Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya moambe 23–29. Malongi mpe Mayokani 93: “Bozwa Litondi na Ye”


“Sanza ya mwambe 23–29. Malongi mpe Mayokani 93: ‘Bozwa Litondi na Ye,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya moambe 23–29. Malongi mpe Mayokani 93,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Setefano amoni Nzambe mpe Yesu Klisto

Namoni Mwana ya Moto kotelemaka na Loboko ya Mobali ya Nzambe, na Walter Rane

Sanza ya mwambe 23–29

Malongi mpe Mayokani 93

“Bozwa Litondi na Ye”

Malongi mpe Mayokani 93 eteyi ete “bosolo ezali boyebi ya makambo lolenge ezali, mpe lolenge ezalaki, mpe lolenge ekozala” (molongo 24). Ntango ozali koyekola mokapo oyo, luka bosolo mpe koma oyo oyekoli. Olingi kosala nini mpo na kozwa bosolo? (tala milongo 27–28).

Koma Makanisi na Yo

“Ntango omati na ebuteli,” Joseph Smith ateyaki, “osengeli kobanda na nse, mpe komata etape na etape, kino okokoma likolo; mpe boye ezali bongo mpe na mabongi to mibeko ya nsango malamu—osengeli kobanda na ebandeli, mpe kokoba kino okoyekola mabongi nyonso ya bonetoli” (Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith [2007], 268).

Ntango mosusu ebuteli wana ya bonetoli emonanaka lokola eloko oyo ekoki kosalema te mpo eleki likolo makasi, kasi tobotamaki mpo na kobuta kino likolo. Atako bandelo oyo tokoki komona kati na biso moko, Tata na Lola mpe Mwana na Ye bamonaka eloko moko ya nkembo kati na biso, eloko moko na lolenge ya bonzambe. Kaka lokola Yesu Klisto “azalaki na ebandeli elongo na Tata,” boye “yo mpe ozalaki” (Malongi mpe Mayokani 93:21, 23). Kaka lokola Ye “akobaki na nkembo likolo na nkembo, kino azwaki litondi,” lolenge moko mpe “yo okozwa ngolu likolo ya ngolu” (milongo 13, 20). Nsango malamu ezongisama eteyi biso na ntina ya lolenge ya solo ya Nzambe, mpe eteyi biso lisusu na ntina na biso moko mpe oyo tokoki kokoma. Kotala te makoki ya “moto ya mabe” (molongo 39)—mpe kotala te oyo ozali koyoka ete ezangi yo—ozali solo mwana ya Nzambe na makoki oyo “na ntango esengeli ya kozwa litondi na ye” (verse 19).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 93

Togumbamelaka Nzambe Tata mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto.

Kolobelaka emoniseli kati na Malongi mpe Mayokani 93, Nkolo alimbolaki, “Napesi bino maloba oyo mpo ete bokoka kososola mpe koyeba lolenge nini ya kogumbamela, mpe koyeba oyo bozali kokumbamela, mpo ete bokoka koya epai na Tata na nkombo na ngai, mpe na ntango esengeli kozwa litondi na ye” (molongo 19). Ntango oyekoli emoniseli oyo, tia elembo na bosolo oyo ozwi na ntina ya Bazalani oyo tozali kogumbamela: Nzambe mpe Mwana na Ye, Yesu Klisto. Oyekoli nini na ntina ya “lolenge nini kogumbamela” Bango? na ntina ya lolenge nini “koya epai ya Tata”?

Profeta Joseph Smith ateyaki, “soki bato bazali kososola te ezalela ya Nzambe, elingi koloba ete bazali komisosola te” (Mateya: Joseph Smith, 40). Ntango oyekoli na ntina ya Mobikisi na koyekolaka Malongi mpe Mayokani 93, luka lisusu nini oyekoli na ntina na yo moko. Ndakisa, nini oyekoli na ntina na Ye uta milongo 3, 12, 21, mpe 26? Bosolo ekokani nini ozwi na ntina na yo moko kati ya milongo 20, 23, mpe 28–29? (Tala lisusu 1 Yoane 3:2; 3 Nefi 27:27; Dean M. Davies, “Mapamboli ya Bogumbameli,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2016, 93–95.)

Malongi mpe Mayokani 93:1–39

Nkembo ya Nzambe ezali pole mpe bosolo.

Okoki komona ete nkembo, pole, mpe bosolo ezali kozonga mbala na mbala na emoniseli oyo. Ntango oyekoli mingi mingi milongo 21–39 yango moko, sala molongo ya makambo ya solo oyekoli na ntina ya nkembo, pole, mpe bosolo. Lolenge nini bosolo oyo efulaka yo mpo na koluka pole mpe bosolo ya mingi koleka? Lolenge nini bosolo oyo ekoki kosimba lolenge otambwisaka bomoi na yo ya mokolo na mokolo?

Elilingi
lininisa ya kitalatala

Tozwaka pole mpe bosolo ntango tobatelaka mitindo ya Nzambe.

Malongi mpe Mayokani 93:40–50

“Tia ndako na yo moko na molongo.”

Pene na molongo 40, Malongi mpe Mayokani 93 emonani lokola kobongwana uta na mateya na ntina ya nkembo ya Nzambe mpe makoki na biso ya bonzambe kokota na malakisi na ntina ya mikumba ya baboti mpe kotiaka molongo na bandako na biso. Lolenge nini mateya ya Nkolo na ntina ya pole, bosolo, mpe nkembo kati ya milongo 1–39 esungaka yo ososola mpe olanda toli ezwami na milongo 40–50?

Tala lisusu David A. Bednar, “Molende Koleka mpe Bomipesi na Libota,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2009, 17–20.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 93:2.Lolenge nini Yesu Klisto azali “pole ya solo” kati ya bomoi na biso? Lolenge nini tomonaki Pole na Ye kati ya bato nzinga nzinga na biso?

Malongi mpe Mayokani 93:3–29.Mpo na kosunga libota na bino esolola oyo bayekoli na kati ya mokapo 93 na ntina ya Mobikisi mpe bango moko, bokoki kosala lisano ya biloko ekokana. Ndakisa, bokoki kolengela liboke moko ya bakalati oyo ezali na milongo uta na mokapo 93 oyo eteyaka bosolo na ntina ya Mobikisi (tala milongo 3, 12, 21, 26) mpe liboke mosusu oyo ezali koteya eloko moko ekokana na ntina ya biso moko (tala milongo 20, 23, 28–29). Bato ya libota bakoki kolokota kaliti moko sima ya moninga uta na liboke moko na moko, kotangaka milongo oyo, mpe komekaka kozwa bosolo oyo ekokani. Lolenge nini bosolo oyo epesaka nguya na lolenge toyokaka na ntina ya Mobikisi mpe na ntina ya biso moko?

Malongi mpe Mayokani 93:12–13, 20.Elingi koloba nini kozwa “ngolu likolo na ngolu” mpe kokoba “uta ngolu likolo na ngolu”? (milongo 12–13). Milongo oyo epesi yo makanisi nini na ntina ya lolenge tokolaka mpe toyekolaka? Lolenge nini koyeba yango epesaka nguya na lolenge tosalelaka basusu—mpe biso moko?

Malongi mpe Mayokani 93:24.Tanga ndimbola ya bosolo oyo ezwami na kati ya molongo oyo, mpe bengisa bandeko ya libota bakabola eloko songolo uta mokapo 93 oyo bamoni ezali motuya moke ya bosolo. Ndimbola mosusu nini ya bosolo tozwi na kati ya Yoane 14:6; Yakobo 4:13; to loyembo na ntina ya bosolo, lokola “Oh Say, What Is Truth?” (Nzembo, no. 272).

Malongi mpe Mayokani 93:40.Ntango mosusu ntango totangaka molongo oyo, libota na yo ekoki koyemba loyembo na ntina ya koyekola na libota, lokola “Teach Me to Walk in the Light” (Children’s Songbook, 177). Bana mike bakoki kolinga kosala makambo maye mazali koyokana na maloba. Nini oyoki efuli yo osala mpo na kobengisa “pole mpe bosolo” mingi koleka na kati ya libota na yo?

Malongi mpe Mayokani 93:41–50.Bopesana toli elongo lokola libota na ntina ya nini ekoki te kozala “malamu na kati ya ndako na bino.” Nini tokoki kosala mpo na “kotia molongo na [ya biso] ndako”? (milongo 43–44).

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpona Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Je suis Enfant de Dieu,” Children’s Songbook, 2–3.

Kobongisa Boyekoli na Biso

Tanga mingi koleka mbala moko. Okoki kopona kotanga Malongi mpe Mayokani 93 mingi koleka mbala moko na poso oyo. Ntango nyonso ozali kotanga, okoki komona bosolo ekeseni kobima epai na yo to kofula yo na lolenge ya sika. Kotangaka mbala na mbala ekopesa yo lisusu mabaku ya komanyola mingi koleka na bozindo.

Elilingi
Yesu Klisto

Pole mpe Bosolo, na Simon Dewey

Bimisa na lokasa