Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya minei 26–Sanza ya mitano 2. Malongi mpe Mayokani 45: “Bilaka … Ekokokisama”


“Sanza ya minei 26–Sanza ya mitano 2. Malongi mpe Mayokani 45: ‘Bilaka … Ekokokisama’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 2020)

“Sanza ya minei 26–Sanza ya mitano 2. Malongi mpe Mayokani 45,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
bilenge libanda ya tempelo

Sanza ya minei 26–Sanza ya mitano 2.

Malongi mpe Mayokani 45

“Bilaka … Ekokokisama”

Mokambi Russell M. Nelson ateyaki: “Koma makanisi oyo ezali koyela yo na moto. Koma mayoki na yo mpe tia na misala oyo otindami kosala na lombango” (“Emoniseli mpo na Eklezia, Emoniseli mpo na Bomoi na Biso,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2018, 95).

Koma Makanisi na Yo

Tozali na ntango ya mpasi; mpe yango ekoki kozala mobulu. Ata bayekoli ya Yesu, ntango bayokaki Ye kosakola na ntina ya mawa oyo masengeli kokoma na mikolo na biso, “batungisamaki” (Malongi mpe Mayokani 45:34). Basantu ya ebandeli na Kirtland, Ohio, batungisamaki lisusu na bileko ya makama ya liwa oyo bazalaki kati na yango. Na kati ya makambo mosusu, ezalaki na “makambo mingi ya lokuta bafundelaki bango … mpe masolo ya buzoba” oyo ezalaki kobebisa etinda ya nsango malamu (Malongi mpe Mayokani 45, moto ya eteni). Kasi eyano ya Nkolo, na ntango wana mpe sikawa, ezali “bomitungisa te” (molongo 35). Iyo, mabe ezali, kasi elembo ya solo mpe ezali lisusu ete Nzambe azali kotambwisa mosala na Ye mbangu. Iyo, ezali na makama oyo esakolamaki mpo na kolengela Boyei ya Mibale, mpe tosengeli kozala na angele mpo na yango. Kasi oyo ezali makebisi te kaka mpo na likama; kasi ezali lisusu bilembo ete bilaka ya Nzambe ezali pene ya kokokisama. Ntango mosusu yango ezali ntina nini Malongi mpe Mayokani 45—emoniseli oyo ezali kolimbola mingi ya bilembo yango na molai ezwamaki “mpo na bosepeli ya Basantu” (moto ya eteni).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 45:1–5

Yesu Klisto azali Molobeli na biso epai ya Tata.

Osila komiyoka lokola moto oyo azangi makoki to alongobani te liboso ya Nzambe? Okoki kozwa elikya na kati ya Malongi mpe Mayokani 45:1–5. Makanisi nini maloba lokola “molobeli” mpe “kosambela na ntina ya ”ezali kopesa yo? Lolenge nini Mobikisi alobelaka yo, to asambelelaka yo likambo? Yango ezali kolobela yo nini na koyebaka ete Klisto azali Molobeli na yo?

Maloba malandi uta na Mokambi Joseph Fielding Smith ekoki kosunga yo omanyola milongo oyo: “Yesu [azali] molobeli na biso, kosambaka mpo na biso lokola mobongisi na biso na nzela ya mosala na ye mpe misala ya koyokanisa biso, mpo na komema biso na kati ya boyokani elongo na Nzambe” (na Rapport ya Likita, Sanza ya zomi. 1953, 58).

Tala lisusu 2 Nefi 2:8–9; Mozia 15:7–9; Moroni 7:27–28; Malongi mpe Mayokani 29:5; 62:1.

Malongi mpe Mayokani 45:9–10

Nsango malamu ezali bendele mpo na bikolo.

Na ntango ya kala, bendele ezalaki musuale to dalapo oyo bamemaka na etumba. Ezalaki kobenga na mosala mpe kosangisa basoda mpe ezalaki kosunga bango bayeba esika wapi bakosangana mpe nini bakosala. Liloba ebongolami lokola bendele na lokota ya Angele ezali lisusu ndakisa to mobeko oyo bakoki komeka biloko mosusu na yango. Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 45:9-10,, manyola lolenge nini mayokani ya nsango malamu ezalaki bendele to emekiseli mpo na yo. Lolenge nini bomoi na yo elingaki kokesena soki oyebaki mayokani oyo te?

Tala lisusu Yisaya 5:26; 11:10–12; Malongi mpe Mayokani 115:5–6.

Malongi mpe Mayokani 45:11–75

Bilaka ya Nkolo ekokokisama.

Bitumba, masumu, mpe libebi ya nyonso ekoya liboso ya Boyei ya Mibale ya Mobikisi. Kasi “botungisama te,” Nkolo alobaki, “mpo ntango makambo oyo nyonso ekosalema, okoki koyeba ete bilaka oyo bipesamaki na yo ekokokisama” (Malongi mpe Mayokani 45:35).

Ntango ozali koyekola Malongi mpe Mayokani 45:11–75, kanisa kotala malamu kaka makambo oyo etungisaka te kasi lisusu mapamboli Nkolo alaki (ndakisa, bilaka kati na milongo 54–59 biye etali boyangeli ya mibu nkoto ya Mobikisi). Okoki kosala oyo na kokomaka mokanda molai ya nkombo ya makambo yango to kotiaka bilembo to kotiaka nkoma na milongo ya makomi. Ozwi nini oyo esungi yo “otungisama te” na mikolo ya nsuka?

Malongi mpe Mayokani 45:31–32, 56–57

“Telema na bisika ya bule,” mpe koningana te.

Ntina moko Mobikisi mpe baprofeta na Ye bateyaka biso na ntina ya bilembo ya Boyei ya Mibale ezali ya kosunga biso tomilengela. Oyekoli nini na kati ya Malongi mpe Mayokani 45:31–32, 56–57 na ntina ya bomilengeli mpo na Boyei ya Mibale ya Nkolo? Ekoki kosunga mingi soki otangi lisese ya Baseka zomi, oyo ezwami kati na Matai 25:1–13. Mobikisi akokanisaki mafuta na kati ya lisese oyo na bosolo mpe na Molimo Mosantu (tala Malongi mpe Mayokani 45:57). Mayele nini ozwi ntango otangi lisese na lolenge oyo?

Elilingi
baseka zomi

Lisese ya Baseka Zomi, na Dan Burr

Malongi mpe Mayokani 45:11–15, 66–71

Siona ezali esika ya bokengi mpo na Basantu ya Nzambe.

Basantu na ntango ya Joseph Smith bazalaki na mposa ya kotonga Siona, Yelusaleme ya Sika, lokola elimbolamaki na Buku ya Mormon (tala Etele 13:2–9) mpe na Biblia na bobongoli efulami ya sika ya Joseph Smith ya Biblia (tala Mose 7:62–64). Oyekoli nini na ntina ya Siona—nyonso mibale engumba ya mikolo ya kala ya Enoka mpe engumba ya mikolo ya nsuka—uta na Malongi mpe Mayokani 45:11–15, 66–71?

Lelo motindo ya kotia Siona elingi koloba kozongisa bokonzi ya Nzambe esika nyonso wapi tofandi—esika nyonso wapi bana ya Nzambe basanganaka mpo na bokengi ya ya Ye “liyokani ya seko” (molongo 9). Nini okoki kosala mpo na kotonga Siona esika wapi ozali?

Tala lisusu Mateya ya Nsango malamu, “Siona,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 45:3–5.Molobeli asalaka nini mpo na biso? Bokoki kotala video “Mobongisi” (ChurchofJesusChrist.org) mpe kolobela mpo na nini Mobikisi abiangemi Molobeli.

Malongi mpe Mayokani 45:9–10.Soki libota na yo ezalaki na “bendele,” to dalapo, mpo na kolakisa bomipesi na yo na nsango malamu, yango elingaki kozala lokola nini? Ekoki kozala malamu kosala bendele ya libota elongo mpe kosolola lolenge nini bokoki kosunga basusu balanda babendele ya nsango malamu.

Malongi mpe Mayokani 45:32.“Bisika bisantu” na biso ezali nini? Elingi koloba nini “koningana te”? Lolenge nini tokoki kosala ete libota na biso ezala esika esantu?

Malongi mpe Mayokani 45:39–44.Lolenge nini okoki kosunga bato ya libota basosola ndimbola ya kokengela mpo na Boyei ya Mibale ya Mobikisi? Ntango mosusu okoki kokanisa likambo monene oyo ozali kolengela mpe kokabola ndenge oyo ozali “kokengela” mpo na likambo wana. To bokoki kolamba eloko moko elongo mpe kokengela bilembo oyo elakisi ete ebelemi mpo na kolia. Tosalaka nini mpo na kokengela na ntina ya Boyei ya Mibale ya Mobikisi?

Malongi mpe Mayokani 45:55.Kotangaka 1 Nefi 22:26 mpe Emoniseli 20:1–3 ekoki kosunga libota na yo esosola lolenge nini Satana “akokangama” na ntango ya mibu nkoto. Lolenge nini tokoki kokanga Satana na bomoi na biso?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “When He Comes Again,” Chants pour Enfants, 82–83; tala lisusu “Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo ya Makomi na Libota.”

Kobongisa Boyekoli Makomi mpo na Yo Moko

Salela minkanda ya kosalisa mpo na boyekoli. Salela makomi ya nse ya lokasa, Bokambi na Makomi, Bible Dictionary, mpe Bokambi na Makomi mpo na kozwa mayele na kati ya makomi.

Elilingi
Klisto kokitaka

Boyei ya Klisto, na Jubal Aviles Saenz

Bimisa na lokasa