Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Libwa 6–12. Malongi mpe Mayokani 98–101: “Zala Kimia mpe Yeba Ete Nazali Nzambe”


“Sanza ya Libwa 6–12. Malongi mpe Mayokani 98–101: ‘Zala Kimia mpe Yeba Ete Nazali Nzambe,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 2020)

“Sanza ya Libwa 6–12. Malongi mpe Mayokani 98–101,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Basantu kokimaka batomboki

C. C. A. Christensen (1831–1912), Saints Driven from Jackson County Missouri, c. 1878, tempera on muslin, 77 ¼ × 113 inches. Brigham Young University Museum of Art, likabo ya bankokololo ya C. C. A. Christensen, 1970

Sanza ya Libwa 6–12

Malongi mpe Mayokani 98–101

“Zala Kimia mpe Yeba Ete Nazali Nzambe”

Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 98–101, sala keba na makanisi mpe mayoki oyo eyaka. Lolenge nini okoki kosalela yango mpo ete esalisa yo okoma moto Nzambe alingi yo kokoma?

Koma Mayoki na Yo

Mpo na Basantu ya 1830, Independence na Missouri ezalaki mpenza mabele ya elaka. Ezalaki “esika ya katikakti” ya Siona (tala Malongi mpe Mayokani 57:3)—engumba ya Nzambe na mabele—oyo bango bazalaki komibonza mpenza na ndenge ya makasi mpo na kotonga. Mpo na bango, bosangisi ya Basantu kuna ezalaki ebandeli moko ya elengi mpe kembo ya Boyei ya Mibale. Kasi bazalani na bango na esika wana bamonaki yango makambo na ndenge mosusu. Bazwaki likambo yango na bonsenga ete Nzambe apesaki mabele wana na Basantu, mpe bayokaki nkele oyo ememaki malandi mabe na kotalaka makambo ya politiki, nkita, mpe bomoi ya bato na lisanga mpo na bato mingi uta na eyamba oyo eyebani te kokendaka na etuka wana na lombangu mpenza. Noki-noki mitungisi ekomaki bokaneli, mpe bokaneli ekomaki monyokoli mpe kosalela bokasi. Na sanza ya motoba 1833, babomaki bilo ya kobeta mikanda mpe kobimisa buku ya Eklezia, mpe na sanza ya zomi na moko bapusaki Basantu kosundola bandako na bango ya Jackson County na Missouri na makasi.

Joseph Smith azalaki mosika koleka kilometele 1500 na Kirtland, mpe nsango oyo esalaki baposo mpo na kokomela ye. Kasi Nkolo ayebaki oyo ezalaki kosalema, mpe amonisaki epai ya Profeta mabongi ya kozwa kimia mpe bolendisi oyo esengelaki kolendisa Basantu—mabongi oyo ekoki lisusu kosalisa biso ntango tokutani na monyokoli, ntango bamposa na biso ya bosembo ekokisami te, to ntango tozali na ntina ya kokundolisama ete mitungisi na biso ya mokolo na mokolo nsuka nsuka, na lolenge moko to mosusu, “ekosala elongo mpo na bolamu na [biso] ” (Malongi mpe Mayokani 98:3).

Tala Les Saints, 1:171–93; “Waiting for the Word of the Lord,” Revelations in Context, 196–201.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 98:1–3, 11–14; 101:1–16

Mimekano na ngai ekoki kosala elongo mpo na bolamu na ngai.

Mwa mitungisi na biso na bomoi ewutaka na maponi na biso moko. Misusu ewutaka na maponi ya basusu. Mpe ntango mosusu tosengeli kopamela moto moko te—makambo ya mabe eyaka na yango kaka. Na kozangaka kotala ntina na yango, mpasi ekoki kosalisa bantina ya bonzambe ekokisama. Ntango ozali kotanga makambo oyo etali bampasi ya Basantu na Malongi mpe Mayokani 98:1–3, 11–14 mpe 101:1–16, nini omoni oyo ekoki kosalisa yo na mimekano na yo? Lolenge nini milongo oyo ekoki kobongola lolenge ozali komona mikakatano okutanaka na yango? Maniola boniboni mimekano na yo esanganaki na makambo mosusu mpo na bolamu na yo mpe ekokisaki ntina ya Nzambe na bomoi na yo.

Tala lisusu 2 Nefi 2:2; Malongi mpe Mayokani 90:24.

Malongi mpe Mayokani 98:23–48

Nkolo alingi biso toluka kimia na lolenge na Ye.

Atako makambo nyonso na Malongi mpe Mayokani 98:23–48 ekoki te kotalela efandeli na yo moko na basusu, mabongi nini omoni na kati oyo ekoki kokamba yo ntango basusu basali yo mabe? Ekoki kosalisa na kotiaka elembo na maloba to masakola oyo elimboli boniboni Nkolo alingaki Basantu babongisa mindondo na Missouri.

Tala lisusu Jeffrey R. Holland, “Mosala ya Koyokanisa,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko 2018, 77–79.

Elilingi
Yesu Klisto

Mambi uta na Christ and the Rich Young Ruler, na Heinrich Hofmann

Malongi mpe Mayokani 100

Nkolo abatelaka baoyo basalelaka Ye.

Kaka mwa baposo nsima ya Joseph koyoka nsango ya monyokoli na Missouri, mobongwani moko ya sika asengaki ye akende mobembo na Canada mpo na kokabola nsango malamu elongo na mwana na ye ya mobali. Joseph andimaki, atako azalaki komitungisa mpo na oyo etali kotika libota na ye, mingi mingi na ntina ya monyoko mpe bokaneli na libota na ye mpe Eklezia. Na nzela ya mobembo na bango ya Canada, Joseph mpe moninga na ye, Sidney Rigdon, basambelaki mpo bazwa bolendisi, mpe eteni 100 ezalaki eyano ya Nkolo epai na bango. Nini omoni na eyano ya Nkolo oyo elendisaki mpe esungaki bango?

Ntango mosusu okutanaki lisusu na makambo oyo esengaki yo omeka motungisi na mikumba na yo na Eklezia mpe motungisi mpo na libota na yo. Lolenge nini maloba ya Nkolo na eteni 100 ekoki kosalisa yo na makambo ya boye?

Tala lisusu “A Mission to Canada,” Revelations in Context, 202–7.

Malongi mpe Mayokani 101:43–65

Kolanda toli ya Nkolo esungaka kobatela ngai na kimia.

Lisese oyo ezwami na Malongi mpe Mayokani 101:43–62 epesamaki mpo na kolimbola ntina nini Nkolo apesaki nzela babengana Basantu libanda ya Siona. Ntango ozali kotanga milongo oyo, emoni yo bokokani katikati ya yo moko mpe basali na lisese yango? Okoki komituna: Esila ngai kotia ntembe na mibeko ya Nkolo? Lolenge nini kozanga bondimi to kozanga bomipesi ekoki kopesa nzela na “monguna” azala na nguya na bomoi na ngai? Lolenge nini ekoki ngai kolakisa Nzambe ete nazali “kolinga kokambama na nzela moko malamu mpe elongobani mpo na [ya ngai] lobiko”? (tala milongo 63–65).

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 98:16, 39–40.Nini na milongo oyo ekoki kosalisa biso kozala na kimia mingi koleka na libota na biso? Okoki koyemba nzembo etali kimia to bolimbisi, lokola “Truth Reflects upon Our Senses” (Hymns, no. 273). Bana mike bakoki kosala lisano ya kolimbisana.

Malongi mpe Mayokani 99.Ntango John Murdock abiangemaki mpo na kotika ndako na ye “mpo na kosakola nsango malamu ya libela” (molongo 1), awutaka kala te kozonga na misio moko ya mpasi, oyo ewumelaki mobu moko na Missouri (tala“John Murdock’s Missions to Missouri,” Revelations in Context, 87–89). Nini tomoni na eteni 99 oyo ekokaki kosunga mpe kolendisa Ndeko mobali Murdock? Nsango nini Nkolo azali na yango mpo na biso na emoniseli oyo?

Malongi mpe Mayokani 100:16; 101:3–5, 18.Nsima ya kotanga milongo oyo, okoki kososola boniboni bato basalaka matuli basengeli kotumba ebende makasi mingi mpenza mpo na kolongola mbindo mpe nsima koyema yango na kobambela yango malato mbala na mbala mingi mpe lisusu (tala video “The Refiner’s Fire” on ChurchofJesusChrist.org). Bokoki lisusu koyekola elongo maye matali boniboni biloko mosusu epetolamaka, lokola mai to mungwa. Ntango mosusu bokoki kopetola to kosukola eloko moko elongo na libota. Ntina nini tolingaka kokoma peto? Nini bandakisa oyo eteyi biso na oyo etali boniboni mimekano ekoki kosalisa biso kokoma “bato ya peto”?

Malongi mpe Mayokani 101:22–36.Lolenge boni milongo oyo esungaki Basantu oyo bakutanaki na monioko? Lolenge boni yango ekoki kosunga bato oyo bazali koyoka bobangi na oyo etali ezalela ya mokili lelo?

Mpo na kozwa makanisi mingi mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo ekoki koyembama: “Help Me, Dear Father,” Children’s Songbooks,99.

Kobongisa Boyekoli Makomi Yo Moko

Luka mabongi. Mpaka Richard G. Scott ateyaki: “Ntango bozali koluka boyebi ya molimo, boluka mabongi. … Mabongi ezali bosangisi ya bosolo, ya kotiama liboke mpo na kosalela na banzela mpe makambo ya ndenge na ndenge” (“Kozwaka Boyebi na Molimo,” Ensign, Sanza ya zomi na moko 1993, 86).

Elilingi
batomboki konyokolaka Basantu

Missouri Burning, na Glen S. Hopkinson

Bimisa na lokasa