Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya mwambe 9–15. Malongi mpe Mayokani 88: “Bobongisa … Ndako ya Nzambe”


“Sanza ya mwambe 9–15. Malongi mpe Mayokani 1: ‘Bobongisa … Ndako ya Nzambe,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya mwambe 9–15. Malongi mpe Mayokani 88,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
kati ya ndako na bakiti mpe bibonga

Sanza ya mwambe 9–15

Malongi mpe Mayokani 88

“Bobongisa … Ndako ya Nzambe”

Mokambi Russell M. Nelson alobaki, “Nalaki ete ntango ozali kosala na molende mpo na kobongisa libota na yo ekoma esika ya katikati ya boyekoli nsango malamu, … nguya ya monguna kati na ya yo bomoi mpe na oyo ya yo libota ekokita” (“Becoming Exemplary Latter-day Saints,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 113).

Koma Makanisi na Yo

Mbala mingi mpenza, Nkolo apesaka biso bomoni moke moko ya “bonkumu mpe nguya” na Ye ezanga ndelo (Malongi mpe Mayokani 88:47) na nzela ya bimoniseli ya mozindo epai ya baprofeta na Ye. Malongi mpe Mayokani 88 ezali emoniseli moko ya lolenge boye—moko na ntina ya babokonzi ya nkembo ya moke mpe nkembo ya monene oyo ekoki kosala ete mitungisi na biso kati na mabele oyo emonanalokola makambo ya ntina te soki okokanisi yango. Ata soki tokoki te kososola nyonso oyo Nkolo azali koteya biso, tokoki ata na moke koyoka ete boseko ezali mosika mingi koleka oyo tozali kososola sikawa. Ya solo, Nkolo alobelaki mibombamo minene oyo te mpo na kobangisa biso to kosala ete biso tomiyoka mike. Na kotala mpenza likambo yango, Ye alakaki ete, “Mokolo ekoya ntango oyo bino bokososola kutu Nzambe” (molongo 49; biso nde tobeti sete). Ntango mosusu ezalaki na nsuka ya lokumu wana nde Nkolo ateyaki Basantu na Ye na Kirtland basala Eteyelo ya Baprofeta. “Bomiyangela bino moko,” Alobaki. “Bolengela eloko nyonso ya ntina; mpe bofandisa … ndako ya Nzambe” (molongo 119). Mpo ete ezali na kati ya ndako esantu ya Nzambe—mpe na mabota na biso—nde Akoki, koleka bisika nyonso mosusu, kotombola limoni na biso mosika kuna koleka mokili ya kufa, “kotalisa elongi na Ye epai na [biso],” mpe kolengela biso “tokota na nkembo ya selesitiale” (milongo 68, 22).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 88

Nkolo apesaka biso elikya mpe kimia.

Kaka mikolo moke nsima likebisi ete etumba esengelaki “kokweya likolo ya bikolo nyonso” (Malongi mpe Mayokani 87:2), Nkolo apesaki emoniseli oyo Joseph Smith abengaki “‘lokasa ya bilaya’ … ebukama uta na Nzete ya Paladizo, maloba ya kimia ya Nkolo epai na biso” (Malongi mpe Mayokani88, moto ya mokapo). Lolenge nini ezali emoniseli oyo lokola lokasa ya bilaya, elembo ya bonkoko ya kimia? (tala lisusu Genese 8:11). Makambo ya solo nini na kati ya eteni oyo esungi yo oyoka elikya mpe kimia na Klisto?

Malongi mpe Mayokani 88:6–67

Pole mpe mobeko ewutaka na Yesu Klisto.

Maloba pole mpe mobeko ezongelami mbala mingi na kati ya eteni 88. Maloba oyo esalemaki na kati ya makomi mosusu mpo na kolimbola Yesu Klisto mpe nsango malmu na Ye (ndakisa, tala Yisaya 60:19; Yoane 1:1–9; 3 Nefi 15:9). Tia elembo to koma milongo epai wapi omoni maloba oyo na kati ya Malongi mpe Mayokani 88:6–67, mpe koma oyo oyekoli na ntina ya Mobikisi, pole, mpe mobeko. Milongo oyo ekoki kofula yo osala mbongwana na bomoi na yo mpo na kozwa na bosembo bonso pole mingi koleka mpe kotosa “mobeko ya Klisto” (molongo 21).

Tala lisusu Sharon Eubank, “Klisto: Pole Oyo Engengaka na Molili,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2019, 73–76.

Elilingi
Libota koyekolaka makomi

Makomi ezali na mobeko ya Klisto na kati.

Malongi mpe Mayokani 88:62–126

Lengela eloko nyonso ya ntina.

Na ndenge mosusu, tozali kobika na ntango oyo Nkolo alimbolaki lokola ntango “makambo nyonso ekozala na mobulungano; mpe ya solo, mitema ya bato ekozanga bango” (Malongi mpe Mayokani 88:91). Ntango ozali kotanga milongo 62–126, banza lolenge nini toli ya Nkolo ekoki kosunga yo omilengela mpo na Boyei ya Mibale ya Mobikisi. Awa ezali mwa mituna ya kotalela:

Milongo 62–76.Ntango ozali komanyola milongo oyo, nini ofulami kosala mpo na “kobelema penepene” ya Nzambe? (molongo 63). Kanisa nini motindo ya Nkolo ya “komisantisa” ekoki koloba mpo na yo (molongo 68).

Milongo 77–80, 118–26.Mpo na nini yango ekoki kozala “ntina mpo na yo ososola” nyonso mibale makambo ya malongi mpe masolo ya ntango? (molongo 78). Lolenge nini ozali kolanda toli mpo na “koluka boyekoli”? (molongo 118). Nini okanisi yango elingi koloba koyekola “na nzela ya boyekoli mpe lisusu na nzela ya bondimi”?

Milongo 81–116.Kanisa kokoma masakoli na ntina ya Boyei ya Mibale ya Mobikisi na milongo oyo. Mpo na nini okanisi Nkolo akolinga yo oyeba makambo oyo?

Milongo 117–26.Kanisa kotangaka milongo oyo na kotiaka tempelo na makanisi; nini omoni awa oyo ekoki kosunga yo omilengela mpo na kokota na ndako ya Nkolo?

Tala lisusu D. Todd Christofferson, “Komilengela mpo na Bozongi ya Nkolo,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2019, 81–84; David A. Bednar, “Luka Boyekoli na Bondimi,” Ensign, Sanza ya libwa. 2007, 61–68; Basantu, 1:164–66; “Eteyelo mpe Dotasio,” Revelations in Context, 174–82.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 88:14–33, 95–101.Toyekoli nini na ntina ya Bosekwi uta na milongo oyo? Lolenge nini makambo ya solo oyo epesi nguya na maponi oyo tosalaka.

Malongi mpe Mayokani 88:63Bokoki kobanda kosolola na ntina ya molongo oyo na kotunaka bato ya libota basolola na ntina ya makabo oyo epesameli bango—nyonso mibale oyo bazwaki na bosepeli mpe mosusu oyo bazwaki te. Lolenge nini tokoki kolakisa Nkolo ete tosepeli na likabo ya nkembo ya selesitiale oyo Apesi biso? Lolenge nini tosepelaka na “mopesi ya likabo”?

Malongi mpe Mayokani 88:63, 68.Milongo oyo ezali na mwa maloba ya mpiko oyo ekoki kofula yo okanisa ndenge ya kosalela makanisi na yo ya kokela biloko mpo na koteya bansango na kati ya milongo yango epai ya bana na yo. Ndakisa, bokoki kosakana lisano ya kobatama mpo na kosolola liloba “luka ngai na lombango mpe oko zwa ngai” (molongo 63; biso nde tobeti nsete).

Malongi mpe Mayokani 88:81.Ntango libota, emoni bilembo mosusu ya likebisi na kati mpe nzinganzinga ya ndako na yo, lokola bakalati ya makebisi likolo ya milangi ya nkisi to ya bilembo ya makebisi ya nzela mpo na bakumbi mituka. Lolenge nini makebisi oyo esungaka biso? Nini Tata na Lola alingi biso “tokebisa [ya biso] bato ya penepene” ?

Malongi mpe Mayokani 88:119.Mpo na kofula libota na yo esala ndako na bino lokola ndimbola na molongo 119, meka eloko moko lokola oyo: Koma maloba uta na molongo oyo na mwa nkasa, mpe salela yango mpo na kozipa elilingi ya tempelo. Tanga Malongi mpe Mayokani 88:119 elongo, mpe tika bato ya libota balongola lokasa ya mokanda moke mpe molai moko na moko ntango bayoki liloba na yango kati na molongo yango. Nini tokoki kosala mpo na kokomisa libota na biso “ndako ya Nzambe”? (molongo 119).

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Nearer, My God, to Thee,” Cantique, no. 100.

Kobongisaka Mateya na Biso

Tika bana basalela mayele na bango ya kokela biloko ya sika. Ntango obengisi bana na yo bakela eloko moko etali libongi ya nsango malamu, ozali kaka kosunga bango basosola ya malamu koleka te, kasi opesi bango lisusu bokundoli ya komonana na miso ya maye bango bayekoli (tala Teaching in the Savior’s Way, 25).

Elilingi
Yesu elongo na bayekoli

Yesu Klisto apesi biso kimia. Natikeli Bino Kimia, na Walter Rane

Bimisa na lokasa