Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya zomi 25–31. Malongi mpe Mayokani 124: “Ndako na Nkombo na Ngai”


Sanza ya zomi 25–31. Malongi mpe Mayokani 124: ‘Ndako na Nkombo na Ngai,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

Sanza ya zomi 25–31. Malongi mpe Mayokani 124,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
Nauvoo

Nauvoo Engumba ya Kitoko, na Larry Winborg

Sanza ya zomi 25–31

Malongi mpe Mayokani 124

“Ndako na Nkombo na Ngai”

Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 124, manyola mapamboli Nkolo abengisaki Bsantu kozwa na Nauvoo mpe mapamboli azali kopesa yo.

Koma Makanisi na Yo

Lokola mibu motoba mileki ezalaki mpasi mpo na Basantu, makambu ebandaki kotambola malamu na eleko ya milona ya 1839: Basantu oyo bakimaki bayokelaki bango mawa na bana mboka ya Quincy, Illinois. Babateli bapesaki ndingisa na Profeta Joseph Smith mpe bakambi misusu ya Eklezia bakima bowumbu na Missouri. Mpe Eklezia ewutaki kosomba mabele na Illinois esika oyo Basantu bakokaki kosangana lisusu. Iyo, ezalaki potopoto, mabele etonda na bangungi, kasi kokokanisa yango na mitungisi oyo Basantu bakutanaki na yango, oyo emonanaki mbele malamu. Kasi balongolaki potopoto mpe bayemaki moango mpo na kotonga engumba ya sika, oyo bapesaki nkombo Nauvoo. Elingi koloba “kitoko” na lokota ya Ebele, atako ezalaki mingi koleka maloba ya bondimi na esika ya ndimbola ebongi malamu ya esika, ata na moke na ntango ya liboso. Na ntango wana, Nkolo azalaki kolakisa Profeta na Ye lolenge ya lombango. Azalaki na babosolo mpe makuli mingi ya kozongisa, mpe Azalaki na mposa ya tempelo ya bule esika oyo Basantu bakokaki kozwa yango. Na banzela mingi, mayoki se moko oyo ya bondimi mpe ya lombango ezali na ntina monene na mosala ya Nkolo lelo.

Ntango Nauvoo ekomaki engumba kitoko na tempelo ya kitoko, basundolaki nsuka nsuka nyonso mibale. Kasi mosala ya solo ya kitoko ya Nkolo, ntango nyonso, ezalaki ya “kolatisa yo motole ya lokumu, bozangi kufa, mpe bomoi ya seko” (Malongi mpe Mayokani 124:55), mpe mosala yango esilaka te.

Tala Les Saints, 1:399–427; “Organizing the Church in Nauvoo,” Revelations in Context, 264–71.

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 124:12–21

Nakoki kozala moyekoli oyo Nkolo atielaka motema.

Atako bakambi banene mingi batikaki Eklezia na nsuka ya 1830, bandimi ebele batikalaki sembo. Basantu oyo ya sembompe basusu oyo bayikaki mpiko na mikakatano ya Missouri lokola mpe baoyo bakotaki kala mingi te na Eklezia. Na Malongi mpe Mayokani 124:12–21, Nkolo alobaki makasi na ntina ya ndambo kati na bango. Boyebi nini na ntina ya likambo ya kozala moyekoli bozwi na kati ya maloba na Ye? Ezali na eloko songolo na ntina ya Basantu oyo ya sembo oyo efuli yo kozala lokola bango? Okoki lisusu komanyola lolenge nini Nkolo atalisaki bolingo na Ye epai na yo.

Malongi mpe Mayokani 124:22–24, 60–61

Nkolo alingi ngai nayamba mpe nandima basusu.

Na kotalaka oyo Basantu bawutaki konyokwama na Missouri, bakokaki komekama na kobombama mpe kolembisa batali na Nauvoo. Tia likambo wana na makanisi ntango otangi Malongi mpe Mayokani 124:22–24, 60–61. Nini etuti yo na ntina ya makebisi ya Nkolo mpo na kotonga “ndako mpo na bapaya”? (molongo 23). Maloba oyo eteyi yo nini na ntina ya etinda ya Eklezia na Ye? Manyola lolenge nini malakisi oyo ekoki kosalema na yo mpe na libota na yo.

Tala lisusu “Monginga ya Banso,” video, ChurchofJesusChrist.org.

Malongi mpe Mayokani 124:25–45, 55

Nkolo atindi biso totonga batempelo mpo ete tokoka kozwa makuli ya bule.

Yango ekomaki te kokamwa na Basantu ya mikolo ya Nsuka baoyo basanganaki yambo na Nauvoo, Nkolo apesaki bango makebisi na ntina ya kotonga tempelo—kaka lokola asalaki na Ohio mpe Missouri. Ozwi nini na kati ya Malongi mpe Mayokani 124:25–45, 55 oyo esalisi yo kososola mpo na nini Nkolo alobaki, “Bato na ngai batindami ntango nyonso kotonga [batempelo] na nkombo na ngai ya bule”? (molongo 39).

Uta Tempelo ya Nauvoo etongamaki, batempelo koleka 200 esili kotongama to kosakolama. Mokambi President Russell M. Nelson ateyaki: “Toyebi ete ntango na biso na kati ya tempelo ezali ntina mpo na lobiko mpe bonetoli na biso mpe mpo na libota na biso. … Mitambo ya monguna ezali se komata makasi, na bobakisami mpe na ndenge na ndenge. Bosenga na biso ya kozala na kati ya tempelo mbala na mbala naino ekomi makasi te” (“Kokoma Basantu ya Ndakisa ya mikolo ya Nsuka,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2018, 114). Lolenge nini tempelo esungaki yo otelemela “kobundisama na monguna”? Oyoki nini etuti yo mpo na kosala na kolandaka toli ya Mokambi Nelson?

Tala lisusu Mateya ya Mambi ya Kala ya Eklezia, “Nauvoo Temple,” ChurchofJesusChrist.org/study/church-history.

Elilingi
Joseph Smith na bato kotongaka Tempelo ya Nauvoo

Joseph Smith na Tempelo ya Nauvoo, na Gary E. Smith

Malongi mpe Mayokani 124:84–118

Nkolo alingi apesa ngai toli ya ntina mpo na bomoi na ngai.

Milongo 84–118 etondi na toli mpo na bato songolo, mpe ndambo na yango ekoki komonanan na ntina te na bomoi na yo. Kasi okoki mpe lisusu kozwa eloko moko osengeli koyoka. Kanisa kotuna Nkolo nsango nini Azali na yango mpo na yo na milongo oyo, mpe luka bokambi ya Molimo mpo na kozwa yango. Nsima zwa mokano ya kosala oyo ekosunga yo osalela yango. Ndakisa, lolenge nini kozala na komikitisa makasi esungaka yo ozwa Molimo? (tala molongo 97).

Okoki lisusu komanyola liteya mosusu Nkolo apesaki yo. Lolenge nini osalelaka yango?

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 124:2–11.Soki Nkolo ayebisaki libota na yo “kosala esakola ya lipombo ya nsango malamu na ngai” mpo na “bayangeli ya mokili” (milongo 2–3), esakola na yo ekoloba nini? Kanisa kosala esakola moko elongo, mpe bengisa bandeko ya libota balobela bosolo ya nsango malamu oyo balingi kokotisa.

Malongi mpe Mayokani 124:15.Yango elingi koloba nini kozala na bosembo? Mpo na nini Nkolo atalaka ezalela ya bosembo na motuya mingi? Bandakisa nini ya bosembo libota na yo esili komona? (Tala lisusu Jeunes Soyez Fort, 19.)

Malongi mpe Mayokani 124:28–29, 40–41, 55.Oyekoli nini uta milongo oyo na ntina ya mpo na nini Nkolo atindaka biso totonga batempelo? Libota na yo ekoki kolinga koyema elilingi ya tempelo to kotonga moko na mabanga to bisaleli misusu. Ntango bosali yango, bokoki kosolola mpo na nini bozali na botondi ete tozali na batempelo lelo mpe mpo na nini tosengeli kogumbamela kati na yango mbala na mbala.

Malongi mpe Mayokani 124:91–92.Libota na yo ekoki kosolola na ntina ya mapamboli ya bonkoko? Bandeko ya libota oyo bazwa mapamboli na bango ya bonkoko bakoki kokabola lolenge nini yango ezalaki mpo na kozwa moko mpe lolenge nini yango epambolaki bango. Bokoki lisusu kotala “Mapamboli ya Bonkoko” (Gospel Topics, topics.ChurchofJesusChrist.org).

Mpo na makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, tala moango ya poso oyo na kati ya Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “I Love to See the Temple,” Chants pour Enfants, 95.

Elilingi
elembo ya mingongo ya bozongisi

Mingongo ya Bozongisi

Lingomba ya Mama Basungi

Elilingi
Joseph mpe Emma Smith mpe basi mosusu

Langi ya Lingomba ya Mama Basungi na Paul Mann

Na 1842, nsima ya kobopngisama ya Lingomba ya Bamama Basungi na Nauvoo, Illinois, Profeta Joseph Smith alobaki, “Eklezia ebongisamaki naino malamu te kino basi babongisamaki.”1 Na lolenge moko, liteya moko ya Bozongisi ya Eklezia ya Nkolo mpe bonganganzambe na yango (tala Malongi mpe Mayokani 107) ezali ya kokoka te kino ekotisi liteya ya Lingomba ya Bamama Basungi, oyo ezali yango moko “bozongisi ya ndakisa moko ya kala” ya basi oyo bazalaki bayekoli ya Yesu Klisto.2

Eliza R. Snow azalaki na mokumba monene na kati ya bozongisi wana. Azalaki wana ntango Lingomba ya Bamama Basungi ebongisamaki yambo mpe, lokola sekeletele ya lingomba, azalaki kokoma na ntango ya makita. Atatolaki moto ya yambo ete Lingomba ya Bamama Basungi ebongisamaki “na kolandaka ndakisa ya bonganganzambe.”3 Oyo elandi ezali maloba na ye, oyo ekomamaki ntango azalaki kosalelalokola Mokambi Monene ya Lingomba ya Bamama Basungi, mpo na kosunga bandeko na ye ya basi basosola mosala ya bonzambe oyo epesamaki na bana basi ya liyokani ya Nzambe.

Mpo na koyekola mingi na ntina ya lolenge nini Lingomba ya Bamama Basungi ebongisamaki, tala Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2017), 1–25; Mibu Ntuku mitano ya Yambo ya Lingomba ya Bamama Basungi (2016), 3–175.

Eliza R. Snow

Elilingi
Eliza R. Snow, na Lewis Ramsey

“Atako nkombo ya [Lingomba ya Bamama Basungi] ekoki kozala ya mokolo ya sika, eyangeli to etuluku oyo ezali ya kala. [Joseph Smith] ayebisaki biso, ete lingomba kaka moko oyo ezalaki na kati ya Eklezia ya kala, lolenge moko na oyo esalemaki na makomi ya Boyokani ya Sika, kosalelaka nkombo, ‘mwana mwasi aponama’ [tala 2 Yoane 1:1; Malongi mpe Mayokani 25:3].

“Oyo ezali lingomba oyo ekoki te kozala soki Bonganganzambe ezalaki te, uta na likambo oyo etali bakambi na yango nyonso mpe nguya uta na ebandela wana. Ntango Bonganganzambe elongolamaki na mabele, etuluku oyo mpe makambo nyonso mosusu ya bosolo ya Eklezia ya Yesu Klisto likolo ya mabele, ekotaki molili. …

“Kozala na kati ya lingomba ya ‘Bamama Basungi ya Nauvoo,’ … mpe kozala na boyebi na kati ya lingomba wana, ntango mosusu nakoki kosolola mwa ndambo ya toli oyo ekosunga bana basi ya Siona na kokendaka liboso mokumba monene oyo ya ntina, oyo etondisami na mikumba ya sika mpe ebele. Soki elenge mwasi songolo mpe bamama na Yisalaele bayoki na ndambo ya mikumba na bango kati ya boyangeli na bango, bakozwa sikawa makoki mpo na nguya mpe bompikiliki ya kosala bolamu na oyo bapesameli mokumba na yango. …

Elilingi
Red Brick Store

Lingomba ya Bamama Basungi ebongisamaki na kati ya ndako ya likolo ya Red Brick Store.

“Soki mituna eyei na makanisi, ya moto songolo, Nini ezali ntina ya Lingomba ya Bamama Basungi? Nakoki koyanola—mpo na kosala bolamu—mpo na kosenga ete oyo nyonso azali na makoki oyo tozali na yango mpo na kosala bolamu, asala yango kaka mpo na kosunga babola te kasi mpo na kobikisa milimo. Bosangisi ya makoki ekokokisa makambo mingi koleka oyo ekoki kokokisama te na moto oyo aleki banso na bokasi. …

“Na kosalisaka babola, Lingomba ya Bamama Basungi ezali na mikumba misusu ya kosala koleka lisungi oyo esengami na nzoto. Bobola ya mayele mpe maladi ya motema, yango mpe esengaka bokebi; mpe mbala mingi liloba ya bosembo—mwa maloba moke ya toli, to atako mwa boyambi ya loboko ya bolingo mpe bosepeli malamu koleka etali mosolo ya wolo. …

“Ntango Basantu basangani uta na mboka ya bapaya, ntango bazali bapaya epai ya moto nyonso, mpe bazali pembeni ya kokambama mosika na baoyo babombanaka mpo na kokosa, Lingomba ya Bamama [Basungi] esengeli kozala na mpiko ya kotala nsima na [bango], mpo na kotalisa bango kati ya lingomba oyo ekobongisa mpe kotombola bango, mpe likolo ya bokasi nyonso na bondimi ya Nsango malamu, mpe kosalaka bongo, ekoki kozala esalelo mpo na kobikisa mingi.

“Ekoki kosenga babuku ya mikanda minene mpo na kolimbola misala, matomba mpe mikumba oyo eyaka na kati ya boyebi ya Lingomba. … Kende na yango (na nse ya bokambi ya episikopo na yo) na kimia, na bosembo, na bompikiliki, na lisanga mpe na losambo, mpe Nzambe akolatisa makasi na yo motole ya elonga.”4

Matangi

  1. Mateya ya Bakambi ya Eklezia: Joseph Smith (2007), 451.

  2. Daughters in My Kingdom: The History and Work of Relief Society (2017), 1.

  3. Joseph Smith, kati ya Sarah M. Kimball, “Auto-biography,” Woman’s Exponent, Sanza ya libwa. 1, 1883, 51.

  4. “Lingomba ya Bamama Basungi,” Deseret News, Sanza ya minei. 22, 1868, 81.

Elilingi
Tempelo ya Nauvoo

Tempelo ya Nauvoo na George D. Durrant

Bimisa na lokasa