Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya nsambo 26–Sanza ya moambe 1. Malongi mpe Mayokani 84: “Nguya ya Bonzambe”


Sanza ya nsambo 26–Sanza ya moambe 1. Malongi mpe Mayokani 84: ‘Nguya ya Bonzambe,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

Sanza ya nsambo 26–Sanza ya moambe 1. Malongi mpe Mayokani 84,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Joseph Smith azali kozwa Bonganganzambe ya Melekisedeke

Bozongisi, na Liz Lemon Swindle

Sanza ya nsambo 26–Sanza ya moambe 1

Doctrine et Alliances 84

“Nguya ya Bonzambe”

Ntango otangi Malongi mpe Mayokani 84, manyola toli ya “kobika na liloba nyonso oyo ebimaka uta na monoko ya Nzambe” (molongo 44). Lolenge nini okobika na maloba mazwami kati ya emoniseli oyo?

Koma Makanisi na Yo

Uta bonganganzambe ezongisamaki na 1829, Basantu ba mikolo mya Nsuka bapambolami na nguya wana ya bule. Babatisamaki, bakulisamaki nkotisa, mpe babiangemaki kosalela Nzambe na likoki ya bonganganzambe, mingi lokola tosalaka lelo. Kasi koyingela na nguya ya bonganganzambe ezali eloko se moko te lokola kososola yango mobimba, mpe Nzambe azalaki na mingi oyo Alingaki Basantu na Ye basosola—mingi mingi na boyei ya bozongisi ya makuli ya tempelo. Emoniseli ya 1832 na ntina ya bonganganzambe, sikawa Malongi mpe Mayokani 84, efungoli limoni ya Basantu mpo na oyo bonganganzambe yango ezali mpenza. Mpe ekoki kosala lolenge moko mpo na biso lelo. Nsima ya nyonso, ezali na ebele ya koyekola na ntina ya nguya ya bonzambe oyo esimbi “fungola ya boyebi ya Nzambe,” oyo emonisaka “nguya ya bonzambe,” mpe oyo elengelaka biso “tomona elongi ya Nzambe, kutu Tata, mpe kozala na bomoi” (milongo 19–22).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 84:1–5, 17–28

Nazwi nzela ya koyingeli na nguya ya bonganganzambe ya Nzambe mpe mapamboli.

Ntango okanisi na ntina ya liloba bonganganzambe, nini eyelaka yo na makanisi? Mbala boni okanisaka na ntina ya bonganganzambe mpe nguya na yango na bomoi na yo lelo? Nsima ya komanyolaka mituna oyo, yekola Malongi mpe Mayokani 84:1–5, 17–28, mpe kanisa nini Nkolo alingi yo koyeba na ntina ya nguya ya bonganganzambe na Ye. Lolenge nini okoki kosalela milongo oyo mpo na kolimbola bonganganzambe epai ya moto moko mpe kolimbola bantina na yango?

Okoki lisusu komanyola makuli ya bonganganzambe kati na yango ozalaki. Lolenge nini omonaki “nguya ya bonzambe” (molongo 20) emonisami na kati na makuli yango? Banza oyo Nkolo alingi yo osala mpo na kozwa mingi koleka ya nguya na Ye na bomoi na yo.

Tala lisusu M. Russell Ballard, “Mibali mpe Basi mpe Nguya ya Bonganganzambe,” Ensign, Sanza ya moambe 2014, 28–33; Gospel Topics, “Bonganganzambe,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Malongi mpe Mayokani 84:31–42

Soki nayambi Nkolo mpe basali na Ye, nakozwa nyonso oyo Tata azali na yango.

Mpaka Paul B. Pieper ateyaki: “ezali ntina ya koyeba ete na ndayi mpe liyokani ya bonganganzambe [Malongi mpe Mayokani 84:31–42], Nkolo asaleli maloba kozwa mpe koyamba. Asaleli te liloba kokulisa. Ezali na tempelo nde mibali mpe basi—banso elongo—bazwaka mpe bayambaka mapamboli mpe nguya ya nyonso mibale Bonganganzambe ya Alona mpe ya Melekisedeke” (“Kobimisa Polele Babosolo ya Bokufi,” Ensign, Sanza ya yambo. 2016, 21).

Ntango ozali koyekola Malongi mpe Mayokani 84:31–42, luka maloba “kozwa” mpe “koyamba.” Manyola oyo maloba yango ekoki kolimbola na eteni oyo. Lolenge nini ozali “koyamba[ka]” Nkolo mpe basali na Ye?

Okoki lisusu kokoma bilaka na kati ya milongo oyo esangana na ndayi mpe boyokani ya bonganganzambe, oyo Nzambe “akoki kobuka te” (molongo 40). Omoni nini oyo efuli yo ozala sembo koleka na koyambaka Tata, basali na Ye, mpe nguya ya bonganganzambe na Ye?

Tala lisusu Mokambi na Makomi, “Boyokani,” “Ndayi,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org.

Malongi mpe Mayokani 84:43–58

Nayaka epai ya Klisto ntango natiaka bokebi na maloba na Ye mpe nayokaka Molimo na Ye.

Kotanga makomi mpe maloba ya baprofeta mbala na mbala ezali mingi koleka kotia elembo moko ya kolongola eloko na molongo ya mikumba ya molimo. Makambo ya solo nini ozwi na kati ya Malongi mpe Mayokani 84:43–58 oyo esungi yo kososola mpo na nini osengeli koyekola mpenza liloba ya Nzambe? Koma bokeseni katikati ya pole mpe molili na kati ya milongo oyo; lolenge nini “molende na yo ya kotia bokebi na maloba ya bomoi ya seko” ememi pole, bosolo, mpe “Molimo ya Yesu Klisto” na bomoi na yo? (milongo 43, 45).

Tala lisusu 2 Nefi 32:3; “Buku ya Mormon—Libanga likonzi ya Eyamba na Biso,” Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Ezra Taft Benson (2014), 125–35.

Elilingi
mwasi koyekolaka makomi

Koyekola makomi esungaka ngai koyoka nguya ya Molimo.

Malongi mpe Mayokani 84:62–91

Nkolo akozala elongo na ngai ntango nazali kati ya mosala na Ye.

Ntango ozali kotanga milongo oyo, okoki komona ndenge Nkolo alobaki ete Akosunga Bapostolo na Ye mpe bamisionele. Lolenge nini kosalela bilaka oyo na mosala oyo Ye asengi yo osala? Ndakisa, lolenge nini bilaka na kati ya molongo 88 ekokisamaki na bomoi na yo?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 84:6–18.Nsima ya kotangaka lolenge nini Mose azwaki likoki ya bonganganzambe na ye, mosimbi bonganganzambe na libota na yo to ndeko mobali ya kosalisa akoki kokabola boyebi na ye ya kozala ya kokulisama na mokumba ya bonganganzambe. Soki ekoki kosalema, akoki kokabola mpe kosolola na ntina ya monkoloto ya likoki na ye ya bonganganzambe. Mpo na nini ezali ntina ete tokoka kolandela mokoloto ya likoki ya bonganganzambe na Eklezia lelo kozanga kino na likoki ya Yesu Klisto? Mpo na kosenga monkoloto ya likoki ya bonganganzambe, tinda email na lineofauthority@ChurchofJesusChrist.org.

Malongi mpe Mayokani 84:20–21.Ntango nini libota na yo esila koyoka “nguya ya bonzambe” komonisama na nzela ya bokuli moko lokola libatisi to elambo? Ntango mosusu bokoki kosolola na ntina ya lolenge nini makuli oyo ememaka nguya ya Nzambe na bomoi na biso. Bokoki lisusu kotalisa elilingi ya tempelo mpe kosolola na lolenge nini makuli ya tempelo epesaka biso nguya mingi mpo na kokoma lokola Mobikisi. Okoki kolinga koyemba loyembo na ntina ya bonganganzambe, lokola “The Priesthood Is Restored” (Chants pour Enfants, 89), mpe kosolola na ntina ya loyembo oyo eteyi nini na ntina ya bonganganzambe.

Malongi mpe Mayokani 84:43–44.Bokoki kolamba bilei to kosangana elongo mpe kotia etiketi na eloko moko moko ya mpimbo ya kolambela bilei na liloba to mwa malongo ya maloba uta na molongo 44. Mpo na nini ezali ntina ete tokotisa biloko nyonso ya mpimbo na biloko ya kolamba? Mpo na nini ezali ntina ya kobika na liloba nyonso ya Nzambe?

Malongi mpe Mayokani 84:98–102.Toyekoli nini na ntina ya Yesu Klisto uta na “loyembo ya sika” (molongo 98) na milongo oyo? Nini tokoki kosala na mikolo na biso mpo na kosunga komema makambo oyo elimbolami na loyembo oyo?

Malongi mpe Mayokani 84:106–10.Lolenge nini libota na biso “etongami elongo” na makabo mpe makoki ya “ndeko nyonso”? (molongo 110).

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “The Priesthood Is Restored,” Chants pour Enfants, 89; tala “Makanisi mpo na Kobongisa Boyekoli na Yo ya Makomi na Libota.”

Kobongisa Mateya na Biso

Kokabola mpe kolandela mabengisi to invitasio mpo na kosala. Ntango obengisi libota kosala na kolandaka oyo bazali koyekola, lakisa bango ete nsango malamu ezali eloko oyo basengeli kotia na misala, kasi kaka ya kolobela te. Okoki kobengisa bango basala nini uta na boyekoli ya Malongi mpe Mayokani 84?

Elilingi
Tempelo ya Roma na Italie

Tempelo ya Roma na Italie

Bimisa na lokasa