Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya minei 19–25. Malongi mpe Mayokani 41–44: “Mobeko na Ngai mpo na Kokamba Eklezia na Ngai”


“Sanza ya minei 19–25. Malongi mpe Mayokani 41–44: ‘Mobeko na Ngai mpo na Kokamba Eklezia na Ngai,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya minei 19–25. Malongi mpe Mayokani 41–44,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Yesu Klisto

Sanza ya minei 19–25.

Malongi mpe Mayokani 41–44

“Mobeko na Ngai mpo na Kokamba Eklezia na Ngai”

“Soki bokosenga,” Nkolo alakaki, “bokozwa emoniseli likolo ya emoniseli, boyebi likolo ya boyebi” (Malongi mpe Mayokani 42:61). Mituna nini okoki kotuna mpo ete ozwa emoniseli osengeli?

Koma Makanisi na Yo

Bokoli ya lombango ya Eklezia na mobu 1830 mpe 1831—mingi mingi lombango ya babongwani ya sika na Kirtland, Ohio—ezalaki eloko ya litomba mpe mpe ya kolendisa epai Basantu. Kasi yango ezalaki na ndambo ya mikakatano. Lolenge nini okosangisa na lombango motuya kobakisama ya bandimi, mingi mingi ntango bazali komema elongo na bango malongi mpe misala uta na biyamba na bango ya yambo? Ndakisa, ntango Joseph Smith akomaki na Kirtland na ebandeli ya Sanza ya mibale 1831, akutaki bandimi ya sika kokabolaka esika ya kofanda kaka moko na likanisi malamu ya komekola Baklisto ya Boyokani ya Sika (tala Misala 4:32–37). Nkolo asembolaki mwa likanisi wana mpe apesaki ndimbola na likambo wana mpe makambo mosusu, oyo emonisami mingi na nzela ya emoniseli ekomami na Malongi mpe Mayokani 42, oyo Abengaki “mobeko na ngai mpo na kokamba eklezia na ngai” (molongo 59). Na emoniseli oyo, toyekolaka makambo ya solo oyo ezali ntina monene ya kotia Eklezia ya Nkolo na mikolo ya nsuka, kobakisaka elaka ya ntina oyo emonisaki polele ete ntango nyonso tozali na mingi koleka ya koyekola: “Soki okosenga, okozwa emoniseli likolo ya emoniseli, boyebi likolo ya boyebi” (Malongi mpe Mayokani 42:61).

Tala lisusu Basantu, 1:114–19.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 41

“Ye oyo ozwi mobeko na ngai mpe asaleli yango, ye moko wana azali moyekoli na ngai.”

Na ebandeli ya mobu 1831, Basantu bazalaki kobanda kosangana na Ohio, na mposa makasi ya kozwa mobeko oyo Nzambe alakaki mpo na komonisa kuna (tala Malongi mpe Mayokani 38:32). Kasi liboso, Nkolo ateyaki lolenge nini bayekoli na Ye basengelaki komilengela mpo na kozwa mobeko na Ye. Mabongi nini bozwi na milongo 1–5 oyo esengelaki kosunga Basantu bazwa mobeko ya Nzambe? Lolenge nini mabongi oyo esungaka yo kozwa makebisi uta na Ye?

Malongi mpe Mayokani 42

Mibeko ya Nzambe ekambaka Eklezia na Ye mpe ekoki kokamba bomoi na biso.

Basantu bazwaki emoniseli oyo ekomami na Malongi mpe Mayokani 42:1–72 lokola moko ya motuya koleka nyonso oyo Profeta azwaki. Ezalaki kati na bimonseli ya yambo mpo na kobimisama na mokanda, kobimaka na zulunale mibale ya Ohio , mpe eyebanaki kaka lokola “mobeko.” Mingi ya mabongi na kati ya eteni oyo ebimisamaki na Nkolo liboso. Atako eteni yango ezali te na motindo nyonso oyo Nkolo alingaki Basantu na Ye batosa, ezali ntina ya komanyolaka mpo na nini mabongi ezalaki na ntina mpo na kozongela lisusu na Eklezia ezongisami sika.

Ekoki kosunga yo kotanga eteni 42 na mwa biteni lokola oyo elandi mpe koluka koyeba mabongi mateyami na moko moko. Ntango ozali kosala, kanisa lolenge nini mobeko oyo ya kokamba Eklezia ekoki lisusu kokamba bomoi na yo moko.

Milongo 4–9, 11–17, 56–58 

Milongo 18–29 

Milongo 30–31 

Milongo 40–42 

Milongo 43–52 

Tala lisusu 3 Nefi 15:9.

Malongi mpe Mayokani 42:30–42

Lolenge nini Basantu “babulisaki bozwi na [bango]” mpo na kosunga babola?

Ndambo monene ya ntina ya mobeko oyo emonisami na eteni 42 ezali oyo eyaki koyebana lokola mobeko ya bobulisi mpe ya bobateli. Mobeko oyo eteyi Basantu lolenge nini bakoki, lokola balandi ya Klisto ya kala, bazalaki na “biloko nyonso esika moko” (Misala 2:44; 4 Nefi 1:3), na “bobola te kati na bango” (Moses 7:18). Basantu babulisaki bozwi na bango mpo na kopesa yango epai ya Nkolo, na nzela ya episikopo (tala Malongi mpe Mayokani 42:30–31). Episikopo azongiselaki bango oyo bazalaki na yango mposa (tala molongo 32)—mbala mingi oyo babulisaki mpe mingi ya kobakisa likolo. Bandimi bapesaki milekeli na bango mpo na kosunga babola (tala milongo 33–34). Mobeko oyo ezalaki lipamboli monene na Basantu, mingi mingi na baoyo batikaki nyonso ya bango mpo na koya na Ohio. Basantu mingi bazalaki na motema ya kokaba na makabo na bango.

Atako tosalaka yango na bokeseni lelo, Basantu ba Mikolo mya nsuka kino lelo bazali kaka kosalela mobeko ya bobulisi. Ntango otangi Malongi mpe Mayokani 42:30–42, manyola lolenge nini okoki kobulisa oyo Nzambe apesi yo mpo na kotonga bokonzi na Ye mpe kopambola baoyo bazali na bosenga.

Tala lisusu Linda K. Burton, “Nazalaki Mopaya,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2016, 13–15; “Mobeko,” Revelations in Context, 93–95, history.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
Klisto mpe Mokambi Elenge Mozwi

Klisto mpe Mokambi Elenge Mozwi, na Heinrich Hofmann

Malongi mpe Mayokani 42:61, 65–68; 43:1–16

Nzambe apesaka emoniseli mpo na kokamba Eklezia na Ye.

Banza ete ozali kosolola na mondimi ya sika ya Eklezia oyo azalaki na mposa makasi ya koyeba ete Eklezia ekambami na emoniseli. Lolenge nini okoki kosalela Malongi mpe Mayokani 43:1–16 mpo na kolimbolela ye emekoleliya Nkolo mpo na kokamba Eklezia na Ye na nzela ya profeta na Ye? Lolenge nini okoki kosalela Malongi mpe Mayokani 42:61, 65–68 mpo na koteya na ntina ya kozwaka emoniseli na yo moko?

Tala lisusu “Makambo nyonso Esengeli Kosalema na Molongo,” Revelations in Context, 50–53, history.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 41:1–5.Nini ezali yoko ndakisa ya mibeko ya bana mboka mpe lolenge nini mibeko oyo ezali na litomba mpo na biso? Lolenge nini mibeko ya Tata na Lola to mibeko epambolaka biso? Bato ya libota bakoki koyema bilili na bango moko kotosaka mibeko ya Nzambe.

Malongi mpe Mayokani 42:45, 88.Nini ekoki kosunga libota na yo “kozala elongo na bolingo”? (tala lisusu Mozia 4:14–15). Kanisa kokoma to koloba makambo ya malonga na ntina ya basusu to koyembaka loyembo na ntina ya bolingo na kati ya libota, lokola “Bolingi na Libota” (Cantique, no. 294).

Malongi mpe Mayokani 42:61.Ntango mosusu bokoki kotanga molongo oyo ntango bozali elongo kokangisa biteni ya bilili moko moko. Salela biteni ya bilili moko moko mpo na koteya lolenge nini Nzambe amonisaka misala na Ye—“emoniseli likolo ya emoniseli, boyebi likolo ya boyebi.” Bato ya libota bakoki kokabola lolenge nini Nzambe amonisaki bosolo epai na bango moke na ntango moko.

Malongi mpe Mayokani 43:25.Ntango mosusu ezali na eloko moko libota na yo ekoki kosalela mpo na kokela makelele ya kake lokola lolenge ya koyingisa lisolo na ntina ya molongo 25. Lolenge nini mongongo ya Nzambe ezali “mongongo ya kake”? Luka molongo yango elongo mpo na banzela oyo Nkolo akoki kobenga biso na boyamboli. Lolenge nini tokoki kolakisa botosi na mongongo ya Nkolo?

Mpo na kozwa makanisi mingi mpo nakoteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Nalingi Kosalela Nsango Malamu,” Chants pour Enfants, 148; tala “Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli Makomi na Libota na Yo.”

Kobongisa Mateya na Biso

Sala ezalela ya bolingo na libota. Lolenge bato ya libota bayokaka mpe lolenge basalelaka moko na mosusu na libota ekoki kozala na litomba makasi na molimo ya ndako na yo. Sunga bato ya libota bakokisa mokumba na bango ya kosala libota ya bolingo, ya limemiai mpo ete moto nyonso amiyoka na bokengi mpo na kokabola mayele, mituna mpe matatoli. (Tala Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 15.)

Elilingi
Joseph Smith koteyaka

Joseph Smith Joseph Smith koteyaka na Nauvoo, na Sam Lawlor

Bimisa na lokasa