Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya nsambo 5–11. Malongi mpe Mayokani 76: “Monene Ekozala Lifuta na Bango mpe Seko Ekozala Nkembo Na Bango”


“Sanza ya nsambo 5–11. Malongi mpe Mayokani 76: ‘Monene Ekozala Lifuta na Bango mpe Seko Ekozala Nkembo na Bango’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya nsambo 5–11. Malongi mpe Mayokani 76,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
liboke ya minzoto to galaxie na bofungwami ya likolo

Ekimelo, na Shaelynn Abel

Sanza ya nsambo 5–11.

Malongi mpe Mayokani 76

“Monene Ekozala Lifuta na Bango mpe Seko Ekozala Nkembo na Bango”

Na eteni 76, Nkolo alobi boni Ye alingaka komonisa bosolo epai na biso (tala milongo 7–10). Tanga makomi na bondimi ete Ye akoka mpe Amonisa epai na yo “makambo ya Nzambe” (molongo 12) oyo osengeli koyeba. Nsima koma mayele oyo ozwi “ntango [yo ozali] naino na Molimo” (milongo 28, 80, 113).

Koma Makanisi na Yo

“Nini ekoyela ngai nsima ya kufa na ngai?” Pene na biyamba nyonso na mokili elukaka biyano na motuna oyo na lolenge moko to mosusu. Bikeke mingi koleka, mimesano ya Baklisto mingi, koyekamaka na mateya ya Biblia, eteyaki lola to lifelo, paladizo mpo na bayengebene mpe monioko mpo na bato mabe. Kasi libota mobimba ya bato ekoki ya solo kokabwana mpenza na bolamu mpe mabe? Mpe liloba lola elingi koloba mpenza nini? Na sanza ya mibale 1832, Joseph Smith mpe Sidney Rigdon bamitunaki soki ezalaki na mingi koleka ya koyeba te na ntina likambo yango (tala Malongi mpe Mayokani 76, moto ya eteni).

Kuna eyano ezalaki mpenza. Ntango bazalaki komanyola mituna oyo, Nkolo “asimbaki miso [na bango] ya bososoli mpe efungwamaki” (molongo 19). Joseph mpe Sidney bazwaki emoniseli ya kokamwa mpenza, ya monene mpenza, ya kongengisa mpenza, ete Basantu babiangaki yango na pete “Limoni.” Efungolaki maninisa ya lola mpe epesaki bana ya Nzambe bomoni ya kofungola mayele mpo na seko. Limoni emonisaki ete lola ezali monene mpe etandama mpe epanzana koleka oyo bato bazalaki kokanisa. Nzambe atonda na mawa mpe azali moyengebeni koleka oyo tokoki kososola. Mpe bana ya Nzambe bazali na nsuka ya seko oyo ezali na nkembo koleka makanisi na biso.

Tala Basantu, 1:147–50; “Limoni,” Revelations in Context, 148–54.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 76

Lobiko eyaka na nzela ya Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe.

Ntango Wilford Woodruff atangaki limoni oyo elimbolami na eteni 76, ye alobaki, “nayokaki ete nasengeli kolinga Nkolo koleka naino nasala te liboso na bomoi na ngai” (tala “Mingongo ya Bozongisi” na nsuka ya moango oyo). Ekoki kozala ete ozwaki mayoki ya lolenge moko oyo ntango otangaki emoniseli oyo. Na nsima ya nyonso, moko te ya mapamboli ya nkembo oyo elimbolami na kati ya eteni 76 ekokoka kosalama soki Mobikisi te. Ntango mosusu okoki komona molongo moko na moko kati ya eteni 76 oyo ezali kolobela Nkolo Yesu Klisto. Milongo oyo eteyi yo nini na ntina na Ye mpe mosala na Ye na kati ya moango ya Nzambe? Lolenge nini yango ezali na litomba na lolenge oyokaka na ntina na Ye? Ntango otangi mpe omanyoli, okoki kozwa makanisi na ntina ya lolenge nini okoki “[kozwa] litatoli ya Yesu Klisto” mpe kozala. na “mpiko” koleka kati na yango (milongo 51, 79).

Malongi mpe Mayokani 76:39–44, 50–112

Nzambe alingaka kobikisa “misala nyonso ya maboko na ye.”

Bato basusu, mpe lisusu bandimi ya Eklezia ya ebandeli, batelemelaki limoni kati na eteni 76 mpo yango eteyaki ete penepene moto nyonso akobikisama mpe akozwa motuya moko ya nkembo. Makanisi na bango ya kotelemela mateya oyo ekokaki koya, ndambo, uta na bozangi kososola na ntina ya Nzambe mpe mokangano na Ye na biso. Ntango ozali kotanga emoniseli oyo, oyekoli nini na ntina ya ezaleli ya Nzambe mpe moango na Ye mpo na bana na Ye?

Tala bokeseni kati ya kobikisama (uta na liwa ya nzoto mpe ya molimo; tala milongo 39, 43–44) mpe konetolama (kozala elongo na Nzambe mpe kokoma lokola Ye; tala milongo 50–70).

Tala lisusu Yoane 3:16–17; Malongi mpe Mayokani 132:20–25.

Malongi mpe Mayokani 76:50–70, 92–95

Tata na ngai ya Lola alingi ngai nazwa bomoi ya seko na bokonzi ya selesitiale.

Osila komituna—to komitungisa—na ntina ya soki okolonga to te mpo na bokonzi ya selesitiale? Ntango ozali kotanga ndimbola ya baoyo bazwaka nkembo oyo (tala milongo 50–70, 92–95), na esika ya kotala bobele mpo na nkoma ya makambo oyo osengeli kosala, luka oyo Nzambe asalaki—mpe oyo azali kosala—mpo na kosunga yo okoma lokola Ye. Kotanga limoni na lolenge oyo epesi yo nguya ya lolenge nini oyokaka mpo na bokasi na yo moko?

Okoki lisusu kokanisa na ntina ya lipamboli monene oyo ya koyeba makambo oyo na ntina ya bokonzi ya selesitiale. Lolenge nini limoni oyo ya nkembo ya selesitiale esimbaka lolenge okanisaka mpe olingaka kotambwisa bomoi na yo ya mokolo na mokolo?

Tala lisusu Mose 1:39; Joy D. Jones, “Value beyond Measure,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2017, 13–15; J. Devn Cornish, “Am I Good Enough? Will I Make It?Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2016, 32–34.

Elilingi
kisuku na ndako ya ekeke ya mibu nkoto zomi na libwa

Joseph Smith amonaki limoni ya mituya ya nkembo na kisuku oyo.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 76:22–24, 50–52, 78–79, 81–82.Nini toyekoli uta na milongo oyo na ntina ya matatoli na biso? Mosala nini matatoli na biso esalaka na kati ya nsuka na biso ya seko? Ekoki kosunga mpo na kotala bandimbola ya mpiko mpo na kosolola lolenge nini kozala “mpiko na litatoli ya Yesu” (molongo 79). Okoki lisusu koyemba “Nakozala Elombe” (Chants pour Enfants, 162).

Malongi mpe Mayokani 76:24.Libota na yo ekoki komona mikangano na kati ya makambo ya solo na eteni 76 mpe oyo eteyamaki na “Nazali Mwana ya Nzambe” (Chants pour Enfants, 2–3); moko ya makambo ya solo oyo ezwami kati na Malongi mpe Mayokani 76:24. Lolenge nini mokili ekokaki kozala ya kokesena soki moto nyonso asosolaki ete tozali banso bana ya Nzambe? Lolenge nini bosolo oyo esimbaka lolenge tosaleaka basusu? Ntango mosusu na kotalaka bilili ya bana mibali mpe bana basi ya Nzambe ya ndenge na ndenge na mabele oyo ekoki kosunga libota emanyola motuna oyo. (Tala lisusu “Bolakisi ya Video: Nazali Mwana ya Nzambe,” ChurchofJesusChrist.org.)

Banza koyemba “Nazali Mwana ya Nzambe” elongo mpe kolukaka mikangano misusu na mabongi na eteni 76 (tala, ndakisa, milongo 12, 62, 96).

Malongi mpe Mayokani 76:40–41.Soki tosengelaki koloba na bokuse “nsango ya esengo” (molongo 40), to nsango malamu, na kati ya milongo oyo na moto ya zulunale ya mokuse moko to na tweet moko, tolingaki koloba nini? Nsango ya esengo mosusu nini tozwi na eteni 76?

Malongi mpe Mayokani 76:50–70.Lolenge nini okosunga libota na yo etala liboso mpe emilengela mpo na bomoi ya seko na bokonzi ya selesitiale? Bokoki kosala elongo mpo na kozwa bilili, makomi mpe mateya ya baprofeta mpo na kokokana na maloba na kati ya Malongi mpe Mayokani 76:50–70. Okoki kozwa makambo oyo na kati ya magazini ya Eklezia, na ChurchofJesusChrist.org, to na makomi ya nse ya nkasa. Nsima bokoki kosangisa bilili, makomi mpe mateya oyo na etando moko ya nsango oyo ekoki kokundolisa libota na bino bantina na bino ya seko.

Mpo na ozwa makanisi ebele ya botangisi bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “I Know That My Redeemer Lives,” Cantique, no. 136.

Elilingi
elembo ya mingongo ya bozongisi

Mingongo ya Bozongisi: Matatoli ya “Limoni”

Wilford Woodruff

Wilford Woodruff akotaki na Eklezia na Sanza ya zomi na mibale 1833, pene ya mibu mibale nsima ya Joseph Smith mpe Sidney Rigdon kozwa limoni oyo ekomami na Malongi mpe Mayokani 76. Azalaki kofanda na New York na ntango wana mpe ayekolaki na ntina ya “Limoni” uta na bamisionele oyo bazalaki kosalela Nzambe na etuka yango. Nsima ya mibu alobaki na ntina ya makanisi na ye ya limonisi oyo:

“Nateyamaki uta bomwana na ngai ete ezalaki na Lola moko mpe Lifelo moko, mpe nateyamaki ete bato ya mabe nyonso bazalaki na etumbu se moko mpe boyengebene na nkembo moko. …

“… Ntango natangaki limoni yango … , efungolaki makanisi na ngai mpe epesaki ngai esengo monene, emonisamaki epai na ngai ete Nzambe oyo amonisaki libongi wana epai ya moto azalaki bwanya, moyengebene mpe solo, azalaki na bizalela malamu mpenza mpe eyokeli malamu mpe boyebi, nayokaki Azali na sikisiki na nyonso mibale bolingo, mawa, boyengebene mpe makanisi, mpe namiyokaki kolinga Nkolo koleka kutu liboso na bomoi na ngai.”1

“Limoni’ [ezali] emoniseli oyo epesaka pole koleka, bosolo koleka mpe libongi koleka emoniseli kani oyo ezalaki na kati ya buku nyonso oyo natanga naino te. Elakisaka polele na bososoli na biso lolenge na biso ya lelo, esika biso towuti, mpo na nini tozali awa, mpe esika nini tozali kokende. Moto nyonso akoki koyeba na nzela ya emoniseli oyo eteni mpe lolenge na ye ekozala nini.”2

“Yambo namona Joseph nalobaki ete namitungisaki te azalaki na mibu boni, to lolenge nini azalaki elenge; namitungisaki te azalaki ndenge nini—soki suki na ye ezalaki milai to mikuse; moto oyo abandaki emoniseli wana azalaki profeta ya Nzambe. Nayebaki yango mpo na ngai moko.”3

Phebe Crosby Peck

Ntango Phebe Peck ayokaki liteya ya Joseph mpe Sidney ya “Limoni,” azalaki kofanda na Missouri mpe azalaki kobokola bana mitano lokola mama monzemba. Limoni ekamwisaki mpenza mpe efulaki ye ete akomaki oyo elandi mpo na kokabola maye ayekolaka na libota na ye mobimba:

“Nkolo azali komonisa mibombamo ya Bokonzi ya lola epai ya Bana na ye. … Joseph Smith mpe Sidney Rigdon basengaki biso tokende kotala na eleko ya milona oyo eleki, mpe tosalaki mayangani ebele ya esengo ntango bazalaki awa, mpe mibombamo mingiefungwamaki na miso na biso, oyo epesaki ngai libondi monene. Tokoki komona bonkonde ya Nzambe na bolengeli bandako ya kimia mpo na bana na Ye. Mpe oyo nyonso akozwa litondi ya nsango malamu te mpe kotelema lokola mapinga ya bilombe mpo na ntina Klisto te akoki te kofanda liboso ya Tata mpe Mwana. Kasi ezali na esika elengelamaki mpo na banso oyo bazwi te, kasi ezali esika ya nkembo moke koleka kofanda na Bokonzi ya Selesitiale. Nakotika te komeka koloba mingi na ntina ya makambo oyo etiami sikawa na nkasa mpe ekokende na mokili mobimba. Mpe ntango mosusu ekozala na libaku ya kotangama mpo na yo moko, mpe soki osali yango, nalikii okotanga na motema moko ya bokebi mpe ya losambo, mpo ete makambo oyo ebongi kolobelama. Mpe nazali na mposa ete okoka koluka kati na yango, mpo ete ezali yango nde epesaka bosepeli na biso na mokili oyo mpe na mokili oyo ezali koya.”4

Matangi

  1. Makebisi,” Deseret News, Sanza ya mitano 27, 1857, 91.

  2. Deseret News, Sanza ya moambe 3, 1881, 481; tala lisusu Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Wilford Woodruff (2004), 120–21.

  3. “Makebisi,” Deseret Weekly, Sanza ya libwa 5, 1891, 322.

  4. Mokanda ya Phebe Crosby Peck epai ya Anna Jones Pratt, Sanza ya moambe 10, 1832, Ebombelo ya Mambi ya Kala ya Eklezia, Salt Lake City; ndimbola mpe botangi ebongisama na ekomeli ya sika.

Elilingi
botalisi ya bokonzi misato ya nkembo

Mituya ya Nkembo, na Annie Henrie Nader

Bimisa na lokasa