Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya misato 22–28. Malongi mpe Mayokani 29: “Yesu Klisto Akosangisa Bato na Ye”


“Sanza ya misato 22–28. Malongi mpe Mayokani 29: ‘Yesu Klisto Akosangisa Bato na Ye,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya misato 22–28. Malongi mpe Mayokani 29,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Yesu Klisto kotelemaka liboso ya bato ya kofukama

Mabolongo Nyonso Makongumbama, na J. Kirk Richards

Sanza ya misato 22–28.

Malongi mpe Mayokani 2.

Yesu Klisto Akosangisa Bato na Ye

Moko ya bantina ya koyekola makomi ezali ya koyeba malongi, to bosolo ya nsango malamu oyo ezali ntina mpo na lobiko na biso. Ntango ozali koyekola Malongi mpe Mayokani 29 poso oyo, luka bomoni ya malongi oyo ezali na ntina monene mpo na yo.

Koma Makanisi na Yo

Atako Eklezia ya Yesu Klisto ebongisamaki na mobu 1830, makambo mingi ya solo ya nsango malamu ezali kaka ya kobimisama, mpe bandimi mingi ya Eklezia ya ebandeli bazalaki na mituna. Batangaki masakoli na kati ya Buku ya Mormon na ntina ya bosangani ya Yisalaele mpe botongi ya Siona (tala 3 Nefi 21). Lolenge nini yango ekosalema? Bimoniseli oyo Hiram Page asakolaki kozwa elobeli likambo wana, oyo esalaki bobele komatisa mposa ya koyeba ya bandimi (tala Malongi mpe Mayokani 28). Bato basusu bazalaki komituna na ntina ya Bokweyi ya Adama mpe Ewa mpe liwa ya molimo. Nkolo ayambaki mituna oyo na mobu 1830: “Nyonso oyo bokosenga na bondimi,” Alobelaki Basantu, “ntango bozali na bomoko na losambo engebene na motindo na ngai, bokozwa” (Malongi mpe Mayokani 29:6). Mpe lelo Ayambaka mituna na biso Solo mpenza, Azelaka kaka biso totuna Ye na losambo. Solo, lokola emoniseli oyo etonda na malongi ya motuya kati na Malongi mpe Mayokani 29 elakisi, Ye ntango mosusu ayanolaka na kopesaka bosolo mpe boyebi mosika likolo ya mituna totunaki na esika ya yambo.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 2.

Tata na Lola alengelaki moango ya bobongi nie mpo na bonetoli na biso.

Malongi mpe Mayokani 29 eteyi makambo mingi ya solo na ntina ya moango ya Nzambe mpo na bana na Ye. Ntango ozali kotanga, luka bosolo oyo oyekoli na ntina ya moko moko ya biteni bilandi ya moango:

Boyebi ya mozindo nini ozwi ya sika? Lolenge nini bomoi na yo elingaki kozala na bokeseni soki oyebaki makambo ya solo oyo te?

Okoki koyekola mingi koleka na ntina ya moango ya Tata na Lola na kati ya “Moango ya Lobiko” (Prechez mon Evangile: Guide du service missionnaire, rev. ed. [2018], ChurchofJesusChrist.org/manual/missionary).

Malongi mpe Mayokani 29:1–8

Yesu Klisto akosangisa bato na Ye yambo ya Boyei na Ye ya Mibale.

Yesu Klisto azali koloba na ntina ya kosangisa bato na Ye “lokola soso asangisaka bana na ye na nse ya mapapu na ye” (Malongi mpe Mayokani 29:2). Elili oyo eteyi bino nini na ntina ya mposa ya Mobikisi mpo na kosangisa bino? Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 29:1–8, luka boyebi ya mozindo na ntina ya mpo na nini tosanganaka, nani akosangisa, mpe lolenge nini tokoki kosalisa na kosangisa “baponami” (molongo 7).

Na mikolo na biso, kosangisa Siona elakisi kotia bomoko ya makonzi ya Siona na mokili. Lolenge nini bosangasi na biso lokola Basantu esungaka biso “komilengela na makambo nyonso” mpo na mikakatano oyo ekoya yambo ya Boyei ya Mibale ya Mobikisi? (molongo 8; tala lisusu milongo 14–28).

Tala lisusu Biteni ya Bondimi 1:10; Russell M. Nelson mpe Wendy W. Nelson, “Elikya ya Yisalaele” (worldwide devotional for youth, Sanza ya motoba 3, 2018, ChurchofJesusChrist.org).

Elilingi
soso ya mwasi na bana ya soso

How Many Times, na Liz Lemon Swindle

Malongi mpe Mayokani 29:31–35

“Makambo nyonso epai na ngai ezali ya molimo.”

Na ndenge nini mitindo nyonso ezalaka ya molimo? Koyeba ete mitindo nyonso ezali ya molimo ezali koteya yo nini mpo na oyo etali ntina ya mitindo yango? Osengeli kokoma ndambo ya mitindo mpe koyeba mabongi ya molimo oyo ekangami na moko moko.

Nini ekoki kobongwana soki olukaki ndimbola to ntina ya molimo na kati ya misala na yo nyonso, ata miye ya ntango to miye ya mpamba mpamba?

Tala lisusu Baloma 8:6; 1 Nefi 15:30–32.

Malongi mpe Mayokani 29:36–50

Yesu Klisto asikoli biso uta na Bokwei.

Emoniseli oyo efungwami na Nkolo komilakisaka Ye moko lokola Mosikoli na biso, oyo “amikabaki mpo na masumu na [biso]” (molongo 1). Emoniseli ekei mpo na kolimbola bantina mosusu oyo tosengeli na Mosikoli. Kanisa lolenge nini okoki kosalela milongo 36–50 mpo na kolimbola mpo na nini tosengeli na bosikoli na nzela ya Mobikisi Yesu Klisto. Na mimeseno ya biyamba mingi, Bokwei emonanilokola likambo ya mawa; nini omoni na milongo oyo eteyi matomba malamu oyo eyei na nzela ya Bokwei? (Tala lisusu 1 Bakolinti 15:22; 2 Nefi 2:6–8, 15–29; Mozia 3:1–19; Moses 5:9–12.)

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 29.Okoki kosalela bilili na nsuka ya mateya oyo elongo na Malongi mpe Mayokani 29 mpo na koteya libota na yo na ntina ya moango ya lobiko. Ndakisa, bato ya libota bakoki koyekola na ntina ya biteni bikeseni ya moango na kotangaka mpe kosololaka na ntina ya milongo oyo topesi makanisi ya kotanga. Bakoki kozwa makambo ya solo mosusu na Masolo ya Nsango malamu (topics.ChurchofJesusChrist.org) to na Mokambi na Makomi (scriptures.ChurchofJesusChrist.org). Koma maye ozali koyekola. Mpo na nini tozali na botondi ya koyeba maye matali moango ya lobiko? Lolenge nini koyeba yango ezali na litomba na bomoi na biso ya mikolo na mikolo?

Malongi mpe Mayokani 29:2, 7–8.Yango elingi koloba nini kosangana na Mobikisi? Lolenge nini tokoki kosalisa Ye kosangisa baponami?

Malongi mpe Mayokani 29:3–5.Toyekoli nini na ntina ya Mobikisi na milongo miye oyo esalisi biso “kotombola mitema na [biso] mpe kozala na esengo”? (molongo 5). Video “Tokoki Kozwa Esengo” (ChurchofJesusChrist.org) ekoki kosunga kosolola lolenge nini koyebaka maye etali moango ya lobiko ememaki esengo na libota na yo.

Malongi mpe Mayokani 29:34–35.Kotangaka milongo oyo ekoki kopesa libota na yo libaku ya koloba mpo na oyo etali bantina ya molimo oyo ezali nsima ya mitindo misusu to toli ya profeta oyo bozali komeka kolanda. Ndakisa, mpo na nini Nkolo alingi biso totanga makomi lokola libota? Matomba nini ya molimo tomoni uta na kobatelaka mitindo?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Israel, Israel, God Is Calling,” Cantique, no. 7.

Kobongisa Mateya na Biso

Luka Yesu Klisto. Makomi eteyi biso ete bikelamu nyonso ya Nzambe etatolaka Yesu (tala Moses 6:62–63), boye, luka Ye ntango ozali kotanga makomi yango. Kanisa kokoma to kopakola langi na milongo oyo ezali koteya na ntina na Ye.

Bimisa na lokasa