Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya mitano 24–30. Malongi mpe Mayokani 58–59: “Mipesa Mpenza mpo na Ntina ya Malamu”


“Sanza ya mitano 24–30. Malongi mpe Mayokani 58–59: ‘Mipesa Mpenza mpo na Ntina ya Malamu,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya mitano 24–30. Malongi mpe Mayokani 58–59,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
balabala ya Independence Missouri

Independence, Missouri, na Al Rounds

Sanza ya mitano 24–30.

Malongi mpe Mayokani 58–59

“Mipesa Mpenza na Ntina ya Malamu”

Mokambi Dallin H. Oaks ateyaki, “Makomi ekosunga biso kopesa biyano na mituna na biso moko mpo ete na nzela ya kotanga yango tobengisaka mpe tomilongaka mpo na kozwa bofuli ya Molimo Mosantu, oyo ekokamba biso na bosolo nyonso” (kati na David A. Edwards, “Biyano na Ngai Ezali Kuna na Kati?New Era, Sanza ya mitano 2016, 42).

Koma Makanisi na Yo

Ntango bampaka ya Eklezia bamonaki yambo esika ya engumba ya Siona—Independence, Missouri—ezalaki esika oyo bazalaki kozela te. Basusu bakanisaki bakokuta esika moko ya nkembo, esika mpo na lisanga ya bato ya misala na lingomba ya Basantu ya mpiko. Kasi bamonaki mboka ya bato moke, ezanga bompenza oyo bamesanaki na yango mpe bato oyo bafandaki kuna ezalaki bato basusu na esika ete bakuta Basantu. Emonanaki ete Nkolo azalaki kosenga bango te kaka baya na Siona—Alingaki mpe ete bango batonga yango.

Ntango bosenga na biso ezali kokokisama na solo te, tokoki komikundola oyo Nkolo alobelaki Basantu na 1831: “Bokoki komona na miso na bino ya bomoto te, mpo na ntango oyo, mposa ya Nzambe na bino … mpe nkembo oyo ekolanda nsima ya mitungisi mingi” (Malongi mpe Mayokani 58:3.). Iyo bomoi etonda na mikakatano kilikili, kutu motema mabe, kasi tokoki “Kosala bosembo mingi; mpo nguya ezali kati na [biso]” (milongo 27–28).

Tala lisusu Basantu, 1:127–33.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 58:1–5, 26–33, 44; 59:23

Mapamboli eyaka engebene na ntango ya Nzambe mpe molende na biso.

Basantu batiaki moboko ya Siona kati na Etuka ya Jackson, Missouri, esika wapi bakutanaki na mimekano mingi. Balikiaki solo ete na ntango ya bomoi na bango etuka oyo elingaki kotombwama na esika oyo wapi Basantu nyonso bakokaki kosangana. Kasi, babenganaki Basantu nsima ya mibu moke na etuka ya Jackson, mpe Nkolo amonisaki ete bato na Ye basengelaki “kozela mwa eleko moke mpo na bosikoli ya Siona” (Malongi mpe Mayokani 105:9).

Ntango ozali koyekola milongo oyo elandi, luka bantina oyo mapamboli ekoki kozela mpo na ntango moke. Mituna oyo na nse ekoki kosunga yo omanyola.

Malongi mpe Mayokani 58:1–5; 59:23. Maloba nini kati na milongo oyo elendisi makoki na yo ya komema mpasi to mikakatano na bompikiliki koleka? Mapamboli nini ozwaki nsima ya mikakatano? Mpo na nini okanisi mapamboli mosusu eyaka bobele nsima ya mikakatano?

Malongi mpe Mayokani 58:26–33. Mosala nini kozalaka na “bomipesi mpenza na ntina ya malamu” esalaka mpo na kokokisa bilaka ya Nzambe? Mosala nini botosi na yo esalaka?

Malongi mpe Mayokani 58:44. Mokangano nini ezali kati ya “losambo ya bondimi” mpe bolingi ya Nkolo mpo na biso?

Malongi mpe Mayokani 59, molongo ya moto

Polly Knight azalaki nani?

Polly Knight mpe mobali na ye, Tata Joseph Knight, bazalaki bandimi ya yambo na libiangi ya boprofeta ya Joseph Smith. Polly mpe Joseph basungaki makasi Profeta na mosala ya bobongoli Buku ya Mormon. Libota ya Knight batikaki Colesville, New York, mpo na kosangana na Basantu na Ohio mpe nsima batindamaki kokende na etuka ya Jackson, Missouri. Ntango bakendaki mobembo, bokolongono ya nzoto ya Polly ebandaki kokita, kasi akanaki komona Siona yambo akufa. Afandaka na Missouri bobele mwa mikolo mike ntango ayaki kokufa (Tala Les Saints, 1:127–28, 132–33). Malongi mpe Mayokani 59 ezwamaki na mokolo ya liwa na ye, mpe milongo 1 mpe 2 emonani lokola kolobela ye mingi mingi.

Malongi mpe Mayokani 59:9–19

Kobatelaka Saba mpo ete ezala esantu ememaka mapamboli ya ntango mpe ya molimo.

Nsima ya kolaka kopambola Basantu na Siona “na mitindo ya ndambo te,” Nkolo abetaki nsete ya ntina na motindo moko mpenza: motindo ya kokumisa mokolo “na Ye ezala mokolo mosantu” (Malongi mpe Mayokani 59:4, 9). Ntango ozali koyekola Malongi mpe Mayokani 59:9–19., manyola mpo na nini kokumisa mokolo ya Saba esengelaki kozala ntina mpenza na Basantu oyo ntango bazalaki koluka kotonga Siona.

Okoki lisusu komanyola mituna lokola oyo: Ezali ngai kosalela mokolo ya Saba lolenge Nkolo akanaki? Lolenge nini kobatela mokolo ya Saba lokola esantu esungaka ngai kotikala “na bosoto uta na mokili te”? (molongo 9). Nini ekoki ngai kosala mpo na kopesa ya ngai “nsambo epai ya Oyo Azali Likolo Koleka”? (molongo 10).

Nsima ya kotanga milongo oyo elandi, ofulami kosala nini mpo na kobatela mokolo ya Saba ezala mokolo mosantu na mobimba na yango koleka ? Genese 2:2–3; Esode 20:8–11; 31:13, 16; Dutelonome 5:12–15; Yisaya 58:13–14; Malako 2:27; Yoane 20:1–19; Misala 20:7.

Okoki lisusu kotala moko ya bavideo to bisalelo mosusu ya koteya na ntina ya Saba oyo bizwami na sabbath.ChurchofJesusChrist.org.

Tala lisusu Russell M. Nelson, “The Sabbath Is a Delight,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2015, 129–32; Bible Dictionary, “Saba.”

Elilingi
lipa mpe bakopo ya elambo

Kolia elambo ezali eteni moko ya nyonso tosalaka mpo na kobatelaka mokolo ya Saba esantu.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 58:26–29.Ntango mosusu bato ya libota bakoki kokoma ndambo ya makambo kati na oyo “bamipesi mpenza”. Nyonso ezali “[ba]ntina malamu”? Mpo na nini Nkolo alingaka biso tosala “makambo mingi na [ya biso] moko bolingi ya bonsomi ”? Senga moto ya libota moko na moko akanisa nini bakoki kosala na poso oyo mpo na “kokokisa bosembo mingi.” Nsima bakoki koloba na ntina ya oyo basalaki.

Malongi mpe Mayokani 58:42–43.Bato ya libota bayoki nini ntango batangi milongo oyo? Lolenge nini milongo oyo ekoki kosunga moto moko oyo asengeli koyambola?

Malongi mpe Mayokani 59:3–19.Elingi koloba nini “kolatisama motole … na mitindo”? (molongo 4). Ntango bozali kotanga mitindo na milongo 5–19, bosolola mapamboli oyo bozwi na kotosaka moko na moko ya mitindo oyo.

Bokoki lisusu kotala lolenge nini maloba lokola “esengo,” “bosepeli,” “nsai-nsai,” mpe “koyokisa malamu” esalelami mpo na kolimbola motindo ya kotosa mokolo ya Saba. Lolenge nini okoki kokomisa mokolo na yo ya Saba mokolo ya esengo Koleka? Ntango mosusu libota na yo ekoki kosala lisano ya bakalati oyo ezali kolakisa makambo oyo bokoki kosala na mokolo ya Saba ete ezala mokolo mosantu.

Malongi mpe Mayokani 59:18–21.Lolenge nini tokoki kosala mpo na “kotatola … Loboko ya [Nzambe] kati na makambo nyonso”? (molongo 21). Kanisa kokendaka kotambola to kotalaka bilili, komonaka makambo oyo “esepelisaka liso mpe … kopesa esengo na motema” (molongo 18). Okoki kozwa to koyema bilili ya oyo ozwi mpe nsima kosolola na ntina ya lolenge nini okoki kolakisa botondi na yo mpo na makambo oyo. Lolenge nini tomoni loboko ya Nzambe na bomoi na biso?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo kati ya Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Choose the Right,” Hymns, no. 239.

Kobongisa Mateya na Biso

Kabola makomi. Pesa bato ya libota ntango ya kokabola milongo ya makomi oyo bazwaki kati na boyekoli ya bango moko mpe oyo ezali na ntina mingi mpo na bango.

Elilingi
Mwana mwasi kosambelaka na ntango ya elambo

Ndakisa ya foto na Marti Major

Bimisa na lokasa