Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya moambe 2–8. Malongi mpe Mayokani 85–87: “Botelema na Bisika Bisantu”


“Sanza ya moambe 2–8. Malongi mpe Mayokani 85–87: ‘Botelema na Bisika Bisantu,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya moambe 2–8. Malongi mpe Mayokani 85–87,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

libota kokendaka na tempelo

Sanza ya moambe 2–8

Malongi mpe Mayokani 85–87

“Botelema na Bisika Bisantu”

Molimo ekoki kokamba yo oyekola mabongi kati ya eteni 85–87 oyo etiami monkoloto te na moango oyo. Landa bitinda na Ye.

Koma Makanisi na Yo

Mokolo ya bokundoli eyenga ya mbotama to Noele ezalaka lokola momeseno ntango ya komanyola maloba lokola “kimia likolo ya mabele” mpe “bolingi malamu na bato” (tala Luka 2:14). Kasi na Sanza ya zomi na mibale 25, 1832, molimo ya Joseph Smith emitungisaki mingi na makaneli ya etumba. Carolina ya Sudi etelemelaki mbula-matari ya Etazini mpe ezalaki komilengela mpo na etumba. Mpe Nkolo amonisaki epai ya Joseph ete oyo ezalaki bobele ebandeli: “Etumba,” esakolaki Ye, “ekopanzana na bikolo nyonso” (Malongi mpe Mayokani 87:2). Emonanaki lokola ete lisakoli oyo ekokokisama sasaipi mpenza.

Kasi nsima ekokisamaki te. Na kati ya mwa baposo mike, mbula-matari ya Carolina ya Sudi mpe mbula-matari ya Etazini basalaki boyokani, mpe baboyaki kobunda etumba. Kasi emoniseli ekokisamaka ntango nyonso te na ntango to na lolenge tozelaka yango. Pene na mibu 30 nsima, ntango mingi kala nsima ete baboma Joseph Smith na liwa ya martiro mpe Basantu bakendaki na wesiti, Carolina ya sudi batombokaki mpe etumba ya bana mboka elandaki. Uta wana, etumba na mokili mobimba esali ete “mabele [e] lela” (Malongi mpe Mayokani 87:6). Na nsuka ntango esakola ekokisamaki, motuya ya emoniseli oyo ezali moke na makoki ya kosakola ntango likama ekoya kasi mingi na koteya nini ya kosala ntango likama yango ekoya. Toli ezali ya lolenge moko na 1831, 1861, mpe 2021: “Botelema na bisika bisantu, mpe boningana te” (molongo 8).

elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 85:1–2

Ezali malamu “kobomba lisitwale.”

“Lisitwale” oyo elimbolami na molongo 1 ekomaki bankombo ya baoyo “bazwa[ki] mabula engebene na mobeko” na Siona (tala lisusu Malongi mpe Mayokani 72:24–26). Nzokande, lisitwale oyo ezalaki mingi koleka bobele mokanda ya mambi ya bilo—ezalaki lisusu mokanda ya lisitwale ya motuya ya “lolenge ya bomoi ya Basantu, ya bondimi , mpe ya misala na bango” (molongo 2).

Ozali kobombaka lisitwale to zulunale na yo moko? Nini okoki kokoma na ntina ya lolenge ya bomoi na yo , ya bondimi mpe misala na yo oyo ekoki kozala lipamboli mpo na bankola oyo ekoya lobi? Lolenge nini ekoki lisitwale oyo kozala lipamboli mpo na yo?

Tala lisusu “Bazulunale: ‘Of Far More Worth than Gold,’” Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Wilford Woodruff (2011), 125–33; “Turning Hearts” (video, ChurchofJesusChrist.org).

Malongi mpe Mayokani 85:6

Molimo elobaka na “kimia na mongongo moke.”

Manyola maloba Joseph Smith asalelaki mpo na kolimbola Molimo kati na Malongi mpe Mayokani 85:6. Na lolenge nini mongongo ya Molimo ezali “kimia” mpe “moke”? Makambo nini oyo “ekotaka” na kati ya bomoi na yo?

Ntango okanisi lolenge nini Molimo elobelaka yo, manyola ndimbola oyo epesami na nzela ya Joseph Smith: Malongi mpe Mayokani 6:22–24; 8:2–3; 9:7–9; 11:12–13; 128:1. Na kotalaka maye otangi, oyoki nini na ntina ya oyo osengeli kosala mpo na kososola malamu mongongo ya Molimo?

Tala lisusu 1 Mikonzi 19:11–12; Helaman 5:30.

mwasi koyekolaka makomi

Koyekola makomi esungaka biso koyoka Molimo Mosantu.

Malongi mpe Mayokani 86

Bayengebene bazali kosangisama na mikolo ya nsuka.

Malongi mpe Mayokani 86:1–7 ezali na ndimbola ya Nkolo mpo na lisese ya nkona malamu mpe matiti mabe, na mwa bokeseni ya kobeta nsete koleka oyo Apesaki na Matai 13:24–30, 37–43. Ntango okokanisi nyonso mibale, makambo yabokeseni nini omoni? Kanisa mpo na nini lisese oyo—na bokeseni ya oyo—ebongi kozongelaka “na mikolo ya nsuka, ata sikawa” (Malongi mpe Mayokani 86:4). Nini okoki koyekola uta na lisese oyo mpe bobongoli na yango ya mikolo ya nsuka?

Lokola ekomami na milongo 8–11, Nkolo alobaki na ntango wana na ntina ya bonganganzambe, bozongisi, mpe lobiko ya bato na Ye. Mikangani nini omoni na kati ya milongo oyo mpe lisese ya nkona malamu mpe matiti mabe? Lolenge nini okoki kozala lokola “mobikisi mpo na bato [ya Nkolo]”? (molongo 11).

Tala lisusu Gospel Topics, “Bopengwi,” “Bozongisi ya Bonganganzambe,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Malongi mpe Mayokani 87

Kimia ezwami na kati ya “bisika bisantu.”

Likolo ya makama ya nzoto ya “bosopi makila … [mpe] nzala, mpe bolozi, mpe boningani ya mabele” (Malongi mpe Mayokani 87:6), toli na kati ya emoniseli oyo ekoki lisusu kosalelama mpo na makama ya molimo oyo tokutanaka na yango biso nyonso na mikolo ya nsuka. Nini ezalaka ya yo “bisika bisantu” (molongo 8) wapi ozwaka kimia mpe bokengi? Nini esalaka ete esika moko ezala esantu? Likolo ya bisika oyo bimonanaka na miso, ntango mosusu ezali na bangonga esantu, misala misantu, to makanisi masantu oyo ekoki kopesa kimia. Elingi koloba nini “koningana te” uta na bisika oyo?

Tala lisusu Henry B. Eyring, “Libota Esika oyo Molimo ya Nkolo Afandaka,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2019, 22–25; Basantu, 1:163–64; “Kimia mpe Etumba,” Revelations in Context, 158–64.

elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 85:6.Lolenge nini okoki koteya libota na yo kokitola kimia, mongongo moke ya Molimo? Ntango mosusu bokoki kosakana lisano wapi moto moko azali kopesa malakisi ya motuya na mongongo ya nse na katikati ya makelele oyo ezali kobungisa makanisi. Nini ekoki kobungisela biso makanisi uta na koyokaka Molimo Mosantu? Ntango mosusu bato ya libota bakoki kokabola oyo basalaka mpo na koyoka mongongo ya Molimo.

Malongi mpe Mayokani 86.Koyema to kotala bilili ekoki kosunga libota na yo esosola lisese ya nkona malamu mpe matiti mabe. Bokoki kolinga kobanda na bilili oyo elimbolami na Matai 13:24–30. Nsima libota na yo ekoki kobamba bilili na ndimbola uta na Malongi mpe Mayokani 86:1–7. Lolenge nini tokokani na nkona malamu? Lolenge nini tokoki kokokana na banjelu oyo basangisaka mbuma malamu?

Malongi mpe Mayokani 87:8.Mpo na kokotisa masolo na ntina ya lolenge nini kokomisa libota na yo esika esantu koleka, okoki kobengisa bato ya libota na yo bayema ndako mpo na moto moko oyo alingaka Mobikisi. Oyo ekoki kokamba na makanisi na ntina ya lolenge nini “koyema lisusu” ndako na yo mpo na kosala ete yango ezala esika ya kimia na likama ya molimo kati na mokili. Nzembo lokola “Love at Home,” “Home Can Be a Heaven on Earth” (Hymns, nos. 294, 298), to “Where Love Is” (Chants pour Enfants, 138–39) ekoki kopesa yo makanisi.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka na ntina ya koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Where Love Is,” Chants pour Enfants, 138–39.

Kobongisa Mateya na Biso

Salela mayele na yo ya kokela. Ntango oteyi libota na yo uta na makomi yango, komipesa ndelo te na mituna mpe makanisi ya ntina oyo epesami na mateya oyo. Tika makanisi oyo ebimisa mayele ya bokeli na yo moko. Kanisa na ntina ya lolenge nini libota ekosepela mpe nini ekosunga bango bazwa mikangano katikati na makomi mpe bomoi na bango.

Elanga ya nkona malamu

Nkolo asalelaki lisese ya nkona malamu mpe matiti mabe mpo na kotalisa lolenge nini bato na Ye bakosangana na mikolo ya nsuka.