Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya misato 15–21. Malongi mpe Mayokani 27–28: “Makambo Nyonso Esengeli Kosalema na Molongo”


“Sanza ya misato 15–21. Malongi mpe Mayokani 27–28: ‘Makambo Nyonso Esengeli Kosalema na Molongo,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya misato 15–21. Malongi mpe Mayokani 27–28,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Joseph Smith

Sanza ya misato 15–21.

Malongi mpe Mayokani 107:68

“Makambo Nyonso Esengeli Kosalema na Molongo”

Mpaka D. Todd Christofferson alobaki ete ntango ozali koyekola makomi mpe kokoma makanisi, “okopesama esika na motema na yo mpo na liloba ya Nzambe, mpe Akolobela yo” (“Ntango Obongwani,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2004, 11).

Koma Makanisi na Yo

Emonisseli ezalaki kaka ata na moke likanisi ya sika mpo na Basantu ntango Bozongisi ekobaki kobimisama. Bandimi ya Eklezia ya ebandeli bayebaki ete Profeta Joseph Smith akokaki kozwa emoniseli mpo na Eklezia, kasi basusu mpe bakokaki kozwa yango? Mituna lokola oyo ekomaki makasi ntango Hiram Page, moko ya Banzeneneke Moambe ya bapalaki ya wolo, andimaki ete azwaki bimoniseli mpo na Eklezia. Basantu mingi ya bosembo bandimaki ete bimoniseli oyo ewutaki na Nzambe. Nkolo ayanolaki na koteyaka ete na kati ya Eklezia na Ye “makambo nyonso esengeli kosalema na molongo” (Malongi mpe Mayokani 28:13), oyo elingaki koloba kozala bobele na moto moko “aponami mpo na kozwa mitindo mpe bimoniseli” mpo na Eklezia mobimba (Malongi mpe Mayokani 28:2). Atako bongo, basusu bakoki kozwa emoniseli na bango moko mpo na eteni na bango na mosala ya Nkolo. Solo, maloba ya Nkolo epai ya Oliver Cowdery ezali bokundoli epai na biso nyonso: “ekopesamela yo … oyo okosala” (Malongi mpe Mayokani 28:15).

Tala lisusu “Makambo Nyonso Esengeli Kosalema na Molongo,” Bimoniseli na Ndimbola, 50–53.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 27:1–4

Nasengeli kolia elambo na lisusu kotalelaka bobele nkembo ya Nzambe.

Sally Knight mpe Emma Smith babatisamaki na Sanza ya motoba 1830, kasi nkotisa na bango ekatanamaki na batomboki. Nsima ya basanza mibale, Sally mpe mobali na ye, Newel, bayaki kotala Emma mpe Joseph, mpe mokano ezwamaki ete nkotisa esengeli kosalema sika wana mpe ete lingomba ya bato wana esengelaki kolia elambo elongo. Ntango azalaki na nzela kokendeka mpo na kozwa vinyo ya elambo, Joseph atelemisamaki na anjelu moko. Anjelu ateyaki ye nini na ntina ya elambo? (tala Malongi mpe Mayokani 27:1–4).

Milongo oyo eteyi nini na ntina ya lolenge nini Mobikisi alingi yo osalela elambo? Nini okanisi molimo efuli yo kosala mpo na makambo oyo ozali koyekola?

Elilingi
lipa mpe kopo ya elambo

Elambo ekundolaka biso libonza ya Mobikisi.

Malongi mpe Mayokani 27:15–18

Ebundeli ya Nzambe ekosunga ngai natelemela mabe.

Mokambi M. Russell Ballard alobaki: “Ezali na eloko moko te ya monene mpe ya ntina tokoki kosala mpo na komilatela ebundeli ya molimo biso moko. Nguya ya solo ya molimo efandi na misala ya mike mike mingi esangana elongo na kosala etongeli moko ya makasi ya molimo oyo ebatelaka mpe ebombaka biso uta na mabe nyonso” (“Bozala Makasi kati na Nkolo,” Ensign, Sanza ya nsambo 2004, 8).

Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 27:15–18, okoki kosala etando lokola oyo na nse. Ozali kosala nini mpo na kolata eteni moko moko ya ebundeli ya Nzambe?

Eteni ya ebundeli

Eteni ya nzoto oyo ebatelami

Oyo eteni ya nzoto wana ekoki kolakisa

Palaki ya ntolo ya bosembo

Motema

Bamposa na biso mpe bolingo

Ekoti ya lobiko

Moto mpe makanisi

Tala lisusu Baefese 6:11–18; 2 Nefi 1:23.

Malongi mpe Mayokani 28

Profeta ya bomoi azali eteni ya monoko ya Nzambe mpo na Eklezia.

Kanisa elingaki kozala lolenge nini soki moto nyonso akokaki kozwa mitindo mpe emoniseli mpo na Eklezia mobimba. Ntango Hiram Page asangelaki kozwa emoniseli ya boye, mobulu ezalaki, na kati ya bandimi ya Eklezia. Na kati ya Malongi mpe Mayokani 28, Nkolo abimisaki molongo ya makambo mpo na kozwa emoniseli na Eklezia na Ye. Nini oyekoli uta na eteni oyo na ntina ya mosala ya ye moko Mokambi ya Eklezia? Oyekoli nini uta na maloba ya Nkolo epai ya Oliver Cowdery kati na molongo 3? Oyekoli nini uta na eteni oyo na ntina ya lolenge Nzambe akoki kokamba yo?

Tala lisusu Dallin H. Oaks, “Banzela Mibale ya Kozwa Bansango,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na mibale. 2010, 83–86.

Malongi mpe Mayokani 28:8–9

Mpo na nini misio ya Oliver Cowdery epai ya Balamani ezalaki na ntina?

Ntina moko ya Buku ya Mormon ezali “ete Balamani bakoka kozwa boyebi ya batata na bango, mpe ete bakoka koyeba bilaka ya Nkolo” (Malongi mpe Mayokani 3:20). Yango oyo ekokanaki na bilaka Nkolo asalaki na baprofeta mingi ya Buku ya Mormon (tala, ndakisa, 1 Nefi 13:34–41; Enos 1:11–18; Helaman 15:12–13). Bandimi ya Eklezia ya ebandeli bakanisaki Baindia ya Amerika bazalaki bakitani ya bato ya Buku ya Mormon. (Makanisi mayebani ya Eklezia ya lelo ezali ete Balamani “bazali kati na bankoko ya Baindia ya Amerika” [Boyingisi na Buku ya Mormon].)

Mpo na kotanga mingi na ntina ya etinda ya Oliver epai ya bikolo ya India ya Amerika, tala “Misio epai ya Balamani” (Revelations in Context, 45–49). Misio oyo etei yo nini na ntina ya Nkolo mpe mosala na Ye?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 2:1–2Lolenge nini tokoki komikundola malamu mbeka ya Mobikisi mpo na biso ntango toliaka elambo?

Malongi mpe Mayokani 2:1–2Toyebi nini na ntina ya baprofeta na kati ya milongo oyo? Bakoki koluka nsango na ntina na bango na kati ya Mokambi na Makomi (scriptures.ChurchofJesusChrist.org). Mapamboli nini mafungwami mpo na biso na nzela ya bafungola basimbi? Mpo na nsango na ntina ya ndambo ya bafungola oyo, tala Matai 16:16–19; Malongi mpe Mayokani 110:11–16.

Malongi mpe Mayokani 27:15–18.Ntango mosusu libota na yo ekosepela kosala lokola lisano ya etumba na bilamba mosusu mpo na kolakisa bibundeli ya Nzambe, lokola bikoti, bakazaka, mangbanda, to basapato. Lolenge nini bibundeli esungi mpo na kobatela biso na etumba? Bosolola ndambo ya banguya mabe libota na yo ekutani na yango mpe makambo okoki kosala mpo na kolata bibundeli ya molimo. Kanisa kolakisa video “Bolata Bibundeli Nyonso ya Nzambe” (ChurchofJesusChrist.org).

Malongi mpe Mayokani 28:2–7.Toyekoli nini uta na milongo oyo na ntina ya libiangi ya profeta? Ntango mosusu bato ya libota bakoki kotala bansango eleka uta na profeta na biso na bomoi mpe kokabola lolenge nini toli na ye esungaka biso tolanda Yesu Klisto.

Malongi mpe Mayokani 28:11.Ntango tolingi kosunga moto na kosembolaka ye uta na libungi, mpo na nini ezali ntina ya kosala yango “na kati kati na ye mpe yo moko”?

Mpo na kozwa makanisi mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Viens ecouter la voix de Dieu,” Cantique, no. 12.

Kobongisa Boyekoli ya Moto Ye Moko

Boyekola maloba ya baprofeta mpe bapostolo ya mikolo ya nsuka. Tanga oyo baprofeta mpe bapostolo ya mokolo ya nsuka bateyaki na ntina mabongi ozwi na makomi. Kanisa kotala mabakisi ya maeya ya likita linene na conference.ChurchofJesusChrist.org to na Gospel Library na telefone.

Bimisa na lokasa