Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya mitano 3–9. Malongi mpe Mayokani 46–48: “Boluka na Bosolo Mpenza Makabo ya Malamu Koleka Nyonso”


“Sanza ya mitano 3–9. Malongi mpe Mayokani 46–48: ‘Boluka na Bosolo Mpenza Makabo ya Malamu Koleka Nyonso,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya mitano 3–9. Malongi mpe Mayokani 46–48,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
bokutani ya bato na liziba

Esika ya Bokutani, na Worthington Whittredge

Sanza ya mitano 3–9

Malongi mpe Mayokani 46–48

“Luka na Bosolo Mpenza Makabo ya Malamu Koleka Nyonso”

Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 46–49, koma makanisi nyonso oyo ozali kozwa. Nsima okoki kotuna, lokola Mpaka Richard G. Scott apesaki likanisi, “Ezali na mingi oyo ngai nasengeli koyeba?” (“Mpo na Kozwa Bokambi ya MolimoEnsign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2009, 8).

Koma Makanisi na Yo

Ntango Parley P. Pratt, Oliver Cowdery, Ziba Peterson, mpe Peter Whitmer Moke. batikaki Kirtland mpe bakendaki na bilanga mosusu ya mosala, batikaki babongwami koleka nkama oyo bazalaki na mpila makasi kasi boyebi to mayele moke ya kokamba. Bazalaki na babuku ya malako te, makita ya boyekoli bokambi ezalaki te, bazalaki mpe na makoki mpo na kopanza nsango ya likita linene te—solo, bakopi ya Buku ya Mormon ezalaki kutu mingi te mpo na kokabola. Mingi ya bandimi oyo ya sika balandaki nsango malamu ezongisama na elaka ya kozwa mamonisi kitoko ya Molimo, mingi mingi maye bayebaki uta na boyekoli ya Boyokani ya Sika (tala, ndakisa, 1 Bakolinti 12:1–11). Kala mingi te, mwa maloba ya momesano te ya kokumbamela—kobakisa na kati kokweya na nse to konyoloka lokola nyoka—ekotisamaki na mayangani ya Eklezia na bango. Mingi bamonelaki yango mpasi mpo na kososola mamonisi nini ezalaki ya Molimo mpe nini ezalaki ya Molimo te. Komonaka mobulungano yango, Joseph Smith asambelaki mpo na kozwa lisungi. Eyano ya Nkolo ezali mpe na motuya na mikolo ya lelo, wapi bato babwakisaka to baboyaka mbala mingi makambo ya Molimo. Nkolo amonisaki ete malakisi ya molimo ezali solo mpe atalisaki polele oyo yango ezali—makabo kowuta na Tata ya bolingi na Lola , “epesameli mpo na litomba ya baoyo balingaka [Ye] mpe epai ya babombaka mitindo na [Ye] nyonso” (Malongi mpe Mayokani 46:9).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 46:1–6

Totombeli baluki ya mpiko nyonso boyei malamu mpo na kokumbamela na kati ya Eklezia ya Nkolo.

Mayangani ya Eklezia ya Yesu Klisto ya Basantu ba mikolo mya Nsuka esengeli kotangama kati na mayangani ya bosangani wapi bayambaka bato malamu mpe maye efulama koleka mpenza na mokili. Lolenge nini Nkolo azali koteya biso na kati ya Malongi mpe Mayokani 46:1–6 mpo na koyamba baoyo bayaka na mayangani na biso? Baninga na yo mpe bato ya nzinganzinga na yo bamiyokaka ete bayambami malamu na misala ya kokumbamela na palwasi na yo? Osalaka nini mpo na kosala ete makita na yo ya Eklezia ezala bisika oyo bato balingaka kozongela lisusu? Manyola lolenge nini makasi na yo ya kolanda Molimo Mosanto na makita ya Eklezia ekoki kozala na litomba na boyebi na yo.

Tala lisusu 3 Nefi 18:22–23; Moroni 6:5–9; video ya, “Boyei malamu,” ComeUntoChrist.org; “Esengo ya Bonzambe kati ya Babongwami ya Sika ya Ohio,” Revelations in Context, 105–11.

Malongi mpe Mayokani 46:7–33

Nzambe apesi makabo ya molimo mpo na kopambola bana na Ye.

Basantu ya ebandeli bandimelaki makabo ya Molimo kasi basengelaki kozwa mwa bokambi na ntina ya kokokisa mposa na bango. Ntango ozali koyekola na ntina ya makabo ya Molimo kosalelaka Malongi mpe Mayokani 46:7–33, manyola mpo na nini ezali ntina ete yo “ntango nyonso [omikundola] na ntina nini yango epesami” (molongo 8). Kanisa lolenge nini milongo oyo ekokani na esakola oyo uta na Mpaka Robert D. Hales: “Makabo oyo epesami na baoyo bazali na bondimi na Klisto. Ekosunga biso toyeba mpe toteya makambo ya solo ya nsango malamu. Ekosunga biso topambola basusu. Ekokamba biso tozonga epai ya Tata na Lola” (“Makabo ya Molimo,” Ensign, Sanza ya mibale. 2002, 16). Nini oyekoli lisusu uta na milongo ya makomi oyo na ntina ya mamonisi ya molimo? Lolenge nini makambo ya solo oyo ekoki kosunga yo mpo ete “okosama te”? (molongo 8).

Manyola nini ezali makabo na yo ya molimo—mpe lolenge nini okoki kosalela yango “mpo na litomba ya bana na Nzambe” (molongo 26). Soki ozali na lipamboli ya bonkoko, yango ezali solo kokitola makabo oyo epesameli yo.

Tala lisusu Masolo ya Nsango malamu, “Makabo ya Molimo,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Malongi mpe Mayokani 47

Nkolo alingi Eklezia na Ye ebombaka mambi ya kala.

Libiangi ya John Whitmer ya kobomba mambi ya kala ya Eklezia ekobaki momeseno ya kala ya kobatela lisitwale kati na bato ya Nzambe (tala 2 Nefi 29:11–12; Mose 6:5; Abraham 1:28, 31). Solo mpenza, mokumba ya Mobateli mambi ya kala ya Eklezia mpe Kalaki ezali kokoba kino lelo. Mpo na nini okanisi ete kobombaka mambi ya kala ezali mpenza ntina epai ya Nkolo? Manyola yango ntango ozali kotanga malako na Ye epai ya John Whitmer na ntina ya mosala oyo na kati ya eteni 47. Tala lisusu mayebi na yo moko nini osengeli koboma. Ndakisa, Nkolo ateyi yo nini oyo olingi ebatelama?

Ntango ozali komanyola mituna oyo, kanisa mayele oyo uta na Mpaka Marlin K. Jensen ya Bantuku nsambo, oyo asalelaki lokola Mobombi Mambi ya Kala ya Eklezia mpe Mokomi uta 2005 kino 2012:

“Tobombaka nkoma ya makomi mpo na kosunga biso tomikundola. … Tolingaka kosunga bandimi ya Eklezia bakundola makambo minene Nzambe asalaki mpo na bana na Ye. … Mateya uta na ntango ya kala esungaka biso kokonza mikolo na biso ya lelo mpe kopesaka biso elikya mpo na mikolo na biso ya lobi” (“There Shall Be a Record Kept among You,” Ensign, Sanza ya zomi na mibale. 2007, 28, 33).

Mpo na koyekola mingi na ntina ya mosala oyo ezali kosalema sikawa na nse ya bokambi ya Mokomi mambi ya kala ya Eklezia, kende kotala na history.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
John Whitmer

John Whitmer abiangemaki mpo na kobatela mambi ya kala ya Eklezia.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 46:2–6.Nini tokoki kosala lokola libota mpo na kosala ete basusu bayoka ete bayambami malamu na makita ya Eklezia na biso? (tala lisusu 3 Nefi 18:22–23). Foto ezali elongo na mateya oyo ekoki kobakisama na masolo oyo.

Malongi mpe Mayokani 46:7–26.Makabo ya molimo nini tomonaka kati na bamoko mpe basusu? Lolenge nini makabo oyo ekoki kopambola libota na biso?

Malongi mpe Mayokani 47.Lolenge nini okoki kolendisa libota na yo mpo na kokoma mambi na bango moko ya kala poso nyonso? Bokoki kokabola mwa makambo ya zulunale na bino moko to kokabola lisolo na ntina ya nkoko moko (tala FamilySearch.org). Mabota mosusu bazwaka mwa baminiti poso nyonso mpo ete moto nyonso akoma na bazulunale na bango. Okoki kokoma na zulunale, makanisi oyo eyaka na mituna lokola “Nini esalemaki na poso oyo, oyo okolinga ete bankoko na yo bayeba yango?” to “Lolenge nini omonaki loboko ya Nkolo na bomoi na yo na poso oyo?” Bilenge bana bakoki koyema bafoto ya mayele na bango, to bokoki kokoma yango na kobetaka lisolo na yango. Mapamboli nini eyaka uta na kobatela “mambi ya kala mbala na mbala”? (molongo 1).

Malongi mpe Mayokani 48.Basantu na Ohio batindamaki kokabola mabele na bango na baoyo bazalaki kokende na Ohio uta na ngambu ya este ya Etazini. Tokoki kokabola nini mpo na kokokisa mposa ya basusu?

Mpo na kozwa makanisi mingi mpo na koteya bana, tala mwango ya poso oyo kati na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Have I Done Any Good?” (Cantique, no. 223).

Kobongisa Mateya na Biso

Salela Masolo mpe Ndakisa. Mobikisi asalelaki mbala mingi masolo mpe masese mpo na koteya mabongi ya nsango malamu. Kanisa bandakisa mpe masolo ya bomoi na yo moko oyo ekoki kosala libongi ya nsango malamu ezala na bomoi kati na libota na yo (tala Liteya na Lolenge ya Mobikisi, 22).

Elilingi
Bato na Eklezia

Tata na Lola apesaka bana na Ye makabo ya molimo mpo na kopambola bomoi ya basusu.

Bimisa na lokasa