Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya mitano 10–16. Malongi mpe Mayokani 49–50: “Oyo Ezali ya Nzambe Ezali Pole”


“Sanza ya mitano 10–16. Malongi mpe Mayokani 49–50: ‘Oyo Ezali ya Nzambe Ezali Pole,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya mitano 10–16. Malongi mpe Mayokani 49–50,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
liziba na botani ya ntongo

Sanza ya mitano 10–16.

Malongi mpe Mayokani 49–50

“Oyo Ezali ya Nzambe Ezali Pole”

“Oyo azwi pole, mpe akobi kati na Nzambe, azwi pole ya koleka; mpe pole yango ekokoba kongenga mpe kongenga kino na mokolo ya bobongi nie” (Malongi mpe Mayokani 50:24). Manyola lolenge nini ozali kozwa pole na kokobaka na Nzambe.

Koma Makanisi na Yo

Mobikisi azali “mobateli mpate malamu” na biso (Malongi mpe Mayokani 50:44). Ayebi ete mpate ntango mosusu ayengaka-yengaka mpe ete esobe ezali na makama mingi. Yango wana Ye akambaka biso na bolingo na bokengi ya malongi na Ye, mosika ya makama lokola “milimo mabe, oyo mipanzani na mabele, kokosaka mokili” (Malongi mpe Mayokani 50:2). Kolandaka Ye mbala mingi elakisi kotika makanisi to mimesano ya mabe. Yango ezalaki solo mpo na Leman Copley mpe basusu na Ohio oyo bandimaki nsango malamu ezongisama kasi batikaki biyamba-yamba mosusu te oyo ezalaki kaka malamu te. Na kati ya Malongi mpe Mayokani 49, Nkolo asakolaki makambo ya solo oyo ebongisaki boyambi ya yambo ya Leman na ntina ya makambo lokola libala mpe Boyei ya Mibale ya Mobikisi. Mpe ntango babongwani ya Ohio “bazwaki … molimo oyo [bango ] bakokaki te kososola,” Nkolo ateyaki bango lolenge nini ya kososola mamonisi ya Molimo (Malongi mpe Mayokani 50:15). Mobateli mpate Malamu azalaki na bompikiliki; Ayebaki ete Basantu oyo ya ebandeli bazalaki—lokola banso kati na biso—“bana mike” oyo “basengeli kokola na ngolu mpe mayele ya bosolo” (Malongi mpe Mayokani 50:40).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 49:5–23

Makambo ya solo ya nsango malamu ekoki kosunga ngai nayeba mateya ya lokuta.

Liboso ya kokota na Eklezia, Leman Copley azalaki moko ya lingomba ya eyamba eyebana lokola Bandimi ya Lingomba ya Bosangani na Bomonisami ya Mibale ya Klisto, lisusu eyebanaki lokola Ba-Shakers (tala “Leman Copley and the Shakers,” Revelations in Context, 117–21). Nsima ya kosolola na Leman, Joseph Smith alukaki kozwa ndimbola uta na Nkolo na ntina ya mateya mosusu ya Ba-Shakers, mpe Nkolo ayanolaki na emoniseli ezwani na kati ya eteni 49.

Bokoki komona ndambu ya mateya ya boyambi ya Bashakers oyo etangami na moto ya eteni 49. Kanisa kotiaka bilembo to kokomaka makambo ya solo kati na milongo 5–23 oyo esemboli biyamba-yamba oyo wana. Kanisa na ntina ya mateya to mimesano mosusu ya lokuta na mokili ya lelo. Makambo ya solo nini ya nsango malamu ekoki kosunga yo omibatela yo moko na makambo oyo?

Malongi mpe Mayokani 49:15–17

Libala ya mobali mpe mwasi ezali ntina na moango ya Nzambe.

Makambo ya solo nini na ntina ya libala oyekoli uta na Malongi mpe Mayokani 49:15–17? Mpo na nini okanisi ete libala ya mobali mpe mwasi ezali na ntina mpo na moango ya Tata na Lola? Mpaka David A. Bednar apesaki bantina mibale: “Ntina 1: Ndenge ya milimo ya mibali mpe basi ekokisaka mpe ebongisaka lolenge ya kokoka mpenza ya moko mpe mosusu, mpe lisusu mibali mpe basi basengeli kokende liboso elongo mpo na bonetoli. … Ntina 2: Na moango ya bonzambe, banso mibale mobali mpe mwasi basengeli kobota bana na bomoi oyo ya kufa mpe kosala esika ya malamu koleka mpo na kobokola mpe koleisa bana” (“Marriage Is Essential to His Eternal Plan,” Ensign, Sanza ya motoba 2006, 83–84).

Tala lisusu Genese 2:20–24; 1 Bakolinti 11:11; “Libota: Esakola na Mokili,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2017, 145.

Elilingi
balongani libanda ya tempelo

Libala kati na mobali mpe mwasi ebulisami na Nzambe.

Malongi mpe Mayokani 50

Mateya ya Nkolo ekoki kobatela ngai uta na bokosi ya Satana.

Babongwani ya sika na Ohio bazalaki motema moto moto mpo na kozwa mamonisi ya molimo maye malakelamaki na makomi, kasi Satana azalaki lisusu motema moto moto mpo na kokosa bango. Bamitunaki, Ntango moto azali koganga to azali komiyoka to komiyeba lisusu te, oyo wana ezali nguya ya Molimo?

Kanisa ete osengamaki kosunga babongwami oyo ya sika basosola lolenge nini kososola mamonisi ya solo ya Molimo Mosanto mpe baboya kokosama na bimekoli ya Satana. Mabongi to mateya nini ozwi na kati ya Malongi mpe Mayokani 50 oyo okoki kokabola? (tala mingi mingi milongo 22–25, 29–34, 40–46).

Tala lisusu 2 Timote 3:13–17.

Malongi mpe Mayokani 50:13–24

Bateyi mpe bayekoli bazali kolendisama elongo na Molimo.

Nzela moko okokoki koyekola Malongi mpe Mayokani 50:13–24 ezali ya koyema elili moko ya moteyi mpe moyekoli mpe, moko pembeni ya mosusu, koma molongo ya maloba mpe masakoli uta na milongo ya makomi oyo ezali koteya bino likambo moko na ntina ya boyekoli mpe boteyi ya nsango malamu. Ntango nini ozwaki mayele oyo eteyaki yo ntina ya Molimo na likambo ya koteya mpe koyekola? Kanisa nini okoki kosala mpo na kobongisa makasi na yo lokola moyekoli mpe moteyi ya nsango malamu

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 49:2.Yango elingi koloba nini “kozala na mposa ya koyeba bosolo na ndambu, kasi nyonso te”? Ntango mosusu okoki kolakisa elili ezipama na ndambu moke mpe kotika bato ya libota baluka koyeba soki ezali nini. Nini esalemaka ntango tondimaka bobele ndambu ya bosolo? (tala 2 Nefi 28:29). Lolenge nini litondi ya nsango malamu ezali lipamboli mpo na biso?

Malongi mpe Mayokani 49:26–28.Lolenge nini topambolamaka na elaka ya Nkolo “nakokende liboso na yo mpe nakozala nsima na yo; mpe nakozala na katikati na yo”? Bato ya libota bakoki kokabola mayele ntango bayokaki Nkolo “kokende liboso na [bango]” to bayokaki ete Azalaki “na katikati na [bango].”

Malongi mpe Mayokani 50:23–25.Bokoki kosangana na kisuku ya molili mpo na kotanga Malongi mpe Mayokani 50:23–25 mpe moke-moke kobakisa pole koleka na kopelisaka babuzi to kopelisaka bamwinda moko na moko. Bokoki lisusu kotanga milongo ya makomi oyo ntango bozali kotala bobimi ya moyi na ntongo. Tokoki kosala nini mpo na kosala ete mwinda ya nsango malamu na biso ekoba kopela makasi? Ntango bato ya libota bazali koyekola likambo moko ya sika na ntina ya nsango malamu na poso, lendisa bango bakabola yango na libota na kokomaka mokanda mpe kokangisa yango na mwinda to lolenge ya mwinda mosusu na kati ya ndako.

Malongi mpe Mayokani 50:40–46.Nsima ya kotanga Malongi mpe Mayokani 50:40–46, okoki kolakisa elili ya Mobikisi oyo ezali kokokana na nsango oyo mpe tuna mituna lokola oyo: Lolenge nini okoki koloba ete Mobikisi alingaka mpate? Lolenge nini Mobikisi azali lokola mobateli mpate epai na biso? Maloba nini uta na makomi emonisi likanisi ete Mobikisi azali mobateli mpate mpe tozali bampate na Ye?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Shine On,” Chants pour Enfants, 144.

Kobongisa Mateya na Biso

Yeba kobongwana. Bantango ya malamu koleka mpo koteya, mingi-mingi na libota, ezalaka mbala mingi na mbalakaka mpe na ntango oyo bato bazelaki te: elambo na libota ekoki kofula biso tosolola na ntina ya kosala lipati ya liloba ya Nzambe, mpe mvula makasi ekoki kozala litomba malamu mpo na kotatola mayi na bomoi. Soki omilengeli na molimo, Nkolo akoki kopesa yo “na ntango wana mpenza, oyo okoloba” (Malongi mpe Mayokani 100:6).

Elilingi
Yesu na mwana ya mpate

Mobateli mpate ya Boboto, na Kim Yongsung

Bimisa na lokasa