Sanza ya Zomi na Moko 1–7. Malongi mpe Mayokani 125–128: “Mongongo ya Bosepeli mpo na Bato na Bomoi mpe Bawei’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)
Sanza ya Zomi na Moko 1–7. Malongi mpe Mayokani 125–128,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021
Sanza ya Zomi na Moko 1–7.
Malongi mpe Mayokani 125–128
“Mongongo ya Bosepeli mpo na Bato na bomoi mpe Bawei’”
Mikundola kokoma mayoki na yo ntango ozali koyekola Malongi mpe Mayokani 125–28 mpo ete okoka kosalela yango mpe kokabola yango na basusu.
Koma Mayoki na Yo
Na sanza ya mwambe 1840, mwasi moko na kati ya mpasi Jane Neyman azalaki koyoka Profeta Joseph kolobaka na matanga ya moninga na ye Seymour Brunson. elenge Mwana mobali ya Jane ye moko Cyrus lisusu akufaki kala mingi te. Kobakisaka na mawa na ye ezalaki likambo oyo ete Cyrus azwaki libatisi naino te, mpe Jane amitungisaki mpo na nini yango elingaki koloba mpo na molimo na ye ya seko. Joseph ayebaki boniboni ayokaki; amitungisaki na likambo moko wana na ntina ya ndeko mobali na ye Alvin, oyo mpe lokola akufaki liboso ya kobatisama. Boye Profeta akanaki kokabola elongo na Jane, mpe moto mosusu na matanga, nini Nkolo abimiselaki ye mpo na oyo etali baye bakufa na kozangaka kozwa makuli ya nsango malamu—mpe nini tokoki kosala mpo na kosalisa bango.
Malongi ya libatisi mpo na bawei esepelisaki Basantu; makanisi na bango ekutanaki mbala moko na baboti, bankoko, mpe bato ya libota mosusu oyo bakufa. Sikoyo ezalaki na elikya mpo na bango! Joseph akabolaki esengo na bango, mpe asalelaki maloba ya esengo, ya kitoko mpo na kolobela nini Nkolo ateyaki ye etali lobiko ya bawei: “Tika bangomba eganga na esengo, mpe bino balobwaku bobelela makasi, mpe bino bambu mpe mabele makawuka boloba makamwisi ya Mokonzi na bino ya Seko!” (Malongi mpe Mayokani 128:23).
Tala Saints, 1:415–27; “Letters on Baptism for the Dead,” Revelations in Context, 272–76.
Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko
Nkolo alingi nabatela libota na ngai.
Nsima ya kozonga na ndako uta na bamisio na ye mingi ya nsuka na Angletere, Brigham Young azwaki libiangi mosusu ya motuya uta na Nkolo—mpo na “kobatela mpenza [ya ye] libota” (molongo 3), oyo bayokaki mpasi ntango azalaki te. Ntango ozali komanyola lolenge boni toli oyo mpe mosusu na eteni 126 etali yo, kanisa maloba oyo uta na Mokambi Bonnie L. Oscarson, Mokambi monene ya Bilenge basi ya Kala:
“Mikundola ete bamposa minene ekoki kozala oyo ezalaka kaka liboso na bino. Bobanda mosala na bino na bandako na bino moko mpe na mabota na bino moko. Yango ezali mikangano oyo ekoki kozala ya seko. Ata soki—mpe ntango mosusu mingi mingi soki—ezalela ya libota na bino ezali ya kokoka moke mingi, okoki komona ndenge ya kosalisa, kotombola, mpe kolendisa. Bobanda wapi bozali, bolinga bango lokola bazali, mpe bomilengela mpo na libota bolingi kozala na yango lobi” (“The Needs before Us,” Ensign to Liahona, Sanzaya zomi na moko. 2017, 27).
Tala lisusu “Take Special Care of Your Family,” Revelations in Context, 242–49.
Nkolo ayebi bisengo mpe mawa na ngai.
Kofunda ya lokuta mpe kokana kokanga etindaki lisusu Joseph Smith na kobombama na sanza ya mwambe. Mpe kasi maloba akomelaki Basantu na ntango mawa (sikoyo Malongi mpe Mayokani 127) ezali mpenza ya malamu mpe esengo. Nini milongo 2–4 elobeli yo mpo na oyo etali Nzambe? mpe boniboni okoki kotelemela mikakatano na yo moko?
Kanisa kokoma lolenge nini Nkolo azali kosunga yo na “mai ya mozindo” ya bomoi na yo.
Malongi mpe Mayokani 127:5–8 127:5–8; 128:1–8
“Nyonso okokoma na mabele ekokomama na lola.”
Ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 127:5–8; 128:1–8, luka ntina mpo nini Nkolo apesaki Joseph Smith mitindo ya lolenge na yango moko boye na ntina ya kokomaka makundoli na ntina ya mabatisi mpo na bawei. Nini mateya oyo eteyi yo etali Nkolo mpe mosala na Ye?
Lobiko ya bankoko na ngai ezali na ntina mpenza mpo na lobiko na ngai.
Ezali polele uta na oyo Nzambe abimisaki na Joseph Smith ntina nini bankoko na biso oyo babatisamaki te na bomoi oyo basengeli lisungi na biso mpo na lobiko na bango. Kasi ntina nini okanisi lobiko ya bankoko na biso ezali “ntina mpe ezali na motuya mpo na ya biso lobiko”? (tala Malongi mpe Mayokani 128:15–18; italiki biso nde tobakisi).
Molongo 5 eteyi ete bokuli ya mabatisi mpo na bawei ezalaki “ya kolengelama yambo ya bokeli ya mokili.” Nini bosolo oyo eteyi yo mpo na oyo etali Nzambe mpe mwango na Ye? Nini nsango ya Mokambi Henry B. Eyring“Gathering the Family of God” ebakisi na bososoli na yo? (Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2017, 19–22).
Joseph Smith asalelaki masakola lokola “nguya ya kokangisa,” “mokoloto ya kokangisa,” mpe “lisanga ebonga nie ” ntango ya koteya makuli ya bonganganzambe mpo na bawei. Luka masakola yango mpe maye makokani ntango ozali kotanga Malongi mpe Mayokani 128:5–25. Nini ezali ndambo ya makambo oyo, na nzela ya Yesu Klisto, ekoki kokangisama elongo mpo na makuli ya bonganganzambe mpo na bawei? Ntina nini “mpiko” ezaki liloba ya malamu mpo na kolimbola malongi ya lobiko mpo na bawei? (tala milongo 9–11).
Nini etuti yo mpo na oyo etali maloba ya Joseph Smith na milongo 19–25? Boniboni milongo oyo ebongoli lolenge oyokaka na ntina ya mosala ya tempelo mpo na bankoko na yo? na ntina ya Yesu Klisto? Nini oyoki ofulami kosala? (tala FamilySearch.org/discovery mpo na kozwa makanisi).
Tala lisusu 1 Bakolinto 15:29; Dale G. Renlund, “Mambi ma Libota mpe Mosala ya Temple: Kokangisa mpe Kobikisa,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2018, 46–49; “A Sacrifice of Time” and “Their Hearts Are Bound to You,” videos, ChurchofJesusChrist.org.
Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa
-
Malongi mpe Mayokani 126.Kotangaka toli oyo epesamaki na Brigham Young ekoki kofula libota na yo na koloba na ntina ya lolenge nini okoki kolekisa ngonga “mingi mingi”(molongo 3) nakobatelaka moko mpe mosusu.
-
Malongi mpe Mayokani 128:15–18.Nini ezali boko mapamboli ya kobikisa mpe kobongisa nie ya mosala ya mambi ya libota? Bokoki komona mwa makanisi na “The Promised Blessings of Family History” (ChurchofJesusChrist.org) to na nzembo etali mambi ya libota, lokola “Family History—I Am Doing It” (Children’s Songbook, 94).
-
Malongi mpe Mayokani 128:18Kanisa kosala mayaka ya papie na bankombo ya bato ya libota mpe bankoko na mokangano nyonso mpo na kolakisa boniboni mambi ya libota mpe mosala ya tempelo esali “mokoloto ya bokangisi” kokangisaka bino na bankoko na biso. Ntango mosusu bokoki koluka-luka na FamilySearch.org mpo na komona bato ya libota ya kobakisa mpe momona lolenge nini kani mayaka ya molongo na bino ekoli.
-
Malongi mpe Mayokani 128:19–23.Ntango mosusu bato ya libota bakoki koluka milongo ya maloba oyo elakisi esengo eluti ya Joseph Smith na ntina ya nsango malamu ya Yesu Klisto mpe lobiko ya bawei. Bato ya libota bakoki kokabola mayele oyo esali bango basepela mpenza na ntina ya mosala oyo lokola—to okoki koluka mayele ya boye elongo na FamilySearch.org/discovery.
Mpo na makanisi mingi mpo na koteya bana, tala mwango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.
Loyembo ekoki koyembama: “Family History—I Am Doing It,” Children’s Songbook, 94.
Mingongo ya Bozongisi
Libatisi mpo na bawei, “Mama ya likambo ya Sika mpe ya Nkembo”
Phebe mpe Wilford Woodruff
Phebe Woodruff azalaki kofanda penepene na Nauvoo ntango Joseph Smith abandaki koteya na ntina ya libatisi mpo na bawei. Ye akomelaki na ntina yango mobali na ye, Wilford, oyo azalaki kosala misio na Angleterre:
“Ndeko mobali Joseph … ayekolaki na nzela ya emoniseli ete bato oyo na eklezia oyo bakokaki kobatisama mpo na bandeko na bango oyo bakufa mpe bazalaki na litomba ya koyoka nsango malamu oyo te, ezala mpo na bana na bango, baboti na bango, bandeko na bango, bandeko na bango ya mibali, bandeko na bango ya basi, bankoko na bango, bandeko ya baboti na bango ya mibali, bandeko ya baboti na bango ya basi. … Soki kaka babatisami mpo na baninga na bango noki bakangolami na boloko mpe bakoki kosenga mpenza bango na bosekwi mpe komema bango na kati ya bokonzi ya lola—malongi oyo eyambamaki mpenza na eklezia mpe ebele ya bato bazali kokende liboso, basusu bakobatisama mbala mingi lokola mbala 16 … na mokolo moko.”1
Wilford Woodruff nsima alobelaki: “Na ngonga nayokaki yango motema na ngai epumbwaki na esengo. … Nakendeki mpe nabatisamaki mpo na bandeko bawei nakokaki kokanisela. … Nayokaki mposa ya koloba alleluya ntango emoniseli ebimaki komonisaka biso libatisi mpo na bawei. Nayokaki ete tozalaki na likoki ya kosepela na mapamboli ya Lola.”2
Vilate Kimball
Lokola Ndeko mwasi Woodruff, Vilate Kimball ayokaki nsango ya libatisi mpo na bawei ntango mobali na ye, Heber, azalaki koteya nsango malamu. Ye akomelaki ye:
“Mokambi Smith afungolaki mama na likambo ya sika mpe ya nkembo … oyo epesi mwa bolamuki na eklezia. Yango ezali, kobatisamaka mpo na bakufi. Paulo alobaki mpo na yango, na Bakolintia ya yambo mokapo ya 15 molongo ya 29. Joseph azwaki litondi mingi ya ndimbola na yango na bobimisi. … Ezali litomba ya eklezia oyo ya kobatisama mpo na bandeko na bango oyo bakufa liboso ete Nsango malamu oyo eya: kutu nsima na Bankoko na bango mpe Bamama. … Na kosalaka bongo, tokosala lokola basali mpo na bango, mpe tokopesa bango libaku ya kobima na Lisekwa ya Yambo. Ye alobaki bakozwa Nsango malamu koteyama epai na bango … kasi ezali te na likambo ya boye lokola milimo kbatisamaka. … Uta motindo oyo eteyamaki awa, mai ezalaki ntango nionso ya koningana. Na ntango ya likita ezalaki ntango mosusu na Bampaka mwambe to zomi na ebale kobatisaka na ngonga moko […] Nalingi kobatisama mpo na Mama na ngai. Nabanzaki kozela kino yo okozonga na ndako, kasi ngonga ya nsuka Joseph alobela mama ya likambo yango, apesaki toli ete moto nyonso atelema mpe asala likambo, mpe abikisa baninga na bango na bowumbu nokinoki lokola akoki. Yango wana nakanisi nakokende poso oyo, lokola ezali na motango moko ya bato ya nzinganzinga bazali kokende. Ndambu ya bato basili kobatisama motango moko koleka. … Boye omoni ezali na libaku mpo na banso. Yango ezali malongi moko ya nkembo te?”3
Phebe Chase
Ntango basilisaki libulu ya libatisi na Tempelo ya Nauvoo, mabatisi mpo na bawei esalemaki kuna na esika ete esalema na ebale. Phebe Chase, mofandi ya Nauvoo, akomaki na mama na ye mpo na ntina ya tempelo, kolimbolaka libulu ya libatisi lokola esika wapi “tokoki kobatisama mpo na bawei mpe kokoma babikisi na Ngomba ya Siona.” Ye akobaki kolimbola ete na libulu oyo, “nabatisamaki mpo na tata na ngai ya bolingo mpe banso batikali ya baninga na ngai bakufa. … Sikoyo nalingi koyeba nini bankombo ya tata mpe mama na yo ezali mpo ete nakoka kobikisa bango, mpo nazali na mposa ya kosunga bawei. … Nkolo alobi lisusu mpe azongisi molongo ya kala.”4
Sally Randall
Na kokomelaka baninga mpe libota na ye na oyo etali libatisi mpo na bawei, Sally Randall amikundolaki liwa ya mwana na ye ya mobali George:
“O ntango kani ya momekano oyo ezali na ngai mpe emonanaki kala ete nakoki te koyokanisama ezala bongo, kasi … tata na ye abatisamaki mpo na ye mpe likambo ya nkembo kani ezali ete tondimi mpe tozwi litondi ya nsango malamu lokola eteyami sikoyo mpe tokoki kobatisama mpo na baninga na biso banso bawei mpe kobikisa bango mosika nsima lokola tokoki koyeba bango.
“Nalingi otindela ngai bankombo epasama na bango ya bandeko na biso oyo bawei mosika nsima lokola bankoko ya mibali mpe bankoko ya basi na ndenge nionso. Nazali na mposa ya kosala oyo nakoki mpo na kobikisa bandeko na ngai mpe nakozala na esengo mingi soki ndambo na bino balingi koya mpe kosunga ngai mpo ezali mosala moko monene mpo na moto moko kosala yango ye moko. … Nazali kozela okokanisa ete oyo ezali malongi ya kobangisa kasi okoyeba yango ezali ya solo.”5