Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya mwambe 16–22. Malongi mpe Mayokani 89–92: “Mobeko Moko na Elaka”


“Sanza ya mwambe 16–22. Malongi mpe Mayokani 89–92: ‘Mobeko Moko na Elaka,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya mwambe 16–22. Malongi mpe Mayokani 89–92,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
mobali mpe mwasi kolambaka

Sanza ya mwambe 16–22

Malongi mpe Mayokani 89–92

“Mobeko Moko na Elaka”

Na nzela ya losambo yekola Malongi mpe Mayokani 89–92, mpe koma makanisi nyonso ya molimo oyo ozwi. Zala ekenge na lolenge “Molimo [emonisaka] bosolo” epai na yo ntango ozali koyekola (Doctrine et AlliancesMalongi mpe Mayokani 91:4).

Koma Makanisi na Yo

Na Eteyelo ya Baprofeta, Profeta Joseph Smith ateyaki bampaka ya Yisalaele na ntina ya kotonga bokonzi ya Nzambe likolo ya mabele. Basololaki makambo ya solo ya molimo, basambelaki elongo, bakilaki mpe bamilengelaki mpo na kosakola nsango malamu. Kasi ezalaki na eloko moko na ntina ya esika wapi masolo ezalaki kosalema, eloko oyo ekoki komonana mabe epai na biso lelo, mpe yango mpe emonanaki malamu te epai ya Emma. Na ntango ya mayangani, mibali bazalaki komela makaya mpe kolia tumbako, oyo ezalaki momeseno na ntango wana, kasi ezalaki kotia matono ya moindo likolo ya mabaya ya bibonga mpe ezalaki kotika solo ya makasi na mopepe. Emma akabolaki mitungisi na ye na Joseph, mpe Joseph atunaki Nkolo. Eyano ezalaki emoniseli oyo ekendaki mosika koleka likambo ya molinga mpe matono ya tumbaku. Likambo oyo epesaki Basantu, mpo na bankola oyo ekoya, “mobeko moko na elaka”—bilaka ya bokolongono ya nzoto, “bwanya,” mpe “biloko ya motuya monene ya boyebi” (Malongi mpe Mayokani 89:3, 19).

Tala lisusu Basantu, 1:166–68

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 89

Liloba ya Bwanya ezali “mobeko moko epesami na elaka.”

Ntango bampaka na kati ya Eteyelo ya Baprofeta bayokaki yambo Joseph Smith kotanga Liloba ya Bwanya, babwakaki mibokolo to pipe mpe batumbako ya kotia na monoko na bango na kati ya moto” (basantu, 1:168). Na ntango wana, Liloba ya Bwanya ezwamaki mingi lokola bokebi koleka motindo, kasi balingaki kolakisa bolingi na bango ya kotosa. Ntango mosusu osila “kobwaka” na bomoi na yo biloko oyo Liloba ya Bwanya epekisaka, kasi nini lisusu okoki koyekola uta na emoniseli oyo? Tala makanisi oyo:

  • Luka masakoli oyo ntango mosusu oyebaki te—to okonisaki mingi na ntina na yango —liboso. Oyekoli nini uta na yango?

  • Malongi mpe Mayokani 89 ezali na bilaka mingi (tala milongo 18–21). Okanisi bilaka oyo elingi koloba nini?

  • Emoniseli oyo etei yo nini na ntina ya Nkolo?

  • Bandakisa nini omoni ya “mabe mpe miango … na mitema ya bato oyo basanganaki na ekokolo”? (molongo 4).

  • Kanisa na ntina ya emoniseli yango lokola “mobeko moko na elaka” (molongo 3)—koyika mpiko na makambo ya solo oyo ekambaka bato na kozwa mikano—kasi bobele mokanda ya makambo ya kosala to ya kosala te.te. Mabongi nini ozwi oyo ekoki kokamba mikano na yo?

Baprofeta ya lelo bakebisi mpe lisusu na ntina ya biloko ya mabe mpe bizaleli oyo ezali mosika koleka makambo oyo etalisami na Liloba ya Bwanya (tala “Physical and Emotional Health,” Mpo na Kolendisa Bolenge, 25–27). Nini otindami kosala mpo na kobatela malamu koleka makanisi mpe nzoto na yo?

Tala lisusu Daniele 1; 1 Bakolinti 6:19–20; Gospel Topics, “Liloba ya Bwanya,” topics.ChurchofJesusChrist.org; “Liloba ya Bwanya,” Revelations in Context, 183–91; addictionrecovery.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
bana mibali kokimaka mbangu na libongo

Liloba ya Bwania eteyaka biso kobatela banzoto na biso.

Malongi mpe Mayokani 90:1–17

Bokambi ya Yambo bazali na “bafungola ya bokonzi.”

Na eteni 90, Nkolo apesaki makebisi na ntina ya “mosala mpe bokambi” (molongo 12) ya Joseph Smith, Sidney Rigdon, mpe Frederick G. Williams—bato ya oyo tobengi sikawa Bokambi ya Yambo. Oyekoli nini na ntina ya Bokambi ya Yambo uta na milongo 1–17? Tala bitinda ya sika uta na bato kati na Bokambi ya Yambo. Lolenge nini maloba na bango “eyebisa mibombamo ya bokonzi” epai na yo? (molongo 14). Lolenge nini bango “batiaka alima na makambo nyonso ya eklezia mpe ya bokonzi oyo”? (molongo 16).

Tala lisusu Henry B. Eyring, “Nguya Kosunga Bondimi,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2019, 58–60.

Malongi mpe Mayokani 90:24

“Makambo nyonso ekosala elongo mpo na [ya ngai] bolamu.”

Manyola mayele ya mosala oyo ozwi mpe oyo etatoli elaka ya Nkolo na Malongi mpe Mayokani 90:24. Kanisa kokoma mayele na yo mpe kabola yango na moto moko ya libota to molingami moko—ntango mosusu moto moko oyo azali na mposa ya elikya to bolendisi. Soki ezali na mapamboli oyo ozali naino kozela sikawa, manyola oyo okoki kosala mpo otikala sembo ntango ozali kozela komona lolenge nini“makambo nyonso ekosalema elongo mpo na bolamu na yo.”

Malongi mpe Mayokani 90:28–31

Vienna Jaques azalaki nani?

Vienna Jaques abotamaki na sanza ya motoba June 10, 1787, na Massachusetts. Mwasi ya bondimi oyo azalaki na misolo mingi, Vienna akutanaki yambo na bamisionele na 1831. Nsima ya kozwa litatoli ya molimo ete nsango na bango ezalaki solo, ye, akendaki mobembo mpo na kokutana na Profeta na Kirtland, Ohio, esika wapi abatisamaki.

Vienna atosaki toli ya Nkolo epai na ye na Malongi mpe Mayokani 90:28–31. Bobulisi na ye epai ya Nkolo, mpe lisusu mabonza asalaki na ebandeli na Kirtland, ekomaki na ntango ya mpasi mpo na Eklezia, ntango bakambi bazalaki komeka kosomba mabele wapi Tempelo ya Kirtland esengelaki kotongama. Vienna azalaki “sembo, mpe … goyi-goyi te” na bomoi na ye mobimba mpe na nsuka afandaki na “kimia” (molongo 31) na Valley ya Salt Lake, wapi esika akufaki na mibu 96.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 89Bandeko ya libota na yo bakoki kosepela koyema to kozwa bililingi ya bilei mpe biloko mosusu oyo elobelami na Malongi mpe Mayokani 89. Nsima bokoki kosakana lisano—bato ya libota bakoki moko nsima ya mosusu,kopona bililingi ya nzeke, kotiaka biloko oyo tosengeli kosalela te na ebwakelo ya bosoto mpe biloko oyo tosengeli kosalela na sani moko. Lolenge nini bilaka na kati ya milongo 18–21 ekokisami na bomoi na bino?

Kotanga “Bokolongono ya Nzoto mpe Makanisi” na Mpo na Bolendisi ya Bilenge (25–27) ekoki kotindika masolo na ntina ya banzela mosusu mpo na kolengela bokolongono na biso mpe na ntina ya mapamboli oyo Nzambe alaki.

Malongi mpe Mayokani 90:5.Bosolola na ntina ya lolenge nini “bozwi maloba kitoko [bimoniseli to baprofeta] ya Nzambe.” Lolenge nini tokoki kolakisa ete ezali te “likambo moko ya pepele” epai na biso?

Doctrine et Alliances 91Bokoki kosolola lolenge nini toli ya Nkolo na ntina ya makomi Apokrifa (tala milongo 1–2) esalemaka na media oyo libota na yo ekutanaka na yango lelo (tala lisusu Bokambi na Makomi, “Apocrypha,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org). Okoki lisusu kokabola mayele na yo moko ntango “ongengisamaki na Molimo” (molongo 5) esungaki yo kososola kati ya bosolo mpe mabunga.

Malongi mpe Mayokani 92:2.Yango elingi koloba nini kosala “mondimi na bomoi” ya Eklezia?

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “The Lord Gave Me a Temple,” Chants pour Enfants, 153.

Kobongisa Mateya na Biso

Salela biloko ya ndenge na ndenge. Luka banzela ya ndenge na ndenge mpo na kokotisa libota na yo na boyekoli ya makomi na libota. Ndakisa, bato ya libota bakoki koyemba nzembo ya mikolo to nzembo ya bana oyo ekokani na molongo moko, boyema bililingi ya oyo bazali kotanga, to koloba na mokuse molongo moko ya makomi na maloba na bango moko.

Elilingi
Mbuma mpe ndunda

“Basantu nyonso oyo … basalelaka maloba oyo, kotambolaka na botosi ya mitindo yango, bakozwa bokolongono na motolu mpe mafuta mpo na mikuwa na bango” (Malongi mpe Mayokani 89:18).

Bimisa na lokasa