana, mobali na ye

Elilingi
Joseph Smith

“Na bosepeli nini oyo ekoki kolobama te, mpe esengo ya ndenge nini ekitisamaki na ntolo na ngai, ntango nasimbamaki na loboko, na butu wana, molingami na ngai Emma—ye oyo azalaki mwasi na ngai, kutu mwasi na ngai ya bolenge; mpe boponi ya motema na ngai. Mingi ezalaki maye ezongelaki na ngai ntango natalaki na mwa ntango makambo mingi oyo tobiangemaki koleka na nzela na yango. Kolemba, mpe mikumba, mawa mpe mpasi mpe bisengo mpe malendisi uta mbala na mbala oyo tokutani na yango mpe oyo epambolaki bomoi na biso. O! bosangisi ya makanisi matondisi mayele na ngai sikawa , Lisusu azali awa, atako mikakatano ya ndenge nini tokoki kozala na yango, alembaka te, atikalaka na bompikiliki, mpe aninganaka te, abongwanaka te, Emma ya bolingo.”1

Lucy Mack Smith, mama bokilo na ye

Elilingi
Lucy Mack Smith

“Azalaki ntango wana elenge, mpe lokola moto nyonso azalaki na mposa ya kozala malamu, motema na ye mobimba ezalaki na mosala ya Nkolo, mpe alukaki litomba mosusu te longola se ya Eklezia mpe ntina ya bosolo. Oyo nyonso maboko na ye emonaki kosala, asalaki na bokasi na ye mpe atunaki motuna ya boyimi te ‘Nakofutama mingi koleka moto mosusu?’ Soki bampaka batindamaki koteya, ye, azalaki moto ya yambo ya komipesa na motema moko na misala mpo na kosunga bango na kobongisaka nini bakolata na mobembo na bango, kotikaka bozangi na ye ezala nini ekokaki kozala.”2

“Naino namona mwasi na bomoi na ngai te, oyo akoki kotia molende na lolenge nyonso ya misala mpe minyoko, uta sanza na sanza, mpe uta mobu na mobu, na mpiko oyo eninganaka te, mpila mpe bompikiliki, oyo azalaki ntango nyonso kosala; mpo nayebi oyo asalaki mpo na kotia molende; ete alendisamaki na mabaku mingi ya kozanga elikya; ete amelaki mabele ya mipepe makasi ya minyoko, mpe alongaki nkanda ya bato mpe bazabolo, kino amelamaki na mayi ya mikakatano miye mikokaki kokitisa mwasi nyonso mosusu na nse.”3

Tata Joseph Smith, tata bokilo na ye

Lipamboli ya Bonkoko ya Emma, epesamaki na Tata Joseph Smith, oyo azalaki kosunga lokola nkoko ya Ekelzia:

“Emma, mwana mpe bokilo na ngai ya mwasi, opambolami na Nkolo, mpo na bosembo mpe bosolo na yo: okopambolama elongo na mobali na yo, mpe sepela na nkembo oyo ekoya likolo na ye: Molimo na yo etungisamaki na ntina ya nkanda ya bato na kolukaka bobebisi ya molongani na yo, mpe molimo na yo mobimba emipesi na losambo mpo na bokangoli na ye:sepela mpo Nkolo Nzambe na yo ayoki losambo na yo.

“Oyokaki mpasi mpo na motema makasi ya ndako ya tata na yo, mpe olukaki makasi lobiko na bango. Nkolo akozala na botosi na kolela na bino, mpe na masambisi na ye akosala ete basusu kati bango bamona liboma na bango mpe boyamboli ya masumu na bango; kasi ekozala na mpasi nde bakobikisama. Bokomona mikolo mingi; iyo, Nkolo akobatela bino kino bokosepela, mpo ete bokomona Mosikoli na bino. Motema na yo ekosepela na mosala monene ya Nkolo, mpe moto moko te akolongola esengo na bino.

“Bokomikundola ntango nyonso mosala monene ya Nzambe na kopesaka yo nzela ete okendeki elongo na mwana na ngai ya mobali ntango anjelu apesaki nkoma ya makomi ya Banefi epai na ye. Omonaki mawa mingi mpo ete Nkolo azwaki uta na bino bana misato: Na likambo oyo bozali moto ya kopamela te, mpo ayebi mposa na bino ya peto ya kokolisa libota, ete nkombo ya mwana na ngai ekoka kopambolama. Mpe sikawa, tala, Nalobi epai na yo, ete boye elobi Nkolo, soki okondimela, okopambolama na likambo oyo mpe okobota bana basusu engebene na mposa ya bosepeli mpe mposa ya molimo na bino, mpe mpo na esengo ya baninga na bino.

“Okopambolama na bososoli, mpe okozwa nguya ya koteya baninga na yo basi. Teya libota na yo na bosembo, mpe bana na bino ya mike nzela ya bomoi, banjelu ya bule bakobatela bino: mpe bokobikisama na bokonzi ya Nzambe; utu bongo. Amene.”4

Elilingi
Emma Smith na bana na ye

Emma Smith na bana na ye. Ntango ya Koseka, na Liz Lemon Swindle

Elilingi
Emma Smith kokomaka

Nzembo ya Emma, na Liz Lemon Swindle

Bimisa na lokasa