“Sanza ya libwa 27–Sanza ya zomi 3. Malongi mpe Mayokani 109–110: ‘Ezali Ndako na Yo, Esika ya Bosantu na Yo,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)
“Sanza ya libwa 27–Sanza ya zomi 3. Malongi mpe Mayokani 109–110,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021
Sanza ya libwa 27–Sanza ya zomi 3
Malongi mpe Mayokani 109–110
Ezali Ndako na Yo, Esika ya Bosantu na Yo”
Kolobelaka Malongi mpe Mayokani 109:24-28, Mpaka David A. Bednar alobaki, “Nabengisi bino boyekola mbala na mbala mpe bomanyola na nzela ya losambo nini makomi oyo ekosala mpo na bomoi na bino mpe mpo na libota na bino” (“Honorably Hold a Name and Standing,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2009, 99). Kanisa libengisi oyo ntango ozali koyekola.
Koma Makanisi na Yo
Bikuke ya Tempelo ya Kirtland esengelaki kofungwama te kino 8:00 na ntongo ya sanza ya misato 27, 1836. Kasi Basantu oyo bazalaki kolikya kokende na mosala ya kobulisa babandaki kosala molongo tongotongo na 7:00. Ntango bakiti mpe banzela ya koleka kati na bakiti etondaki nokinoki na bakumbameli oyo balingaki komona likambo yango, Joseph Smith apesaki makanisi mpo na esika ya kobakisa soki bato baleki mingi. Ntango esika yango etondaki, liyangani ya mibale elengelamaki. Ezalaki kaka bato na bomoi oyo bazalaki motema likolo mpo na kozala wana te. Banzeneneke ya kotanga te batatolaki ete bamonaki banzelu, na kati ya tempelo mpe kutu likolo ya motondo, na ntango mpe nsima ya bobulisi. Emonanaki mpenza lokola ete “mampinga ya lola” mayaki mpo na “koyemba mpe [mpo na] koganga” elongo na Basantu ya Mikolo ya Nsuka (“L Esprit du Dieu Saint,” Cantiques, no. 2).
Mpo na nini esengo monene wana—na ngambo mibale ya elamba? Elaka ete Basantu “bakopambolama na nguya uta na likolo” ezalaki ntina moko basanganaki na Ohio mbala ya yambo (Malongi mpe Mayokani 38:32). Mpe makambo ya motuya elakelamaki mpo na mikolo ekoya. “Oyo,” elobaki Nkolo, “ezali ebandeli ya mapamboli oyo ekosopana likolo ya mito ya bato na ngai” (Malongi mpe Mayokani 110:10). Eleko oyo tozali kobika sikawa—na botamboli mbanguya mosala ya tempelo mpe makuli mazwami mpo na bafunda ya bato na bomoi mpe bawa—ebandaki na Kirtland, ntango “elamba likolo ya mabele [ezalaki] kobanda kopasuka” (“L Esprit du Dieu Saint”).
Tala lisusu Basantu, 1:232-41, “Ndako moko mpo Nzambe na Biso,” Revelations in Context, 169-72.
Makanisi mpo na Koyekola Yo Moko
Nkolo alingi kopambola ngai kati na ndako na Ye esantu.
Na ndenge mosusu Tempelo ya Kirtland ekesenaki na batempelo toyebi lelo. Ezalaki na etumbelo mpe liziba ya libatisi moko te, mpe makuli lokola libatisi mpo na bawa mpe bokangisi ezongisamaki naino te. Kasi mapamboli elimbolami na eteni 109, losambo ya kobulisa mpo na Tempelo ya Kirtland, ezali mapamboli tozali kozwa na ndako ya Nkolo lelo. Tala lisusu milongo oyo elandi mpo na komona ndambu ya mapamboli oyo. Ntango ozali kotanga yango, manyola mpo na nini mazali motuya mpo na yo mpe libota na yo.
Milongo 5, 12–13 (tala lisusu Malongi mpe Mayokani 110:6–8): Na tempelo Nkolo akoki komimonisa Ye moko epai na biso mpe tokoki koyoka nguya na Ye.
Milongo 9, 17–19, 26, 78–79: Na tempelo tozwaka likolo na biso moko nkombo ya Nkolo.
Milongo 22–23: Ntango tosali mpe totosi mayokani ya tempelo, Nkolo apesi biso nguya ya kosala mosala na Ye.
Milongo 24–33: Ntango tokeyi na tempelo na bolongobani, tokoki kozwa bobateli ya Nkolo.
Mapamboli mosusu:
Molimo efuli yo kosala nini mpo na kozwa mapamboli oyo?
Losambo ya bobulisi Tempelo ya Kirtland ekoki koteya ngai maye matali losambo.
Eteni 109 ezali losambo moko ya bobulisi oyo epesamaki epai ya Joseph Smith na nzela ya emoniseli (tala moto ya eteni). Oyekoli nini na ntina ya losambo ya eteni oyo? Ntango ozali kotanga yango, okoki kokanisa nsambo ya yomei. Mayoki nini ozwi oyo ekoki kokolisa bosololi na yo elongo na Tata na Lola? Ndakisa, Profeta asambelelaki nini na losambo oyo?
Nkolo akoki komimonisa Ye moko epai na ngai kati na tempelo.
Oyoki nini na ntina ya Mobikisi nsima ya kotangaka Malongi mpe Mayokani 110:1–10? Lolenge nini Ye amimonisi Ye moko epai na yo kati na tempelo? Na banzela nini Ye asalisi yo oyeba ete Andimaka makasi mpe mabonza na yo?
Malongi mpe Mayokani 110:11–16
Bafungola ya bonganganzambe oyo esengeli mpo na kokokisa mosala ya Nzambe ezali kati na Eklezia lelo.
Mpo na kososola bafungola ya bonganganzambe oyo Mose, Eliasi, mpe Elija bapesaki epai ya Joseph Smith mpe Oliver Cowdery kati na Tempelo ya Kirtland, bokoki kotanga nsango ya Mpaka Quentin L. Cook “Milengela mpo na Kokutana na Nzambe” (Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2018, 114–17). Mpaka Cook alimboli lolenge nini bafungola oyo ekokani na mosala ya Eklezia lelo. Okoki lisusu kokanisa koyekola na ntina ya baprofeta ya kala na koyekolaka “Mose,” “Eliasi,” and “Eliya” kati na Mokambi mpo na Makomi (scriptures.ChurchofJesusChrist.org). Manyola maye bokoki kosala mpo na kosalisa na mosala etali bafungola oyo.
Tala lisusu “Priesthood Keys,” True to the Faith, 126–27; Henry B. Eyring, “He Goes before Us,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2020, 66–69.
Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa
-
Malongi mpe Mayokani 109.Lokola libota, bozwa mwa milongo kati na eteni 109 oyo efuli bino bolekisa ngonga mingi kati na tempelo (ndakisa, botala milongo ekomami na nse ya “Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Yo Moko”). Bosolola na ntina ya lolenge nini bokoki kosala maye Mokambi Russell M. Nelson apeseli makanisi: “Bozala na lolenge ya kobongisa bokutani mbala na mbala na Nkolo—ya kozala na ndako ya Ye ya esantu—nsima kobatela bokutani wana na sikisiki mpe esengo” (“Becoming Exemplary Latter-day Saints,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 114). Soki yo to libota na yo bokei naino te na tempelo, bokoki kotala temples.ChurchofJesusChrist.org mpo na komilengela mpo na kokende.
-
Malongi mpe Mayokani 109:78–80.Loyembo “L Esprit du Dieu Saint” (cantiques, no. 2) ekomamaki mpo na bobulisi ya Tempelo ya Kirtland—mpe eyembamaka na bobulisi ya tempelo nyonso uta ntango wana. Bokoki koyemba loyembo oyo elongo mpe komona maloba oyo ezali kokolisa botondi na bino mpo na batempelo ya mikolo ya nsuka. Mokangano nini ezali kati na loyembo oyo mpe nsango ya Malongi mpe Mayokani 109:78-80?
Okoki kozwa losambo ya bobublisi mpo na tempelo oyo ezali penepene mingi na yo na temples.ChurchofJesusChrist.org.
-
Malongi mpe Mayokani 110.Lokola bato ya libota na yo bazali kotanga eteni 110 mpe kotala elilingi na nsuka ya moango to liteya oyo, bengisa bango bakanisa lolenge nini balingaki komiyoka soki bazalaki elongo na Joseph Smith mpe Oliver Cowdery na Tempelo ya Kirtland. Pesa libota na yo libaku ya kokabola lolenge bazali koyoka na ntina ya Mobikisi.
-
Malongi mpe Mayokani 110:15.Nini ekoki kosunga “kobalola mitema” ya bana epai ya bankoko na bango? Bokoki komona mwa makanisi kitoko na FamilySearch.org/discovery. Bokoki kosala elongo mpo na kokitola bankoko oyo basengeli makuli ya tempelo mpe komilemgela mpo na kosala makuli wana na tempelo. Bokoki lisusu kosolola na ntina ya lolenge mosala oyo ezongisama na Eliya na Tempelo ya Kirtland ekolisi bolingo na bino mpo na bankoko na bino.
Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo kati na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.
Loyembo oyo ekoki koyembama: “L Esprit du Dieu Saint,” Cantiques, no. 2.
Mingongo ya Bozongisi
Mamonisi ya Molimo mpe Tempelo ya Kirtland
Na nse ezali maloba ya Basantu ya Mikolo ya Nsuka oyo bazalaki na Tempelo ya Kirtland na ntango ya bobulisi na yango mpe na makita mosusu oyo elandaki. Mingi bakokanisaki makambo bamonaki na oyo ya Basantu ya kala bamonaki ntango bazalaki “ya kolatisama na nguya uta na likolo” na mokolo ya bosopani ya molimo (Luka 24:49; tala lisusu Misala 2:1–4; Malongi mpe Mayokani 109:36–37).
Eliza R. Snow
“Milulu ya bobulisi wana ekoki kozongelama, kasi lokota moko te ya moto ya kufa ekoki kolimbola mamonisi ya lola ya mokolo wana ya esengo. Banzelu babimelaki bato basusu, ntango bato nyonso oyo bazalaki wana bayokaki ete Nzambe azalaki kati na bango wana, mpe motema moko na moko etondisamaki na ‘esengo oyo ekoki kolimbolama te mpe etondaki na nkembo.’”1
Sylvia Cutler Webb
“Moko ya makambo nakundolakana ebandeli mpenza ezalaki bobulisi ya Tempelo. Tata na ngai amemaki biso na mabolongo na ye mpe alobaki na biso mpo na nini tozalaki kokende mpe nini elingaki koloba kobulisa ndako epai ya Nzambe. Mpe atako nazalaki elenge mingi mpenza na ntango wana, nazali komikundola polele libaku yango. Nakoki kotala nsima na ntaka moke ya mibu mpe komona lokola namonaki na ntango wana Profeta Joseph, kotelemaka na maboko na ye ya kotombwama epai na lola, elongi na ye pendoo lokola na putulu, mpinzoli kokitaka na matama na ye ntango azalaki koloba na mokolo wana ya esengo. Penepene banso bazalaki na mpizoli na miso. Ndako yango ezalaki ya kotonda mpenza na bato ete bana bazalaki mingi mingi kofanda na mabolongo ya bamikolo; ndeko na ngai ya mwasi afandaki likolo ya oyo ya tata, ngai likolo ya mabolongo ya mama. Nakoki kutu komikundola bilamba tolataki. Mayele na ngai ezalaki ya bolenge mingi mpenza na ntango wana mpo na kososola ntina na yango nyonso mobimba, kasi lokola ntango elekaki na nasosolaki yango moke moke, mpe nazali na botondi ete nazalaki na libaku ya kozala kuna.”2
Oliver Cowdery
“Na mpokwa nakutanaki na bakonzi ya eklezia na ndako ya Nkolo. Molimo esopanaki—namonaki nkembo ya nzambe, lokola lipata monene, kokita mpe kotelema likolo ya ndako, mpe etondisaki yango lokola mopepe makasi ya nguya. Namonaki ndembo ya kopanzana, lokola oyo ya moto kotelemaka likolo ya bato mingi, … ntango bazalaki koloba nkota mosusu mpe kosakola.”3
Benjamin Brown
“Mamoni mingi [ezalaki] komonana. Moko amonaki likonzi ya moto to lipata kotelema likolo ya ndako, ya kongenga lokola ntango moi engengaka na lipata lokola wolo. Basusu mibale bamonaki bato misato kotambolaka malembe na ndako na bafungola ya kongenga na maboko na bango, mpe lisusu moniololo moko ya kongenga na maboko na bango.”4
Orson Pratt
“Nzambe azalaki wana, banzelu na ye bazalaki wana, Molimo Mosantu azalaki na katikati ya bato … mpe batondisamaki uta na motole ya mito na bango tii na nse ya makolo na bango na nguya mpe bofuli ya Molimo Mosantu.”5
Nancy Naomi Alexander Tracy
“[Ntango] Tempelo esilaki mpe ebulisamaki … ezalaki mikolo na ngai mibale ya esengo mingi mpenza. Loyembo ekokaki oyo esalamaki mpo na libaku yango ezalaki ‘Molimo ya Nzambe ezali Kopela Lokola Moto .’ Ezalaki mpenza solo ete Nguya ya Lola efandaki likolo ya ndako wana. … Nayokaki ete ezalaki lola likolo ya mabele.”6