Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Libwa 20–26. Malongi mpe Mayokani 106-108: “Mpo na Kofungola Lola”


Sanza ya Libwa 20–26. Malongi mpe Mayokani 106–108: ‘Mpo na Kofungola Lola,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

Sanza ya Libwa 20–26. Malongi mpe Mayokani 106–108,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
moi kongengaka na mapata

Sanza ya Libwa 20–26

Malongi mpe Mayokani 106–108

“Mpo na Kofungola Lola”

Mpaka Ulisses Soares ateyaki, “Tosengeli kotikala na [Mobikisi], komizindisaka na makomi, kosepelaka kati na yango, koyekolaka malongi na Ye, mpe kobundaka mpo na kotambwisa bomoi na biso lolenge Ye atambwisaki” (“How Can I Understand?Ensign to Liahona, Sanza ya mitano. 2019, 7). Ntango bomizindisi na Malongi mpe Mayokani 106–8, bokoma banzela oyo bokoki kobunda mpo na kosalela bosolo bomoni na kati awa.

Koma Makanisi na Yo

Na kotala ya liboso, Malongi mpe Mayokani 107 ekoki komonana lokola kaka mpo na ntina ya kobongisa misala ya bonganganzambe kati na ebongiseli moko ya bokambi mpo na Eklezia ya Nkolo. Solo, na ntango emoniseli oyo epesamaki, bandimi ya Eklezia bakomaki ebele koleka mwa motango ya bakambi oyo bazalaki kuna. Boye, kotia mokoloto na misala mpe mikumba ya Bokambi ya Yambo, Lisanga likoki ya Bapostolo Zomi na mibale, Bantuku nsambo, baepisikopo, mpe masanga makoki ezalaki likambo ya mposa makasi mpe ya kosalisa. Kasi ezali na mingi mpenza ya kolobela malako ya bonzambe kati na eteni 107 koleka kaka lolenge ya kobongisa misala mpe masanga makoki ya bonganganzambe. Awa Nkolo azali koteya biso na ntina ya molongo ya bonganganzambe moko ya kala oyo “ebandaki na mikolo ya Adama” (molongo 41). Ntina na yango uta na ebandeli ezali ya kopesa nzela ete bana ya Nzambe—kotangaka mpe yo—ya koyamba makuli ya lobiko mpe kosepela na “mapamboli nyonso ya molimo ya eklezia—mpo na kozwa litomba ya koyambaka mibombamo ya bokonzi ya lola, [mpe] kofungola balola epai na bango” (milongo 18–19).

Tala lisusu “Kozongisa Mosala ya Kala,” Revelations in Context, 208–12.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 106108

Nkolo alakisaka, alendisaka, mpe asungaka baoyo Ye abiangi mpo na kosala.

Na Malongi mpe Mayokani 106 mpe 108, Nkolo apesaki toli mpe bilaka epai ya bandimi mibale oyo babiangamaki mpo na kosala kati na Eklezia. Maloba nini na bimoniseli oyo epesi bolendisi mpe makanisi na ntina ya mosala na yo moko na kati ya bokonzi ya Nzambe? Mibale ya kotala yango oyo:

  • Lolenge nini ezwaki yo “ngolu mpe elikya” mpo na kokoka “kotelema”? (Malongi mpe Mayokani 106:8).

  • Lolenge boni ekoki yo “kozala na bokebi mingi koleka uta sikawa kokende liboso na kobatelaka bandai na yo,” to mayokani? (Malongi mpe Mayokani 108:3).

Maloba mosusu nini uta na biteni 106 mpe 108 ezali motuya mpo na yo?

Tala lisusu Russell M. Nelson, “Kosalisa na Nguya mpe Likoki ya Nzambe,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2018, 68–75; “Warren Cowdery,” Revelations in Context, 219–23; “‘Wrought Upon’ to Seek a Revelation,” Revelations in Context, 224–28.

Malongi mpe Mayokani 107

Nkolo akambaka Eklezia na Ye na nzela ya likoki ya bonganganzambe.

Ntango oyekolaki Bozongisi ya nsango malamu, okokaki komona ete Nkolo alimbolaka mbala mingi te malongi na mobimba na emoniseli moko. Na esika na yango, Ye amonisaka makambo “molongo likolo ya molongo” (Malongi mpe Mayokani 98:12) ntango makambo mazali kosenga yango. Atako Nkolo apesaka na kala malako na ntina ya bonganganzambe na ebandeli ya 1829 (tala, ndakisa, biteni 20 mpe 84), Ye apesaki malakisi mosusu epai ya Basantu na 1835 na ntina ya misala se moko wana ya bonganganzambe oyo esengeli mpo na koyangela mpe kokamba etonga na ye oyo ezali kokola.

Kotangaka misala ya bonganganzambe oyo elandi, kanisa lolenge nini okoki kotombola baye bazali kosala na mabiangi oyo na nzela ya “motema otieli bango, bondimi, [n]sambo na bino” (Malongi mpe Mayokani 107:22).

Malongi mpe Mayokani 107:1–20

Makuli ya bonganganzambe epesaka mapamboli ya molimo mpe ya ntango epai ya bana nyoso ya Tata na Lola.

Mpaka Neil L. Andersen ateyaki: “Bonganganzambe ezali nguya mpe bokonzi ya Nzambe oyo epesami mpo na lobiko mpe lipamboli ya banso—mibali, basi, mpe bana. … Ntango tolongobani, makuli ya Bonganganzambe efulaka bomoi na biso na mabele mpe elengelaka biso mpo na bilaka kitoko ya mokili oyo ezali koya” (“Power in the Priesthood,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2013, 92). Kotangaka Malongi mpe Mayokani 107:1–20 (tala mingi mingi molongo 18–20) mpe ndambo etikali ya mateya ya Mpaka Andersen, kanisa kokoma mayoki ozwi na ntina ya lolenge nini nguya ya Nzambe etondisaka bomoi na yo na mabele mpe elengelaka yo mpo na boseko. Nini ozali kosala mpo na kozwa mingi koleka—mpe kosunga basusu bazwa—mapamboli wana ?

Tala lisusu Malongi mpe Mayokani 84:19–27; Dallin H. Oaks, “The Melchizedek Priesthood and the Keys,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2020, 69–72.

Malongi mpe Mayokani 107:41–57

Bonganganzambe epambolaka mabota.

Adama alingaki bana na ye bapambolama na bonganganzambe. Bilaka nini azwaki? (tala molongo 4255). Ntango otangi maye Adama asalaki, kanisa bamposa na yo moko mpo na libota na yo mpo na kosepela na mapamboli ya bonganganzambe. Nini ofulami kosala mpo na kosunga libota na yo ezwa mapamboli maye?

Elilingi
Adama azali kopambola bana na ye

Adama Azali Kopambolaka Bana na Ye, na Clark Kelley Price

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 106:6.Nini libota na biso ekoki koyokisa “esengo na lola”?

Malongi mpe Mayokani 107:22.Nini tozali kosala mpo na kosunga bakambi na biso “na nzela ya … kotiela bango motema, bondimi, mpe losambo”?

Malongi mpe Mayokani 107:27–31, 85.Mabongi to mateya oyo ekambaka masanga ya Eklezia ekoki lisusu kosalisa biso tosangana elongo lokola libota. Mabongi nini na kati ya milongo oyo ekoki biso kosalela na masanga ya libota? (Tala M. Russell Ballard, “Family Councils,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2016, 63–65.)

Malongi mpe Mayokani 107:99–100.Pesa moto moko ya libota malakisi ekomama mpo na mosala ya ndako moko, mpe bengisa ye apona lolenge ya kosala mosala yango: na molende, na goyi-goyi, to na kozanga kotanga malakisi yango. Tika ndambo etikali ya bato ya libota oyo batala ye kosala mosala yango mpe bakanisa lolenge nini moto ya libota yango akopona. Nsima tika bato ya libota mosusu basala na ntango na bango mpe. Mpo na nini Nkolo asengi biso toyekola nyonso mibale mikumba na biso mpe tosala yango na molende nyonso? (Tala Becky Craven, “Careful versus Casual,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2019, 9–11.)

Malongi mpe Mayokani 108:7.Lolenge nini ekoki biso kolendisana na masolo na biso? na nsambo na biso? na mateya, to na bolendisi na biso? na misala na biso nyonso? Okoki kopona kosala likolo ya moko ya oyo lokola libota.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo kati na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “We Listen to a Prophet’s Voice,” Hymns, no. 22.

Kobongisa Boyekoli ya Moto Ye Moko

Koma Makanisi. Ntango mayoki ya molimo to makanisi eyeli yo, koma yango. Ntango osali yango, ozali kolakisa Nkolo ete osepeli na bokambi na Ye. (Tala Koteya na Lolenge ya Mobikisi, 1230.)

Elilingi
Melekisedeke Apamboli Abalama

Melekisedeke Apamboli Abalama, na Walter Rane

Bimisa na lokasa