Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya mitano 31–Sanza ya motoba 6. Malongi mpe Mayokani 60–62: “Mosuni Nyonso Ezali na Maboko na Ngai”


“Sanza ya mitano 31–Sanza ya motoba 6. Malongi mpe Mayokani 60–62: ‘Mosuni Nyonso Ezali na Maboko na Ngai,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya mitano 31–Sanza ya motoba 6. Malongi mpe Mayokani 60–62,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Ebale ya Missouri

Moto ya Ka likolo ya Missouri, na Bryan Mark Taylor

Sanza ya mitano 31–Sanza ya motoba 6

Malongi mpe Mayokani 60–62

“Mosuni Nyonso Ezali na Maboko na Ngai”

Mokambi Ezra Taft Benson ateyaki ete ntango toyekolaka makomi, “matatoli ekobakisma. Bomipesi ekolendisama. Mabota ekozwa makasi. Emoniseli ya moto na moto ekotonda” (“The Power of the Word,” Ensign, Sanza ya mitano 1986, 81).

Koma Makanisi na Yo

Na Sanza ya motoba 1831, Joseph Smith asalaki likita na bampaka ya Eklezia na Kirtland. Kuna, Nkolo alengelaki bampaka basusu na bakompani ya bato mibale mibale mpe atindaki bango na Etuka ya Jackson, Missouri, na mokumba oyo: “Koteya nzela-nzela” (Malongi mpe Mayokani 52:10). Mingi ya bampaka basalaki na molende mpenza, kasi basusu basalaki te. Boye ntango mobembo ya kozonga na Kirtland ekokaki, Nkolo alobaki, “Na ndambo ya [bampaka] nasepelaki malamu te, mpo bakokaki kofungola minoko na bango te, kasi babombi batalanta oyo napesaki bango, mpo na bobangi ya moto” (Malongi mpe Mayokani 60:2). Mingi kati na biso tokoki koyoka mawa mpo na bampaka oyo—tokoki lisusu kotatabana mpo na kofungola minoko na biso mpe kokabola nsango malamu. Ntango mosusu biso mpe topekisami na “bobangi ya moto.” Ntango mosusu totiaka ntembe na bolongobani to makoki na biso. Atako bantina na biso kani, Nkolo “ayebaka botau ya moto mpe lolenge nini kosunga [biso]” (Malongi mpe Mayokani 62:1). Kati na bimoniseli oyo etindamaki na bamisionele oyo ya ebandeli epanzami elikya oyo ekoki kosunga biso tolonga bobangi na biso na ntina ya kokabola nsango malamu—to bobangi ya ndenge mosusu oyo tokoki kokutana na yango: “ngai, Nkolo, nayangelaka likolo na balola.” “Nazali na makoki ya kokomisa yo mosantu.” “Mosuni nyonso ezali na loboko na ngai.” Mpe “bozala na bosepeli malamu, bana mike; mpo nazali na kati na bino.” (Malongi mpe Mayokani 60:4, 7; 61:6, 36.)

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 6062

Nkolo asepelaka ntango nafungoli monoko na ngai mpo na kokabola nsango malamu.

Biso nyonso tozali na mayele ntango tokokaki kokabola nsango malamu na moto moko, kasi mpo na bantina songolo, tosalaki yango te. Ntango ozali kotanga maloba ya Nkolo na bamisionele ya ebandeli oyo bazangaki “kofungola minoko na bango,” kanisa na ntina ya mabaku oyo ya yo moko ya kokabola nsango malamu. Lolenge nini litatoli ya nsango malamu ezali lokola “talanta,” to eloko ya motuya uta na Nzambe? Ndenge nini ntango mosusu “tobombaka [talanta] na biso”? (DMalongi mpe Mayokani 60:2; tala lisusu Matai 25:14–30).

Nkolo asembolaki bamisionele oyo ya ebandeli, kasi Amekaki lisusu kofula bango. Nsango nini ya kolendisa uta na Ye ozwi na kati ya biteni 60 mpe 62? Lolenge nini bansango oyo etongaka elikya ya kati na yo na kokabolaka nsango malamu? Na mikolo ezali koya, luka mabaku ya kofungola monoko na yo mpe kokabola oyo Nzambe atie kati na yo.

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 33:8–10; 103:9–10; Dieter F. Uchtdorf, “Mosala ya Misionele: Kokabolaka Oyo Ezali kati ya Motema na Yo,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2019, 15–18.

Elilingi
bamisionele kati na motuka ya bisi

Nzambe alingi ngai nakabola nsango malamu elongo na basusu.

Malongi mpe Mayokani 61:5–6, 14–18

Mayi nyonso malakelami mabe na Nkolo?

Likebisi ya Nkolo na kati ya Malongi mpe Mayokani 61 ezalaki, na ndambu moko, likebisi na ntina ya makama oyo bato na Ye bakokaki kokutana na yango ntango bazalaki kokende mobembo na Siona na Ebale ya Missouri, oyo eyebanaki na ntango wana mpo ezalaki ebale ya likama. Likebisi oyo esengeli kobongolama te mpo na koloba ete tosengeli kokima mobembo na nzela ya mayi. Nkolo azali na “nguya nyonso,” lokola mpe nguya likolo ya mayi (molongo 1).

Malongi mpe Mayokani 61–62

Nkolo azali na nguya nyonso mpe akoki kobatela ngai.

Na nzela ya bozongi na Kirtland, Joseph Smith mpe bakambi basusu ya Eklezia bakutanaki na likama wana oyo ebundisaki bomoi na bango na Ebale ya Missouri (tala Basantu, 1:133–34). Nkolo asalelaki libaku wana mpo na kokebisa mpe koteya basali na Ye. Ozwi nini na kati ya Malongi mpe Mayokani 61 oyo elendisi yo mpo na kotia bondimi na Nkolo ntango okutanaka na mikakatano na yo moko? Ndakisa, mpo na nini ezali ntina ya koyeba ete Nzambe azali “seko na seko”? (molongo 1).

Ezali na boyebi ya ndenge moko kati na eteni 62. Nkolo ateyi yo nini na ntina ya Ye moko mpe nguya na Ye na kati ya emoniseli oyo?

Manyola mayele ya kotonga bondimi oyo ozwaki ntango Nkolo asungaki yo kolonga mikakatano ya nzoto to mpe ya molimo.

Malongi mpe Mayokani 62

Nkolo alingi ngai nazwa mwa mikano “lokola ebongeli [ngai]malamu.”

Mbala mosusu Nkolo apesaka biso bokambi oyo ebongi mpo na likambo se moko, kasi na makambo mosusu Atikelaka biso ntango ya kozwa mokano. Lolenge nini omonaka libongi oyo etalisami na Malongi mpe Mayokani 62? (tala lisusu Malongi mpe Mayokani 60:5; 61:22). Lolenge nini omonaki libongi to liteya oyo kosala na bomoi na yo? Mpo na nini ezali malamu mpo na biso kozwa mikano na kozangaka kozela bokambi songolo uta na Nzambe?

Tala lisusu Etele 2:18–25; Malongi mpe Mayokani 58:27–28.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 60:2–3.Mpo na nini bamisionele basusu ya ebandeli bazalaki kotatabana mpo na kokabola nsango malamu? Mpo na nini totatabanaka ntango mosusu? Banza kosala lisano lolenge nini bato ya libota bakoki kokabola nsango malamu na bisika ya ndenge na ndenge.

Malongi mpe Mayokani 61:36–39.Bantina nini tomoni na milongo ya makomi oyo mpo na “kozala na bosepeli malamu”? (tala lisusu Yoane 16:33). Ntango mosusu libota na yo ekoki kokoma to koyema bilili ya biloko oyo ememaka esengo mpe kosangisa yango kati na kopo ya “bosepeli malamu”. (Zalaka na kondima mpo na kokotisa bilili ya Mobikisi mpe makundoli ya bolingo na Ye mpo na biso.) Na poso nyonso ntango bandeko ya libota bazali na mposa ya bokundoli ya bantina ya kozala na esengo, bakoki kopona eloko moko uta na kopo yango.

Malongi mpe Mayokani 61:36.Lolenge nini okoki kosunga bato ya libota na yo bamikundola ete Mobikisi azali “katikati na [biso]”? Bokoki kozwa mokano elongo mpo na esika nini bokoki kobamba elilingi na Ye na kati ya ndako na bino. Lolenge nini tokoki kobengisa Mobikisi kati na bomoi na biso ya mikolo nyonso?

Malongi mpe Mayokani 62:3.Ntango mosusu bokoki kosala liyangani ya litatoli na libota nsima ya kotanga molongo ya makomi oyo. Mpo na kolimbola litatoli ezali nini, bokoki kokabola biteni ya maloba ya Mokambi M. Russell Ballard “Pure Testimony” (Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2004, 40–43). Mpo na nini ezali malamu kokoma matatoli na biso?

Malongi mpe Mayokani 62:5, 8.Mpo na nini Nkolo apesaki te mitindo na ntina ya makambo nyonso ya bomoi na biso? Engebene na molongo 8, lolenge nini tosengeli kozwa mikano?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Testimony,” Hymns, no. 137.

Kobongisa Boyekoli Makomi mpo na Yo Moko

Tika Molimo ekamba boyekoli na yo. Tika Molimo Mosantu ekamba yo. Zala ekenge na bomimisani na Ye ntango akambi yo na makambo oyo osengeli koyekola mokolo na mokolo, ata soki bomimisani na Ye etindi ete otanga to oyekola liteya ya kokesena koleka oyo oyekolaka ntango nyonso to na lolenge mosusu.

Elilingi
Yesu amemi mwana mpate

Mobateli Mpate malamu, na Del Parson

Bimisa na lokasa