Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya misato 29–Sanza ya minei 4. Pasika : Nazali Ye Oyo Azali na Bomoi, Nazali Ye Oyo Babomaki.


“Sanza ya misato 29–Sanza ya minei 4. Pasika : Nazali Ye Oyo Azali na Bomoi, Nazali Ye Oyo Babomaki,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani (2020)

“Sanza ya misato 29–Sanza ya minei 4. Pasika,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Ekeko ya Klisto

Sanza ya misato 29–Sanza ya minei 4.

Pasika

“Pasika : Nazali Ye Oyo Azali na Bomoi, Nazali Ye Oyo Babomaki.”

Ntango ozali komilengela mpo na kosepela na Eyenga ya Lisekwa ya Mobikisi, manyola lolenge nini emoniseli ya ntango ya sika ekomisi bondimi na yo mozindo ete Yesu Klisto azali Mwana Mobotami se Moko ya Nzambe mpe Mosikoli ya mokili.

Koma Makanisi na Yo

Mokolo ya 3, Sanza ya minei 1836, ezalaki Eyenga ya Pasika. Nsima ya kosalisa na kopesaka elambo na Basantu oyo basanganaki na Tempelo oyo ebulisamaki sika na Kirtland, Joseph Smith mpe Oliver Cowdery bazwaki esika ya kimia nsima ya elamba na kati ya tempelo, mpe bagumbamaki na losambo ya kimia. Nsima, na mokolo ya bule oyo ntango Baklisto bisika nyonso bazalaki kosepela na Lisekwa ya Yesu Klisto, Mobikisi mosekwi Ye moko abimaki na tempelo na Ye, kosakolaka, “Nazali ye oyo azali na bomoi, nazali ye oyo babomaki” (Malongi mpe Mayokani 110:4).

Yango elingi kolimbola nini koloba ete Yesu Klisto azali “ye oyo azali na bomoi”? Elingi kaka te koloba ete Asekwaki na lilita na mokolo ya misato mpe abimelaki bayekoli na Ye na Galileya. Elingi koloba ete Azali na bomoi lelo. Azali koloba na nzela ya baprofeta lelo. Ye azali kokamba Eklezia na Ye lelo. Abikisaka mpota ya milimo mpe mitema mibukana lelo. Na yango tokoki kolandisa maloba ya litatoli ya nguya ya Joseph Smith: “Nsima ya matatoli mingi oyo epesamaki na ntina na ye, oyo ezali litatoli … oyo topesi na ntina na ye: Ete azali na bomoi!” (Malongi mpe Mayokani 76:22). Tokoki koyoka mongongo na Ye na bimoniseli oyo. Tokoki kotatola loboko na Ye na bomoi na biso. Mpe tokoki banso koyoka “esengo ya liloba oyo elobi: ‘Nayebi ete Mosikoli na ngai azali na bomoi!’” (Cantique, no. 136).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 29:5; 38:7; 62:1; 76:11–14, 20–24; 110:1–10

Yesu Klisto azali na bomoi

Profeta Joseph Smith amonaki Mobikisi mosekwi mbala mingi, mpe mibale ya bokutani oyo ekomami na Malongi mpe Mayokani. Ntango otangi biteni 76:11–14, 20–24; 110:1–10, makanisi nini ozwi na ntina ya litatoli ya Joseph Smith? Mpo na nini litatoli na ye ezali na ntina epai na yo?

Na kati ya Malongi mpe Mayokani mobimba, Mobikisi atatolaki na ntina ya etinda mpe bonzambe na Ye. Oyekoli nini na ntina ya Klisto ya bomoi uta na maloba na Ye oyo na Malongi mpe Mayokani 29:5; 38:7; 62:1? Okoki kokanisa kokoma masakoli ya boye oyo ozwi ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani.

Tala lisusu Joseph Smith—Mambi ya kala 1:17.

Malongi mpe Mayokani 29:26–27; 42:45–46; 63:49; 88:14–17, 27–31; 93:33–34

Mpo na Yesu Klisto, nakosekwa.

Joseph Smith ayebaki lolenge nini toyokaka ntango ya kolela bawei oyo balingaki mingi. Mibale ya bandeko na ye ya mibali , Alvin mpe Don Carlos, bakufaki ntango bazalaki bilenge mibali. Joseph mpe Emma bakundaki bana motoba, moko na moko bakokisaki te mibu mibale. Kasi uta bimoniseli azwaki, Joseph alongaki bomoni ya seko ya liwa mpe moango ya seko ya Nzambe. Botala makambo ya solo esakolamaki na Malongi mpe Mayokani 29:26–27; 42:45–46; 63:49; 88:14–17, 27–31; 93:33–34. Lolenge nini bimoniseli oyo esimbi lolenge na kotala liwa? Lolenge nini ekoki kosimba lolenge na bino ya kotambwisa bomoi na bino?

Tala lisusu 1 Bakolinti 15; M. Russell Ballard, “Limoni ya Mosikoli ya Bawei,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 71–74; Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (2007), 174–76.

Malongi mpe Mayokani 18:10–13; 19:16–19; 45:3–5; 76:69–70

Yesu Klisto akokisaki “bomikabi ya kobonga nie.”

Nzela moko mpo na kofandisa makanisi na Mobikisi na ntango ya Pasika ezali ya koyekola Bimoniseli na Malongi mpe Mayokani oyo eteyi na ntina ya mbeka to libonza ya bomikabi na Ye. Ndambo ya bimoniseli oyo ekoki kozwama na Malongi mpe Mayokani 18:10–13; 19:16–19; 45:3–5; 76:69–70. Ntango mosusu okoki kokoma makambo ya solo na ntina ya Bomikabi ya Mobikisi oyo ozwi na milongo oyo. Mpo na kolendisa boyekoli, okoki kobakisa makombo mosusu uta na kolukaka milongo ya makomi na “Komikaba, Bomikabi” (Mokambi na Makomi, scriptures.ChurchofJesusChrist.org).

Awa ezali mituna oyo ekoki kokamba boyekoli na bino:

  • Mpo na nini Yesu Klisto aponaki konyokwama?

  • Nini nasengeli kosala mpo na kozwa mapamboli ya likabo na Ye?

  • Lolenge nini nakoki koyebisa soki Bomikabi na Ye ezali na nguya likolo ya bomoi na ngai?

Elilingi
Yesu kosambelaka

Nkolo ya Losambo, na Yongsung Kim

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Likita LineneMpo likita linene ekutani na Eyenga ya Pasika mobu oyo, bokoki kotalela lolenge nini mateya ya likita yango (mpe lisusu miziki) ekoki kolendisa litatoli ya Yesu Klisto na libota na bino. Ndakisa, bilenge bana bakoki koyema bilili ya Mobikisi, to kotelemisa elili na Ye, ntango bazoyoka nsango to loyembo ya Yesu Klisto. Bato mosusu ya libota bakoki kokoma makambo ya solo bayoki na ntina ya Mobikisi. Na nsima, bato ya libota bakoki kokabola bilili na bango to maye bakomi mpe matatoli na bango moko ya Yesu Klisto.

Malongi mpe Mayokani 88:14–17; 138:17, 50.Libota na yo ekoki kosepela na kokanisaka eloko moko oyo eokokani to eloko moko ya koteyela mpo na kolimbola oyo elakisi kokufa mpe kosekwa—moto akoki kolakisa nzoto mpe molimo kokabwanaka mpe nsima kosangisa lisusu, lokola loboko mpe gant to mbeki na yango. Lolenge nini milongo oyo elendisi bosepeli na biso mpo na oyo Mobikisi asalaki mpo na biso?

“Klisto ya Bomoi: Litatoli ya Bapostolo.”Mpo na kolendisa lisolo na ntina ya matatoli ya baprofeta ya ntango na biso na ntina ya Mobikisi, bokoki kopesa mokumba na moto moko moko ya libota mpo na kotanga eteni moko ya “Klisto ya Bomoi: Litatoli ya Bapostolo” (Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2017, na kati nsima ya lokasa ya libanda) mpe kabola oyo bayekoli na ntina ya Yesu klisto. Okoki lisusu kolakisa video “Apostle Testimony Montage” (ChurchofJesusChrist.org). Makambo ya solo nini tozwi oyo efuli biso?

“Nayebi Ete Mosikoli na Ngai Azali na Bomoi.”Mpo na kosalisa libota na yo koyeba banzela mingi Mobikisi mosekwi apambolaka biso lelo, bokoki koyemba elongo “Nayebi Ete Mosikoli na Ngai Azali na Bomoi” (Cantique, no. 136) mpe kangisa makambo ya solo eteyami na loyembo oyo na mateya oyo na kati ya makomi elandi: Malongi mpe Mayokani 6:34; 45:3–5; 84:77; 98:18; 138:23. Libota na yo ekoki lisusu kosepela na kokomaka milongo mosusu likolo mpo na loyembo oyo elobeli lolenge nini bayebi ete Mosikoli na bango azali na bomoi.

Mpo na video ya Pasika mpe malakisi misusu, tala Easter.ComeUntoChrist.org.

Mpo na kozwa makanisi mingi mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Yesu Asekwi,” Chants pour Enfants, 70.

Kobongisaka Mateya na Biso

Zwa mateya na makambo ya mikolo nyonso. Kanisa lolenge nini makambo oyo bato ya libota na yo bokutanaka na yango mokolo na mokolo Liekoki kokamba na lisolo ya ntina ya nsango malamu ya bosolo (tala Teaching in the Savior’s Way, 4). Ndakisa, mvula ya makasi ekoki kozala libaku mpo na kolobela lolenge nini Nzambe anokisaka mapamboli likolo ya bana na Ye.

Elilingi
Yesu abimelaki Joseph Smith mpe Oliver Cowdery

Yesu Klisto Abimeli Profeta Joseph Smith mpe Oliver Cowdery, na Walter Rane

Bimisa na lokasa