Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya mitano 17–23. Malongi mpe Mayokani 51–57: “Kapita ya Sembo, Moyengebene, mpe ya Bwanya”


“Sanza ya mitano 17–23. Malongi mpe Mayokani 51–57: ‘Kapita ya Sembo, Moyengebene, mpe ya Bwanya,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Doctrine et Alliances 2021 (2020)

“Sanza ya mitano 17–23. Malongi mpe Mayokani 51–57,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Moloni bilanga na bangombe

Monkaka ya Yambo, na James Taylor Harwood

Sanza ya mitano 17–23.

Malongi mpe Mayokani 51–57

“Kapita ya Sembo, Moyengebene, mpe ya Bwanya”

Koyekola makomi ekosungaka yo oyeba mongongo ya Nzambe, mpo ete makomi epesamaki na Ye na nzela ya Molimo (tala Malongi mpe Mayokani 18:34–36).

Koma Makanisi na Yo

Mpo na bandimi ya Eklezia na mibu 1830, kosangisa Basantu mpe kotonga engumba ya Siona ezalaki mosala ya molimo lokola mpe ya ntango, na mikakatano mingi ya kokokisa mosala ya kobongisa: Moto moko asengelaki kosomba mpe kokabola mabele bisika wapi Basantu bakokaki kofanda. Moto moko asengelaki kobimisa babuku mpe mikanda mosusu. Mpe moto moko asengelaki koyangela ebombelo mpo na kopesa biloko na bato bazalaki na Siona. Kati na bimoniseli oyo bikomami na Malongi mpe Mayokani 51–57, Nkolo aponaki mpe ateyaki bato ya kosala misala oyo, mpe Ye aponaki Independence, Missouri, lokola “esika ya katikati” ya Siona (Malongi mpe Mayokani 57:3).

Kasi ntango kozala na makoki mpo na kokokisa makambo ya boye lokola kosombaka mabele, kobimisa buku, mpe koyangela bibombelo ezali motuya kati na misala ya ntango mpo na kotonga Siona, bimoniseli oyo biteyi lisusu ete Nkolo alingaka Basantu na Ye bakoma ya kolongobana na molimo mpo na kobiangema bato ya Siona. Ye, abiangaka moko moko kati na biso kozala “kapita ya sembo, moyengebene mpe ya bwanya,” na molimo mobukama, “kotelema[ka] ngwi” na mikumba mipesameli biso (tala Malongi mpe Mayokani 51:19; 52:15; 54:2). Soki tokoki kosala yango—na kozangaka kotala makoki na biso ya bomoto—Nkolo akoki kosalela biso mpo na kotonga Siona, mpe Ye “akotambwisa na lombangu misala ya kotonga engumba na ntango na yango” (Malongi mpe Mayokani 52:43).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 51

Nkolo alingi ngai nazala kapita ya sembo, moyengebene mpe ya bwanya.

Soki ozalaki mondimi ya Eklezia na 1831, okokaki kobiangema mpo na kosalela mobeko ya bobulisi na kopesaka bozwi na yo na Eklezia na nzela ya episikopo. Alingaki nsima kozongisela yo, na makambo mingi, oyo opesaki, ntango mosusu na milekeli likolo. Kasi ezalaki lisusu bozwi na yo te—ezalaki bokapita na yo.

Lelo esaleli ezali ya kokesena, kasi mabongi ya bobulisi mpe boyangeli ezali kino lelo ntina na mosala ya Nkolo. Tala maloba oyo uta na Mpaka Quentin L. Cook: “Tozali kobika na ntango ya makama mingi wapi ntango bandimi mingi bakanisaka ete tozali bayanoli na Nzambe te mpe ete tozali na mokumba moko te to bokapita mpo na biso moko to basusu te. Mingi kati ya mokili batalaka kaka matomba na bango moko … [mpe] bandimaka te ete bazali babateli ya bandeko na bango. Nzokande, kati na Eklezia, tondimaka ete bokapita ezali mokumba moko ya bule mopesameli biso” (“Stewardship—a Sacred Trust,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2009, 91).

Ntango ozali kotanga eteni 51, kanisa na ntina ya oyo Nzambe apesi yo. Maloba oyo elingi koloba nini “bokapita” (molongo 19) mpe “ebulisama” (molongo 5), mpe yango elakisi nini na ntina ya oyo Nzambe azali kozela mpo na yo? Mabongi nini ozwi na kati ya eteni 51 mpe na maloba ya Mpaka Cook oyo eteyi yo nini mpo na kozala kapita? (tala mingi mingi milongo 9, 15–20).

Tala lisusu Matai 25:14–30; “Mobeko ya Bobulisi,” video, ChurchofJesusChrist.org.

Malongi mpe Mayokani 52:14–19

Nzambe apesaki nzela mpo na koboya lokuta.

Elongo na bato mingi kosengaka mamonisi ya molimo, Basantu ya ebandeli bamitungisaki mingi na likambo ete bakosama. Lolenge nini bakoki koyeba nani andimamaki epai ya “[Nzambe]”? (molongo 15). Na Malongi mpe Mayokani 52:14–19, Nkolo apesaki ndakisa oyo ekosunga bango. Lolenge nini okoki kosalela ndakisa oyo mpo na koyeba bansango ya lokuta kati na mokili? Okoki kosalela lisusu ndakisa oyo mpo na komituya yo moko: kanisa kosalela maloba uta na milongo oyo mpo na kokoma mituna lokola “Ntango nalobaka, molimo na ngai ezalaka ya kobukama?”

Malongi mpe Mayokani 54

Nakoki kozonga epai ya Nkolo ntango natukami na maponi ya basusu.

Lokola eteni ya bosangani na Ohio, lingomba ya Basantu oyo bakambamaki na Newel Knight bakomaki kowuta na Colesville, New York, mpe bazalaki na mposa ya esika ya kofanda. Leman Copley azalaki na elanga ya monene pembeni ya Kirtland, mpe ayokanaki mpo na kopesa ndingisa na Basantu bafanda na mabele na ye. Nzokande, sasaipi nsima ya kobanda kotonga kuna, Copley abungisaki kondima na ye, abukaki boyokani na ye, mpe abenganaki Basantu na mabele na ye (tala Basantu, 1:125–28).

Lokola ekomami na eteni 54, Nkolo ayebisaki Newel Knight nini Basantu basengelaki kosala na ntina ya ezalela na bango. Omoni nini na kati ya emoniseli oyo ekoki kosunga yo ntango basusu babuki maloba ya boyokani bapesaki to baponi banzela mosusu ya mabe oyo esali yo mpasi?

Elilingi
green field

Esika ya elanga na Ohio oyo Leman Copley alakelaka Eklezia.

Malongi mpe Mayokani 56:14–20

Bapambolami ezali bato ya mitema peto.

Na milongo oyo, Nkolo alobaki na bango mibale bazwi mpe babola; ekoki kozala likambo ya litomba mingi mpo na kokokanisa toli na Ye na mangomba mibale oyo. Nini emonaninikozala likambo ya ntina na kati ya milongo oyo mpo na yo moko? Lolenge nini komipesa na bozwi “egugaka” molimo na yo? (molongo 16). Yango elingi koloba nini mpo na yo kozala “peto na motema” (molongo 18) na kotalaka biloko ya mokili?

Tala lisusu Yakobo 2:17–21.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 51:9.Bokoki kosakana lisano oyo libota esepelaka na yango mpe nsima kosolola na ntina ya lolenge nini lisano elingaki kozala ya kokesena soki moto moko akosaki. Mpo na nini ezali ntina ya “kosalela bosembo” moko na mosusu? Lolenge nini bosembo esungaka biso “tozala na bomoko”?

Malongi mpe Mayokani 52:14–19.Ntango bozali kosolola na ntina ya ndakisa elimbolami na milongo oyo, libota na yo ekoki kosepela kotala bandakisa mosusu oyo bosalelaka—lokola bandakisa ya kotonga bilamba to kosala biloko mosusu na maboko. Bokoki kosala elongo mpo na kosala eloko songolo uta na ndakisa moko ntango bozali kosolola na ntina ya ndakisa Nkolo apesaki mpo na koboya kokosama.

Malongi mpe Mayokani 53:1.Kanisa kokabolaka elongo na libota boyebi moko ntango yo, lokola Sidney Gilbert, otunaki Nkolo “na ntina ya libiangi na yo.”

Malongi mpe Mayokani 54:2; 57:6–7.Yango elingi koloba nini “kotelema ngwi” (Malongi mpe Mayokani 54:2) na oyo Nzambe asengaki biso tosala? Okoki kobengisa bato ya libota batelema mpe baloba likambo moko oyo Nzambe asengaki bango basala.

Malongi mpe Mayokani 55.Lolenge nini Nkolo asalelaki makoki ya William Phelps lokola mokomi mpe mobimisi ya buku na nkasa? (ndakisa, tala bobakisi ya mokomi na kati ya buku ya nzembo mpo na bankombo ya nzembo akomaki). Ntango mosusu bato ya libota bakoki kosolola na ntina ya batalanta mpe makoki bamonaka kati ya moko mpe mosusu. Lolenge nini batalanta na biso ekoki kosunga na mosala ya Nzambe?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “‘Give,’ Said the Little Stream,” Chants pour Enfants, 236.

Kobongisa Boyekoli Makomi mpo na Yo Moko

Batela zulunale ya boyekoli. Okoki kozwa lisungi mpo na kosalela zulunale to kaye mpo na kokoma makanisi, mabanzo, mituna, to mayoki oyo eyaka ntango ozali koyekola.

Elilingi
bandimi kopesaka biloko na Edward Partridge

Episikopo Partridge Abulisisami, na Albin Veselka

Bimisa na lokasa