Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya motoba 28–Sanza ya nsambo 4. Malongi mpe Mayokani 71–75: “Ebundeli Moko te Esalemi mpo na Kobundisa Ekolonga Yo”


“Sanza ya motoba 28–Sanza ya nsambo 4. Malongi mpe Mayokani 71–75: ‘Ebundeli Moko te Esalemi mpo na Kobundisa Ekolonga Yo” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya motoba 28–Sanza ya nsambo 4. Malongi mpe Mayokani 71–75,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Yesu na mpate

Baye ya Motuya na Motema ya Mobateli mpate, na Simon Dewey

Sanza ya motoba 28–Sanza ya nsambo 4.

Malongi mpe Mayokani 71–75

“Ebundeli Moko te Esalemi mpo na Kobundisa Eolonga Yo”

Mpanka Quentin L. Cook ateyaki, “Nguya ya Molimo Mosantu etambolaka mbala mingi elongo na boyekoli ya makomi mpe losambo na libota” (“Deep and Lasting Conversion to Heavenly Father and the Lord Jesus Christ,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 10).

Koma Makanisi na Yo

Uta ntango azalaki elenge mobali, Joseph Smith akutanaki na matongi—kutu banguna—ntango azalaki komeka kosala mosala ya Nzambe. Kasi esengelaki kosala mpasi mingi koleka na motema na nsuka ya 1831 ntango Ezra Booth abandaki kotiola Eklezia na miso ya bato, mpo ete na likambo oyo moto oyo azalaki kotonga to kotelemela azalaki mondimi moko ya kala. Ezra amonaka Joseph kosalela nguya ya Nzambe mpo na kobikisa mwasi moko. Babengisaki ye mpo na kokende elongo na Joseph mpo na kosala anketi ya yambo ya kotala mabele ya Siona na Missouri. Kasi ye uta ntango wana asilaki kobungisa bondimi na ye mpe, na komekaka kobebisa lokumu ya Profeta, abimisaki molongo ya mikanda na zulunale moko ya Ohio. Mpe bokasi na ye emonanaki kobimisa mbuma: “mayoki ya motema mabe … ekolaki na kotelemela Eklezia” kati na etuka yango (Malongi mpe Mayokani 71, moto ya mokapo). Nini bandimi basengeli kosala na likambo lokola wana? Ntango eyano ya malamu moko te elongobani mpo na likambo nyonso, emonani lokola ete mbala mingi mpenza—mpe lisusu na likambo oyo na 1831—eteni moko ya eyano ya Nkolo ezali ya kobundela bosolo mpe kosembola lokuta na “kosakolaka [nsango] malamu” (molongo 1). Iyo, bato bakotonga ntango nyonso mosala ya Nkolo , kasi na nsuka, “ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kobundisa ekolonga yo” (molongo 9).

Tala “Ezra Booth mpe Isaac Morley,” Revelations in Context, 134.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 71

Nkolo akobulunganisa matongi ya misala na Ye na ngonga na Ye moko.

Tokoki koyoka mabe ntango bato bazali kotonga biso mpe kotiola Eklezia to bakambi na yango, mingi-mingi ntango tozali kobangaka ete bato oyo toyebi mpe tolingaka bakosalela biso na kolandaka matongi wana. Ntango eloko moko ya lolenge se moko esalemaki na Ohio na 1831 (tala moto ya eteni na Malongi mpe Mayokani 71), maloba ya Nkolo epai ya Joseph Smith mpe Sidney Rigdon ezalaki maloba ya bondimi, ya bobangi te. Ntango ozali koyekola Malongi mpe Mayokani 71, omoni nini oyo ezali kotonga bondimi kati na Nkolo mpe mosala na Ye? Nini ekamwisi yo na ntina ya malakisi Nkolo apesaki na basali na Ye na likambo oyo?

Tala lisusu Robert D. Hales, “Christian Courage: The Price of Discipleship,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2008, 72–75; Jörg Klebingat, “Defending the Faith,” Ensign, Sanza ya libwa 2017, 49–53.

Malongi mpe Mayokani 72

Baepisikopo bazali bakapita likolo ya makambo ya molimo mpe ntango ya bokonzi ya Nkolo.

Ntango Newel K. Whitney abiangemaki mpo na kosalela Nzambe lokola episikopo ya mibale na Eklezia, mikumba na ye ezalaki ya kokesena moke na miye ya baepisikopo ya lelo. Ndakisa, Episikopo Whitney akambaki misala ya bobulisi ya biloko mpe ndingisa ya kofanda na Missouri, na mabele ya Siona. Kasi ntango ozali kotanga libiangi mpe mikumba na ye na Malongi mpe Mayokani 72, okoki komona mwa mikangano na oyo baepisikopo ya lelo basalaka—mwa moke na molimo, soki te na nyonso, ya mikumba na bango. Ndakisa, banzela nini yo “oyanaloka” epai ya episikopo na yo? (molongo 5). Lolenge nini episikopo na yo “abatelaka ndako ya ebombelo ya Nkolo” mpe ayangelaka biloko bibulisami ya bandimi ya palwasi? (tala milongo 10, 12). Lolenge nini episikopo asungaki yo?

Tala lisusu Masolo ya Nsango malamu, “Episikopo,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
bingbongolo mpe basaki ya bilei

Newel K. Whitney ayangelaki ndako ya ebombelo ya baepisikopo.

Malongi mpe Mayokani 73

Nakoki koluka mabaku ya kokabola nsango malamu.

Nsima ya bozongi ya Joseph Smith mpe Sidney Rigdon uta na etinda na bango ya kosakola nsango malamu mpo na ntango moke na ntina ya kobongisa mbeba mosusu oyo Ezra Booth asalaka (tala Malongi mpe Mayokani 71), Nkolo ayebisaki bango bazonga na mosala ya kobongola Biblia (tala Bible Dictionary, “Bobongoli ya Joseph Smith”). Kasi Alingaki lisusu bango bakoba kosakola nsango malamu. Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 73, tala lolenge nini okoki kosala ete kosakola nsango malamu ekendaka liboso ntango nyonso, “eloko ya kosala lokola momesano” (molongo 4)—to eteni ya solo—ya bomoi na yo na kati ya mikumba na yo misusu.

Malongi mpe Mayokani 75:1–12

Nkolo apambolaka baoyo basakolaka na bosembo nsango malamu na Ye.

Koyanolaka na motindo ya “bokende na mokili mobimba” mpo na kosakola nsango malamu (Malongi mpe Mayokani 68:8), bampaka mingi ya sembo balukaki nsango ebakisami na ntina ya lolenge nini Nkolo alingaki bango bakokisa motindo oyo. Maloba nini mpe makomi nini ozwi na kati ya Malongi mpe Mayokani 75:1–12 oyo esungi yo kososola lolenge nini kosakola nsango malamu na bokasi nyonso? Mapamboli nini Nkolo alaki na bamisionele ya sembo? Tala lolenge nini malakisi mpe mapamboli oyo ekoki kosalema na yo ntango ozali kokabola nsango malamu.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 71Joseph Smith mpe Sidney Rigdon basengamaki kosala nini ntango basusu bazalaki kosala matongi na Eklezia mpe na bakambi na yango? Lolenge nini biso “tolengelaka nzela” mpo ete bato bazwa bimoniseli ya Nzambe? (DMalongi mpe Mayokani 71:4).

Malongi mpe Mayokani 72:2.Lolenge nini episikopo apambolaki libota na biso? Episikopo na biso asengaki biso tosala nini, mpe lolenge nini tokoki kosunga ye? Ntango mosusu libota na yo ekoki kosala kalati kotondaka episikopo na bino mpo na lisungi na ye.

Malongi mpe Mayokani 73:3–4.Libota na yo ekoki kozwa litomba uta na boyekoli na ntina ya Bobongoli ya Joseph Smith ya Biblia? (tala Bible Dictionary, “Bobongoli ya Joseph Smith”). Bokoki kotala mwa makomi oyo etalamaki lisusu kati na Bobongoli ya Joseph Smith mpe kososola makambo ya solo ya motuya oyo Nkolo amonisaki na nzela ya Profeta. Mpo na kozwa bandakisa mosusu, tala Bobongoli ya Joseph Smith ya Genese 14:25–40 mpe Genese 50:24–38 kati na bobakisi ya Biblia; matangi ya ndenge na ndenge na nse ya nkasa na Matai 4:1–11; mpe Luka 2:46, makomi ya nse ya nkasa c.

Malongi mpe Mayokani 74:7.Lolenge nini molongo oyo eteyi biso na ntina ya Yesu Klisto mpe bana mike?

Malongi mpe Mayokani 75:3–5, 13, 16.Okoki kosunga libota na yo esosola lolenge nini Nkolo alingaka biso tosalela Ye na kolobelaka bokeseni kati na kozala na “goigoi” mpe “kosala[ka] na [ya biso] bokasi.” Ntango mosusu okoki kopona misala mosusu ya ndako mpe kobengisa bato ya libota balakisa kosala misala wana na goigoi mpe nsima na bokasi na bango nyonso. Lolenge nini tokoki kosunga Nkolo na bokasi na biso nyonso? Engebene na Malongi mpe Mayokani 75:3–5, 13, 16, Nini Ye alaki basali na Ye ya sembo?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Let Us All Press On,” Cantiques, no. 243.

Kobongisa Boyekoli Makomi mpo na Yo Moko

Luka maloba mpe makomi oyo ekoki kofula. Ntango ozali kotanga, Molimo ekoki komema maloba ya solo to makomi na makanisi na yo. Kanisa kokoma nkoma ya maloba to makomi uta na Malongi mpe Mayokani 71–75 oyo efulaka yo.

Elilingi
elenge mobali na mokambi ya Bonganganzambe

Elilingi ya elenge mobali na mokambi ya bonganganzambe na D. Keith Larson

Bimisa na lokasa