Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya nsambo 19–25. Malongi mpe Mayokani 81–83: Esika “Mingi Epesami Mingi Ekosengama”


“Sanza ya nsambo 19–25. Malongi mpe Mayokani 81–83: Esika ‘Mingi Epesami Mingi Ekosengama,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya nsambo 19–25. Malongi mpe Mayokani 81–83,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Klisto mpe mokambi elenge mozwi

Klisto mpe Mokambi Elenge Mozwi, na Heinrich Hoffman

Sanza ya nsambo 19–25.

Malongi mpe Mayokani 81–83

Esika “Mingi Epesami Mingi Ekosengama”

Ntango ozali koyekola Malongi mpe Mayokani 81–83, koma mabongi to mateya oyo ekoki kosunga yo osala malamu na kati ya libota na yo, baninga na yo mpe basusu.

Koma Makanisi na Yo

Na Sanza ya misato 1832, Nkolo abiangaki Jesse Gause kozala mopesi toli ya Joseph Smith na Bokambi ya Bonganganzambe Monene (oyo ebengami sikawa Bokambi ya Yambo). Malongi mpe Mayokani 81 ezali emoniseli epai ya Ndeko Gause, koteyaka ye mpo na libiangi na ye ya sika mpe kolakaka ye mapamboli mpo na kosalela Nzambe kati na bosembo. Kasi Jesse Gause asalelaki nzambe na bosembo te. Boye Frederick G. Williams abiangemaki mpo na kozwa esika na ye, mpe batiaki nkombo ya Ndeko mobali Williams na esika ya nkombo ya Ndeko Gause kati na emoniseli yango.

Yango ekoki komonana lokola likambo moke, kasi na kati ebombani bosolo ya ntina monene: Mingi koleka ya bimoniseli na Malongi mpe Mayokani elobelaki bato songolo, kasi tokoki koluka ntango nyonso ndenge ya kosalela yango mpo na biso moko (tala 1 Nefi 19:23). Toli ya Nkolo epai ya Frederick G. Williams mpo na “kolendisa mabolongo malemba” ekoki kobalusa makanisi na biso epai ya bato oyo tokoki kolendisa (Malongi mpe Mayokani 81:5). Toli ya Nkolo mpo na bandimi ya Kompani ya Bomoko mpo na “kokangisa bino moko na boyokani oyo” na ntina ete bokokisa bamposa ya ntango ya Eklezia ekoki kobalusa makanisi na biso na mayokani na biso moko. Nkolo alaki ete Akoki “kosangisama ntango bosali oyo Ngai nalobi” ekoki kokundolisa biso na ntina ya bilaka na Ye epai na biso ntango totosi (Malongi mpe Mayokani 82:10, 15). Oyo ezali lolenge esengeli kozala, mpo ete Nkolo asakolaki lisusu, “Oyo Nalobi epai ya moko Nalobi epai ya bato nyonso” (molongo 5).

Tala “Newel K. Whitney and the United Firm,” “Jesse Gause: Counselor to the Prophet,” Revelations in Context, 142–47, 155–57.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 81

Nakoki kozala sembo na kosalaka oyo Nkolo asengi ngai.

Omitunaka ntango mosusu lolenge nini okoki kokokisa mikumba ya ntina na bomoi na yo? Lokola mopesi toli ya Profeta Joseph Smith, Frederick G. Williams azalaki solo na mikumba ebele ya ntina. Na eteni 81, Nkolo apesaki ye toli na ntina ya lolenge nini kokokisa yango. Omoni nini na eteni eye oyo ekoki kosunga yo okokisa mikumba mipesameli yo na Nkolo?

Oyo ezali mwa mituna mpo na kosunga yo komanyola molongo 5:

  • Banzela nini yango oyo moto akoki kozala na “botau to bolembu”? Yango elingi koloba nini “kobikisa” baoyo bazali na bolembu?

  • Nini ekoki kosala ete maboko ya moto “esili makasi”, lokola liloba ya lisese? Lolenge nini tokoki “kotombola” maboko wana?

  • Maloba “mabolongo ya kotengatenga” elingi koloba nini ? Lolenge nini tokoki “kolendisa” baye bazali na mabolongo ya kotengatenga?

Ntango mosusu koyekola molongo oyo ememi yo na kokanisa moto moko okokaki “kobikisa,” “kotombola,” to “kolendisa.” Nini okosala mpo na kosalisa moto yango?

Elilingi
Sidney Rigdon, Joseph Smith, Frederick G. Williams

Bakambi ya Yambo: Sidney Rigdon, Joseph Smith, Frederick G. Williams

Malongi mpe Mayokani 82:1–7

Nkolo abengisi ngai koyambola mpe kotika masumu na ngai.

Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 82:1–7, kanisa kokoma milongo mibale ya makambo oyekoli: makebisi na ntina ya masumu mpe makambo ya solo na ntina ya bolimbisi. Lolenge nini makambo ya solo oyo esungaka yo kotelemela masenginya ya monguna?

Malongi mpe Mayokani 82:8–10

Mitindo ezali mpo na lobiko mpe bobateli na ngai.

Soki yo—to moto moko oyebi—amituna naino te mpo na nini Nkolo apesi mitindo mingi boye, Malongi mpe Mayokani 82:8–10 ekoki kosalisa. Boyebi nini na kati ya milongo oyo ekoki kosunga yo olimbolela moto moko mpo na nini oponi kolanda mitindo ya Nkolo? Okoki lisusu kobanza lolenge nini mitindo na Ye ebongoli bomoi na yo. Oyekoli nini na ntina ya Nkolo ntango otangi molongo 10?

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 130:20–21; Carole M. Stephens, “Soki Olingaka Ngai, Batela Mitindo na Ngai,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2015, 118–20.

Malongi mpe Mayokani 83

“Bakufeli mibali mpe bana bitike bakopesama.”

Na Sanza ya minei 1832, lokola eteyamaki na Nkolo, Joseph Smith akendaki mobembo pene na bakilometele 1287 mpo na kokende kotala Basantu oyo basanganaki na Missouri (tala Malongi mpe Mayokani 78:9). Lisanga moko atalaki ezalaki na bakufeli mibali oyo bazalaki kobokola bana bango moko. Na kati na bango ezalaki na Phebe Peck mpe Anna Rogers, baoyo Profeta ayebaki malamu. Na Missouri na 1830, mibeko ya mboka epesaki bakufeli mibali makoki moke likolo ya bozwi ya mibali na bango bakufa. Oyekoli nini uta na eteni 83 mpo na oyo etali lolenge nini Nkolo akanisaa na ntina ya bakufeli mibali mpe bana bitike? Oyebi moto moko oyo azali kati na ezalela oyo mpe akoki kozwa litomba ya bolingo mpe bobateli na yo?

Tala lisusu Yisaya 1:17; Yakobo 1:27.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 81:3Okoki kopesa mitema ya nkasa ya papiye na bato ya libota mpe kobengisa bango bayema to bakoma eloko moko oyo bakolinga kosambela mpo na yango. Bosolola na ntina nini elingi koloba kosambela “ntango nyonso, na mongongo mpe na motema na yo.”

Malongi mpe Mayokani 81:5.Mpo na koyekola mabongi to mateya na kati ya molongo oyo, ntango mosusu bato ya libota bakoki kokabola ndakisa ya ntango bayokaki “bolembu to “botau” mpe moto songolo oyo abikisaki to alendisaki bango. Bokoki lisusu kotala bavideo na ntina ya kosunga basusu, lokola “Misala ya Nzambe” to “Likamwisi ya Moto Bakotisi Likolo ya Ndako” (ChurchofJesusChrist.org). Bosolola lolenge nini libota na yo ekoki kosalisana mbala na mbala na ndenge ya pete.

Mayokani mpe Mayokani 82:8–10.Ntango mosusu lisano ya pete ekoki kosunga libota na bino eyoka botondi mpo na mitindo ya Nzambe. Moto moko ya libota akoki kopesa malako mpo na kosunga moto ya libota moko oyo akangi miso kosala sandwish to kokima mbango miso ya kokanga. Bokanisa eloko songolo ya liseki mpe uta na makanisi na bino moko! Nsima bosolola lolenge nini mitindo ya Nzambe ezali lokola makebisi na kati ya lisano oyo.

Malongi mpe Mayokani 82:18–19.Nini yango oyo moto ya libota moko akoki kosala mpo na “kobongisa [ya ye] talanta” mpe “kolonga batalanta mosusu”? Ekoki kosepelisa bino kosala masano ya bolakisi ya talanta ya libota. Kanisa banzela mpo na kokotisa batalanta oyo ezali mpasi mpo na kolakisa (lokola makabo ya molimo, tala Malongi mpe Mayokani 46:11–26). Lolenge nini tokoki kosalela batalanta na biso mpe kokabola bikolo oyo tozali na yango mpo na kopambola libota mpe bato ya penepene na biso ? Elingi koloba nini kosalela batalanta na biso “na liso bobele na nkembo ya Nzambe”?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Have I Done Any Good?Hymns, no. 223; tala lisusu “Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo ya Makomi na Libota.”

Kobongisa Mateya na Biso

Tuna mituna oyo ememaka bato kotia mateya na misala. Kanisa mituna oyo etindikaka bato ya libota na yo bakanisa lolenge nini bakoki kosalela nsango malamu bomoi na bango mobimba koleka. “Oyo ezali mituna ya kosolela lokola momeseno te, ezali mpo na makanisi na yo moko” (Teya na Lolenge ya Mobikisi, 31).

Elilingi
Yesu kobikisaka moto moko

Elilingi ya Yesu kobikisakaka moto moko na Dan Burr

Bimisa na lokasa