Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya nsambo 12–18. Malongi mpe Mayokani 77–80: “Nakokamba Bino na Nzela Bokokende”


“Sanza ya nsambo 12–18. Malongi mpe Mayokani 3–5: ‘Nakokamba Bino na Nzela Bokokende,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya nsambo 12–18. Malongi mpe Mayokani 277–80,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
mpate kolandaka Yesu

Kozonga Ndako, na Yongsung Kim

Sanza ya nsambo 12–18

Doctrine et Alliances 77–80

“Nakokamba Bino na Nzela Bokokende”

Nkolo ayebisaki Joseph Smith ete Asengelaki “koloba na [ya ye] matoyi maloba ya bwanya” (Malongi mpe Mayokani 78:2). Maloba nini ya bwanya ozwi ntango ozali koyekola Malongi mpe Mayokani 77–80?

Koma Makanisi na Yo

Mibu mibale elekaki te nsima ya kozongisama na yango, Eklezia ya Yesu Klisto ekolaki kino na bandimi koleka 2000 mpe ezalaki kopanzana mbangu. Na sanza ya misato 1832 Joseph Smith akutanaki na bakambi basusu ya Eklezia “mpo na kosolola na ntina ya misala ya Eklezia”: bosenga ya kobimisa bimoniseli kati na buku, ya kosomba mabele mpo na kosangana kuna, mpe ya kobatela babola (tala Malongi mpe Mayokani 78, moto ya mokapo). Mpo na kokokisa bamposa oyo, Nkolo abiangaki mwa motango ya bakambi ya Eklezia basala Kompani ya Bomoko, lisanga oyo esengelaki kosangisa makasi na bango mpo na “komema liboso ntina” ya Nkolo (molongo 4) na kati ya bituka oyo. Kasi ata na makambo lokola boye matali misala ya bilo, Nkolo afandisaki makanisi mingimingi na makambo ya boseko. Na nsuka, ntina ya kotiya makomi na nkasa to ya kotonga ebombelo—lokola eloko nyonso mosusu na bokonzi ya Nzambe—ezali mpo na kolengela bana na Ye bazwa “esika na mokili ya selesitiale” mpe “bomengo ya seko” (milongo 7, 18). Mpe soki mapamboli wana ezali mpasi mpo na kososola sikawa mpenza, na katikati ya misala ya bomoi na biso mikolo na mikolo, Ye, apesi biso elikya, “Boyika mpiko, mpo nakokamba nzela bokokende” (molongo 18).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 77

Nzambe amonisaka mibombamo na Ye na baoyo balukaka koyeba yango.

Mibu zomi na mibale nsima ya Limoni ya Yambo, libiangi na kati ya Yakobo 1:5 mpo na “kotuna Nzambe” ekobaki kokamba Joseph Smith ntango azangaki bwanya. Ntango ye mpe Sidney Rigdon bazalaki na mituna na ntina ya buku ya Emoniseli ntango bazalaki kosala mosala efulama ya kobongola Biblia, Joseph alukaki lokola moto na mosuni bwanya ya Nzambe. Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 77, kanisa kokoma boyebi na yo na mikapo ya buku ya Emoniseli.

Mpo na kobakisa, manyola lolenge nini okoki kolanda ndakisa ya Profeta Joseph ntango ozali koyekola makomi yango. Okoki kotuna Tata na Lola, “Nini nasengeli kososola?”

Elilingi
Joseph Smith mpe Sidney Rigdon kotangaka

Bobongoli ya Biblia, na Liz Lemon Swindle

Malongi mpe Mayokani 78

Lingomba ya Bomoko ezalaki nini?

Lingomba ya Bomoko etiamaki mpo na koyangela makambo ya bobimisi mpe misala ya Eklezia na Ohio mpe Missouri. Esangisaki Joseph Smith, Newel K. Whitney, mpe bakambi misusu ya Eklezia oyo basangisaki makoki na bango mpo na kokokisa bamposa ya ntango ya Eklezia oyo ezalaki kokola. Libaku mabe, Kompani ya Bomoko ekotaki nyongo mpe epanzanaki na 1834 ntango banyongo ekomaki mpasi mpo na kofuta.

Tala lisusu “Newel K. Whitney and the United Firm,” Revelations in Context, 142–47; “United Firm,” Nsango ya Mambi ya Kala ya Eklezia, ChurchofJesusChrist.org/study/church-history.

Malongi mpe Mayokani 78:1–7

Nakoki kosunga “kotamemantina” ya Eklezia liboso.

Nkolo ayebisaki Joseph Smith mpe bakambi basusu ya Eklezia ete koyangelaka ndako ya ebombelo mpe masini ya kotia nkoma na nkasa ya kobimisa buku ekosunga “kotambwisa ntina, oyo bondimaki” (Malongi mpe Mayokani 78:4). Mpo na bino “ntina” ya Eklezia ezali nini? Manyola oyo ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 78:1–7. Ntango mosusu kokanisa na ntina ya milongo ya makomi oyo ekoki kopesa yo nguya ya kokokisa libiangi na yo ya Eklezia to kosalisa libota na yo. Lolenge nini mosala na yo ekoki “kotambwisa ntina” ya Nkolo? Omilengelaka Lolenge nini mpo na “esika na mokili ya selesitiale”? (molongo 7).

Malongi mpe Mayokani 78:17–22

Nkolo akokamba ngai na nzela nakokende.

Esila yo komiyoka lokola mwana moke, ntango mosusu mpo na eloko songolo oyo “naino ososola te” to oyo “okoki komema te”? (Doctrine et Alliances 78:17–18). Luka toli na kati ya milongo oyo mpo ekoka kosunga yo “kozala na bosepeli malamu” (molongo 18) na bantango ya boye. Mpo na nini okanisi Nkolo abengaka ntango mosusu bayekoli na Ye “bana mike”? (molongo 17). Okoki lisusu komanyola lolenge nini Nkolo akoki “kokamba[ka] yo na nzela ozali kokende” (molongo 18).

Malongi mpe Mayokani 79–80

Libiangi ya kosalela Nzambe ezali motuya koleka esika nazali kosalela.

Na kotalaka Malongi mpe Mayokani 80, Mpaka David A. Bednar ateyaki, “Ntango mosusu moko ya mateya oyo Mobikisi ateyaka biso na kati ya emoniseli oyo ezali ete mokumba ya kosala na esika songolo ezali ntina mpe motuya kasi ezali na esika ya mibale to nsima na libiangi ya kokende kosala mosala” (“Obiangami na Mosala,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2017, 68). Kanisa mabiangi na yo ya sikawa to ya kala. Mayele nini ya mosala esungi yo koyekola ete maloba ya Mpaka Bednar ezali solo? Mateya nini ya kobakisama okoki kozwa na kati ya Malongi mpe Mayokani 79–80 oyo ekoki kosunga moto moko oyo awuti kozwa libiangi ya sika?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 77:2Nsima ya kotanga molongo oyo, bato ya libota bakoki koyema bilili oyo bango balingaka mingi: “banyama, … biloko oyo bingulumaka, … [to] biloko oyo epumbwaka likolo” oyo ekelama na Nzambe. Toyekoli nini na ntina ya bikelamu ya Nzambe uta na molongo oyo? (tala Malongi mpe Mayokani 59:16–20). Bokoki lisusu koyemba loyembo na ntina ya bikelamu ya Nzambe, ndakisa “My Heavenly Father Loves Me” (Children’s Songbook, 228–29), mpe kotalisa foto oyo ezali koyokana na mateya oyo.

Malongi mpe Mayokani 77:14.Molongo oyo elimboli ete Yoane aliaki buku oyo ezalaki elilingi ya etinda na ye ya kosangisa Yisalaele. Elembo ya kolia elakisi nini na ntina ya lolenge tosengeli kosalela mokumba na biso ya kosangisa Yisalaele to kosala makambo mosusu oyo Nkolo alingi biso tosala? Oyo ezali mwa makomi mosusu kati na oyo basaleli kolia mpo na koteya bosolo ya molimo: Yoane 6:48–51; 2 Nefi 32:3; Moroni 4. Ntango mosusu okoki kolamba bilei oyo libota elingaka kolia elongo na ntango ya lisolo oyo.

Malongi mpe Mayokani 78:17–19.Bato ya libota bakoki koyema bilili ya mapamboli uta na Nzambe oyo basengeli kozongisa matondi. Nini tozali kosala mpo na kolakisa botondi na biso mpo na mapamboli oyo? Bokoki lisusu kosolola lolenge nini libota na bino elandaka toli ya kozwa “makambo nyonso na botondi” (molongo 19). Nkolo alaki nini na baoyo basalaka yango?

Malongi nmpe Mayokani 79:1.Kabola litatoli na yo ya “nguya” oyo ozwaki ntango okulisamaki to otiamaki pembeni na mabiangi na Eklezia. Makabo nini elongobana mpe bofuli nini Nkolo apambolaki yo na yango ntango osalaki mosala na ye?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Compte les bienfaits,” Cantiques, no. 156.

Kobongisaka Mateya na Biso

Yema elili moko. Lokola libota, okoki kotanga mwa milongo moke mpe nsima kopesa ntango na bato ya libota bayema eloko moko oyo elimboli nini batangi. Botanda bilili nzinganzinga na ndako na bino mpo na kokundolisa libota na bino na ntina ya mabongi boyekolaki.

Elilingi
elanga na banyama

Elanga ya Nzambe, na Sam Lawlor

Bimisa na lokasa