Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya mwambe 30–Sanza ya libwa 5. Malongi mpe Mayokani 94-97: “Mpo na Lobiko ya Siona”


Sanza ya mwambe 30–Sanza ya Libwa 5. Malongi mpe Mayokani 94–97: ‘Mpo na Lobiko ya Siona,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

Sanza ya mwambe 30–Sanza ya Libwa 5. Malongi mpe Mayokani 94–97,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Tempelo ya Kirtland

Tempelo ya Kirtland, na Al Rounds

Sanza ya mwambe 30–Sanza ya libwa 5.

Malongi mpe Mayokani 94–97

“Mpo na Lobiko ya Siona”

Mabongi mpe malongi kani ezali kobima polele yo ntango ozali koyekola Malongi mpe Mayokani 94-97? Yeba solo ete okomi maye ozali koyoka to mayoaki na yo.

Koma Mayoki na Yo

Ntango Nkolo atindaki Mose kotonga tabelenakele, Alobaki na Mose ete “sala makambo nyonso engebene na ndakisa alakisaki [ye] na ngomba” (Baebele 8:5; tala lisusu Esode 25:8–9). Tabelenakele ezalaki na katikati ya nganda ya Yisalaele na esobe (tala Mituya 2:1–2). Nsima, Nzambe atindaki Solomo mpe bato na ye batonga tempelo moko engebene na ndakisa oyo Ye alakisaki (tala 1 Ntango 28:12, 19).

Ntango Nkolo azongisaki litondi ya nsango malamu, Ye atindaki Joseph Smiith atonga batempelo engebene na ndakisa alakisaki. “Tika ndako etongama, na lolenge ya mokili te,” esakolaki Nkolo. “Tika yango etongama na lolenge oyo nakolakisa” (Doctrine and Covenants 95:13–14; tala lisusu 97:10). Lokola tabelenakele na esobe, tempelo esengelaki kozala eloko moko ya katikati na Kirtland (tala Malongi mpe Mayokani 94:1).

Lelo bandako ya Nkolo ezwami na mokili mobimba. Ata soki ezali te na katikati ya bamboka, ekoki kozala na katikati ya bomoi na biso. Atako tempelo moko na moko ekeseni na libanda, na kati na yango toyekolaka ndakisa bobele moko wana ya Nzambe—mwango ya lola mpo na kosunga biso tozonga na miso ya Nzambe. Makuli ya bule, ya seko ekosunga biso kotonga bomoi na biso mpe kolendisa mabota na biso “na lolenge ya mokili te” kasi na ndakisa Nzambe alakisi biso.

Tala Les Saints, 1:169–70; “A House for Our God,” Revelations in Context, 165–73.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 94; 97:15–17

Nkolo akoki kozala elongo na ngai na bomoi na ngai ya mokolo na mokolo.

Mitindo na Malongi mpe Mayokani 94 mpe 97 epesamaki mokolo moko—Sanza ya mwambe 2, 1833. Eteni 97 ezali kotalela na mwa ndambu tempelo moko oyo elengelamaki mpo na Jackson County na Missouri, nzokande eteni 94 ezali kolobela bandako ya misala ya bokambi na Kirtland na Ohio. Okoki komona mwa bokokani na oyo Nkolo alobi na ntina ya ndenge ekeseni ya bandako oyo (tala Malongi mpe Mayokani 94:2–12; 97:10–17). Ntango ozali komanyola mitindo oyo, kanisa nini okoki kosala mpo na koyeba nkembo mpe miso ya Nkolo mbala mingi koleka, na kati ya Eklezia mpe na bomoi na yo ya mokolo na mokolo.

Malongi mpe Mayokani 95

Nkolo apesaka etumbu na baye Ye alingaka.

Penepene na basanza mitano elekaki uta sanza ya yambo 1833, ntango Nkolo atindaki Basantu na Klirtland batonga ndako ya Nzambe mpe basala bokutani moko ya lipombo (tala Malongi mpe Mayokani 88:117–19). Ntango emoniseli oyo ekomamaki na eteni 95 ezwamaki na sanza ya motoba 1833, basalelaki naino te motindo wana. Nini oyekoli uta na lolenge Nkolo apesaki etumbu na Basantu na emoniseli oyo? Ezali na mitindo to maloba ya toli oyo osaleli naino te? Nini oyoki Molimo efuli yo kosala?

Tala lisusu D. Todd Christofferson, “Baye Nalingaka Mingi, Bango nde Nampamelaka mpe Napesaka Etumbu,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2011, 97–100.

Malongi mpe Mayokani 95:8, 11–17; 97:10–17

Na tempelo Nzambe apambolaka bato na Ye.

Nsima ya kopesama etumbu mpo batongaki te ndako ya Nkolo na Kirtland, bakambi ya Eklezia baponaki esika moko na bilanga ya loso to ble wapi bakotonga yango. Hyrum Smith, ndeko ya Profeta ya Mobali, akimaki mbangu sikasika wana kozwa mbeli mpe kobanda kokata matiti na bilanga. “Tozali kolengela kotonga ndako moko mpo na Nkolo,” elobaki ye, “mpe nazwi mokano mpo na kozala moto ya yambo na mosala” (in Teachings of Presidents of the Church: Joseph Smith [2007], 271, 273). Manyola mposa makasi ya Hyrum ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 95:8, 11–17; 97:10–17. Nini omoni oyo ezali kofula mokano ya lolenge moko kati na yo mpo na kozwa mapamboli ya tempelo?

Elilingi
Hyrum Smith kosimbaka mbeli

Hyrum Smith Azali Kokata Bilanga, na Joseph Brickey

Malongi mpe Mayokani 97:18-28

Siona elingi koloba “bato ya peto na motema.”

Profeta Joseph Smith ateyaki, “Tosengeli kozala na ndako na Siona lokola lotomo na biso oyo eleki monene” (Teachings: Joseph Smith, 186). Na Basantu ya 1830, Siona ezalaki esika moko, mpenza “engumba ya Nzambe” (Malongi mpe Mayokani 97:19). Kasi na emoniseli ekomamaki na eteni 97, Nkolo alimbolaki bomoni wana. Siona elimboli lisusu bato—“bato ya peto na motema” (eteni 21). Ntango ozali kotanga milongo 18–28, kanisa ndimbola oyo ntango ozali kotanga liloba “Siona.” Nini yango elingi koloba na yo kozala peto na motema? Lolenge boni tempelo esalisaka kokokisa “lobiko ya Siona”? (eteni 12).

Tala lisusu Moses 7:18; Masolo ya Nsango malamu, “Zion,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 95:8.Lolenge nini kosala mpe kobatela mayokani ya tempelo ememaki “nguya uta na likolo” na kati ya bomoi na biso? Ntango mosusu bato ya libota bakoki kokabola lolenge bazali koyoka na oyo etali tempelo to kokabola mayele ntango bayokaki bapambolami na “nguya uta na likolo” na nzela ya kokumbamela na tempelo.

Mpo na kosalisa baoyo bazali komilengela kokota na tempelo, okoki kotala lisusu bavideo, bafoto, mpe malakisi ezwami na temples.ChurchofJesusChrist.org. Mpo na kosalisa bana bayekola maye matali tempelo, okoki kosalela “Your Path to the Temple” (na Temples of The Church of Jesus Christ of Latter-day Saints [Nimelo ya Malonga ya Ensign to Liahona, Sanza ya zomi 2010], 72–75).

Malongi mpe Mayokani 95:1–11.Nini toyekoli na ntina ya kopesa etumbu uta na milongo oyo? Nini toyekoli na ntina ya Nkolo? Lolenge nini boyebi oyo ebongoli lolenge tozwaka etumbu to kopesaka etumbu na basusu?

Malongi mpe Mayokani 97:8Engebene na molongo oyo, boniboni tokoki kozala “ya kondimama na” Nkolo? Lolenge boni ezali kokesena na kozala moto oyo andimama na mokili? Nini elingi koloba “kobatela mayokani na [biso] na komibonzaka”? Lolenge nini tosalaki yango?

Malongi mpe Mayokani 97:10–21.Profeta Joseph Smith ateyaki, “Esika nyonso wapi Basantu basangani ezali Siona, oyo mobali ya bosembo nyonso [to mwasi] akotonga esika ya kimia mpo na bokengi ya baoyo bazali ya ye bana” (Teachings: Joseph Smith, 186). Lolenge boni ekoki biso kotonga Siona na ndako na biso? Mabongi nini tokuti na Malongi mpe Mayokani 97:10–21? Lokola libota, pona libongi to liteya moko okotalela poso oyo.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala mwango ya poso oyo kati na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “I Love to See the Temple,” Children’s Songbook, 95.

Kobongisa Koyekola Makomi Yo Moko

Koma makanisi na yo. Koma mayele ozwi uta na mateya mpe malongi ozali koyekola. Mayele oyo ekoki kokoma eteni ya lisitwale ya moto na moto oyo ekopambola bankola ekoya nsima.

Elilingi
Botongi ya Templo ya Kirtland

Kotongaka Tempelo ya Kirtland, na Walter Rane

Bimisa na lokasa