Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya motoba 21–27. Malongi mpe Mayokani 67–70: “Motuya … Nkita ya Mabele Mobimba”


“Sanza ya motoba 21–27. Malongi mpe Mayokani 18–19: ‘Motuya … Nkita ya Mabele Mobimba,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya motoba 21–27. Malongi mpe Mayokani 67–70,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
revelation manuscript book in display case

Sanza ya motoba 21–27.

Malongi mpe Mayokani 67–70

“Motuya … Nkita ya Mabele Mobimba”

Atako mingi ya bimoniseli na kati ya Malongi mpe Mayokani epesamaki na bato baponama na mabaku moko maponama, bimoniseli yango ezali na “litomba mpo na banso” (“Litatoli ya Bapostolo Zomi na mibale mpo na Bosolo ya Buku ya Malongi mpe Mayokani,” boyingisi na Malongi mpe Mayokani). Ntango ozali koyekola, luka makambo ya solo mpe mabongi to mateya oyo ezali na litomba mpo na yo.

Koma Makanisi na Yo

Uta 1828 kino 1831, Profeta Joseph Smith azwaki bimoniseli mingi uta na Nkolo, kobakisaka toli ya bonzambe mpo na bato, malako mpo na koyangela Eklezia, mpe mamoni efulama mpo na mikolo ya nsuka. Kasi mingi kati na Basantu batangaki yango te. Bimoniseli ebimisamaki naino kati na buku te, mpe mwa ndambo ya babuku oyo ekokaki kozwama ekomamaki na maboko na nkasa ekangama te oyo bazalaki kotambwisa na kati ya bandimi mpe ememamaki nzinganzinga na bamisionele.

Nsima, na sanza ya zomi na moko 1831, Joseph abengisaki lisanga ya bakambi ya Eklezia mpo na kosolola na ntina ya kobimisa bimoniseli yango na buku. Nsima ya koluka bolingi ya Nkolo, bakambi oyo basalaki manaka ya kobimisa Buku ya Mibeko—mobandisi ya Malongi mpe Mayokani ya lelo. Kala mingi te moto nyonso akokaki kotanga mpo na ye moko liloba ya Nzambe oyo ebimisami na nzela ya profeta na bomoi, lokola elembo oyo emonani solo na miso ete “bafungola ya mibombamo ya bokonzi ya Mobikisi na biso epesami lisusu na moto.” Mpo na ntina oyo mpe mingi mosusu, Basantu ya kala mpe ya lelo bamoni ete bimoniseli oyo ezali ya “motuya … nkita ya Mabele mobimba” (Malongi mpe Mayokani 70, moto ya mokapo).

Tala Basantu, 1:140–43.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 67:1–9; 68:3–6

Nzambe atelemi epai ya basali na Ye mpe na maloba balobaka na nkombo na Ye.

Mokano ya kobimisa bimoniseli ezwamaki na Joseph Smith na buku emonisami lokola mokano ya pete, kasi bakambi basusu ya ebandeli ya Eklezia bazalaki kondima te ete ezalaki likanisi malamu. Motungisi moko ezalaki mpo na mabunga ya lokota Joseph Smith asalelaki mpo na kokoma bimoniseli. Emoniseli kati na eteni 67 eyaki lokola eyano na motuna wana. Oyekoli nini na ntina ya baprofeta mpe emoniseli uta na milongo 1–9? Mayele ya kobakisa nini ozwi uta na 68:3–6?

Liboso ya kobimisa Buku ya Mibeko na nkasa, bakambi nzike ya Eklezia batiaki maboko na litatoli ekomama ete bimoniseli na buku yango ezali solo. Mpo na komona kopi ya litatoli, tala “Litatoli, circa 2 Sanza ya zomi na moko 1831,” Buku ya Emoniseli 1, 121, josephsmithpapers.org.

Malongi mpe Mayokani 68:1–8

Bofuli uta na Molimo Mosantu elakisaka bolingi ya Nkolo.

Maloba kati na milongo ya makomi oyo elobamaki ntango Orson Hyde mpe basusu babiangemaki “mpo na kosakola nsango malamu ya seko, na Molimo ya Nzambe na bomoi, uta bato na bato, mpe uta bikolo na bikolo” (molongo 1). Lolenge nini esakola na molongo 4 ekoki kosunga moto oyo azali kotindama kosakola nsango malamu? Lolenge nini kosalela maloba oyo epai na yo? Kanisa ngonga moko ntango wapi “otindamaki na Molimo Mosantu” (molongo 3) mpo na koloba to kosala eloko songolo. Omoni nini na kati ya milongo miye oyo ekoki kopesa yo elikya ya kolanda bitinda ya molimo?

Malongi mpe Mayokani 68:25–28

Baboti bazali na mokumba ya koteya bana na bango.

Ndeko mwasi Joy D. Jones, Mokambi Monene ya Eteyelo ya Bana, ateyaki, “[A] Fungola ya lisungi mpo ete bana batelemela lisumu ezali kobanda na mibu ya ebandeli mpenza mpo na kokotisa kati na bango malongi ya nsango malamu nyonso mpe mabongi ya ntina na bolingo—uta na makomi, Biteni ya Bondimi, kamwa buku moke Mpo na Kolendisa Bilenge mokanda, banzembo ya Eteyelo ya bana, nzembo, mpe matatoli na biso moko—oyo ekokamba bana epai ya Mobikisi” (“A Sin-Resistant Generation,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2017, 88).

Engebene na Malongi mpe Mayokani 68:25–28, nini ezali “malongi ya nsango malamu ya ebandeli” oyo Ndeko mwasi Jones alobeli oyo baboti basengeli kotangisa bana na bango? Mpo na nini mokumba monene oyo epesami na baboti? Nini okoki koloba na moboti oyo amiyokaka ete alongi te kozala na makoki ya koteya bana na ye makambo oyo?

Tala lisusu Tad R. Callister, “Baboti: Batei ya Yambo ya Nsango malamu na Bana na Bango,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2014, 32–34.

Elilingi
koyekola na libota

Libota ezali esika elongobani mpo ete bana bayekola nsango malamu.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 67:10–14.Lolenge nini zuwa, kobanga, mpe lolendo epekisaka biso topusana penepene ya Nkolo? Mpo na nini “moto ya mokili” akoki te kotelema liboso ya Nkolo? (molongo 12; tala lisusu Moziya 3:19). Tozwi nini na milongo oyo, oyo efuli biso “tokoba kozala na bompikiliki kino [biso] tokokoma bato babongi nie”? (molongo 13).

Lokola libota, bosengeli kotala lisusu maloba ya Mpaka Jeffrey R. Holland “Be Ye Therefore Perfect—Eventually” (Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 40–42).

Malongi mpe Mayokani 68:3–4.Bato ya libota bakoki kokabola mayele oyo elendisaki bondimi na bango ete maloba ya basali ya Nkolo ezali “bolingi ya Nkolo,” “makanisi ya Nkolo,” mpe “nguya ya Nzambe mpo na lobiko” (molongo 4). To bakoki koluka mateya ya likita linene ya sikasika oyo ezali kolobela mikakatano oyo libota na yo ekoki kozala na yango.

Malongi mpe Mayokani 68:25–35.Milongo oyo ezali na liteya monene mpo na “bato ya Siona” (molongo 26). Tofulami na nini mpo na kobongisa bomoi na biso nsima ya kotanga milongo oyo? Ekoki kozala lisano malamu na kosalaka bilili oyo ezali kolakisa mwa mabongi to mateya oyo ezali na kati ya milongo oyo mpe kobomba yango na ndako na yo mobimba. Nsima, na mikolo oyo ezali koya ntango moto moko amoni elili moko, okoki kosalela yango lokola libaku ya kotangisa libongi wana. Mpo na nini libota ezali esika malamu koleka bisika binso mpo ete bana bayekola makambo oyo?

Malongi mpe Mayokani 69:1–2.Oliver Cowdery atindamaki na Missouri elongo na bakopi ya nkoma ya maboko ya bimoniseli ya Profeta mpo ete batia yango na nkasa, na mosolo mpo na kosunga kotonga Eklezia kuna. Liteya nini Nkolo apesi na molongo 1 na ntina ya mobembo ya Oliver? Mpo na nini ezali motuya ya kozala na bato “oyo bakozala na bosolo mpe bosembo”? (molongo 1). Ntango nini baninga bapusaki biso kozwa mikano malamu to mabe? Lolenge nini tokoki kozala ndakisa ya malamu mpo na basusu?

Malongi mpe Mayokani 70:1–4.Nkolo apesaki bampaka basusu mokumba ya koyangela bobimisi ya bimoniseli. Atako tozali na mokumba wana mpenza te, lolenge nini tokoki kozwama lokola “bakapita likolo ya bimoniseli mpe mitindo yango”? (molongo 3).

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na kati ya Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Home Can Be a Heaven on Earth,” Cantique, no. 298.

Kobongisa Mateya na Biso

Tosalela makomi na bomoi na biso. Nsima ya kotangaka eteni moko ya makomi, bengisa bato ya libota basalela yango na bomoi na bango. Ndakisa, okoki kobengisa bango bakanisa makambo ya ndenge moko oyo bakoki kokutana na yango oyo ekokaki kosenga basalela mabongi to mateya se moko oyo ya nsango malamu.

Elilingi
Masini ya mikanda ya Grandin

Buku ya Mibeko, mobandisi ya Malongi mpe Mayokani, etiamaki na nkasa na masini lokola oyo.

Bimisa na lokasa