Malongi mpe Mayokani 2021
Sanza ya Zomi na Moko 15–21. Malongi mpe Mayokani 133–134: “Bomilengela mpo na Boyei ya Mobali”


“Sanza ya Zomi na Moko 15–21. Malongi mpe Mayokani 133–134: ‘Bomilengela mpo na Boyei ya Mobali,’” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: Malongi mpe Mayokani 2021 (2020)

“Sanza ya Zomi na Moko 15–21. Malongi mpe Mayokani 133–134,” Yaka, Landa Ngai—Mpo na Bato mpe Mabota: 2021

Elilingi
baseka ya bwania mitano

Mobali Azali Koya, na Elizabeth Gibbons

Sanza ya Zomi na Moko 15–21

Malongi mpe Mayokani 133–134.

“Bomilengela mpo na Boyei ya Mobali”

Mokambi Henry B. Eyring ateyaki: “Bozongisi ya nsango malamu ebandaki na motuna moko kati na bomikitisi oyo emaniolamaki na ndako ya bomikitisi, mpe ekoki kokoba kati na bandako na biso moko na moko” (“Ndako Oyo Wapi Molimo ya Nkolo Efandaka,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2019, 25).

Koma Makanisi na Yo

Ntango Eklezia ezalaki penepene na mibu 19, Profeta Joseph Smith mpe bakambi basusu ya Eklezia basalaki miango ya kafukafu mpo na kosangisa bimoniseli ya Nzambe na mikolo ya nsuka kati na buku moko mpe babimisaki na masini buku 10.000—mbala mibale bokomi na masini ya yambo ya Buku ya Mormon. Likambo ya mawa, bantalo ya likolo ezelisaki miango oyo, mpe batomboki ebele batumbaki ndako ya mikanda ya Eklezia ntango bobimisi buku na masini ezalaki kokoba. Bapanzaki nkasa ekangisama te, mpe atako Basantu ya mpiko babatelaki ndambu na yango, ata kopi mobimba moko te ya Buku ya Mibeko eyebani ete etikala kobikisama.

Oyo toyebi sikawa lokola eteni 133 ya Malongi mpe Mayokani esalamaki mpo na kozala bobakisi na Buku ya Mibeko, lokola elembo ya bokamwi na nsuka ya bimoniseli bibimisama ya Nkolo. Ezali kokebisa mokolo ya boyei ya bosambisi mpe kokundola lisusu libiangi ezwami na emoniseli ya sikawa mobimba: bokima bomoi yamokili, lokola elembo ya Babiloni; botonga Siona; bolengela Boyei ya Mibale; mpe bopanza nsango oyo “epai ya bikolo, mpe mabota, mpe nkota, mpe bato nyonso” (molongo 37). Ntango miango ya ebandeli mpo na Buku ya Mibeko ekokisamaki te, emoniseli oyo ezali bokundoli mpe litatoli ete mosala ya Nkolo ekoki koteleme te, “mpo akokomisa loboko na ye esantu … , mpe bansuka nyonso ya mabele ekomona lobiko ya Nzambe na bango” (molongo 3).

Elilingi
elembo ya boyekoli ya moto ye moko

Makanisi mpo na Koyekola Makomi Yo Moko

Malongi mpe Mayokani 133

Bosolo kati na Malongi mpe Mayokani ekoki kolengela ngai kosala mosala ya Nzambe.

Ntango mosusu buku yango esukaka na bosukisi moko oyo ezali kozongela lisusu to koloba na mokuse makambo ya ntina ya buku. Eteni 133 esalamaki na ebandeli mpo na kozala nsuka ya Buku ya Mibeko, mpe ekoki kozala na motuya mingi mpo na kotanga eteni oyo na likanisi yango na moto. Makambo nini Nkolo abeteli nsete na mosala na Ye? Nini milongo 57–62 eteyi bino mpo na oyo etali mokumba Nkolo alingi bino bosala kati na mosala na Ye?

Malongi mpe Mayokani 133:1–19

Nkolo alingi ngai namilengela mpo na Boyei na Ye ya Mibale.

Nyonso mibale eteni 1, Liyebisi ya Nkolo na Malongi mpe Mayokani, mpe eteni 133, bobakisi ya nsuka ya ebandeli ya buku, ebandi na bosenga se moko ya Nkolo: “Boyoka, O bino bato ya eklezia na ngai” (Malongi mpe Mayokani 1:1; 133:1). Koyoka elingi koloba nini? (tala Mokambi na Makomi, “Koyoka,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org). Mabengisi to mitindo nini Nkolo alingi yo oyoka na Malongi mpe Mayokani 133:1–19? Nini ofulami kosala mpo na komilengela malamu koleka mpo na boyei na Ye? Lolenge nini okosunga baye bazali nzinganzinga na yo mpo ete bamilengela?

Tala lisusu Matai 25:1–13; D. Todd Christofferson, “Komielengelaka mpo na Boyei ya Nkolo,” Ensign to Liahona, Sanza ya mitano 2019, 81–84.

Malongi mpe Mayokani 133:19–56.

Boyei ya Mibale ekozala esengo mpo na basembo.

Ntango ozali kotanga na Malongi mpe Mayokani 133:19–32 na ntina ya makambo oyo ekozala elongo na Boyei ya Mibale ya Mobikisi, okoki komanyola maye babolimboli na ntina ya makambo oyo ezali kopesa yo likanisi na ntina ya Mobikisi mpe mosala na Ye. Makambo ya molimo nini oyo esengeli kotiama na misala ekoki yo komona na bandimbola oyo?

Ntango ozali kotanga ndimbola ya bozongi ya Mobikisi na milongo 32–56, nini ezali kotinda yo otala liboso epai na mokolo monene wana? Maloba nini to masakola nini ezali kolimbola bolingo ya Nkolo mpo na bato na Ye? Kanisa kokoma boyebi na yo moko na “boboto ya bolingo ya [ya yo] Nkolo, mpe nyonso apesi likolo na [yo] engebene na bolamu na ye” (molongo 52).

Malongi mpe Mayokani 134

“Bambula-matari etiamaki na Nzambe mpo na litomba ya moto.”

Mokangano ya Basantu ya ebandeli na mbula-matari ezalaki mindondo. Ntango babenganaki Basantu na Jackson County, Missouri, na 1833, bazwaki lisalisi to lifuti uta na mbula-matari ya mboka to ya ekolo te atako basengaki yango mpo ete esalisa bango. Na ntango kaka wana, bato mosusu libanda ya Eklezia babongolaki mateya ya Siona mpo na koloba ete Basantu babwakisaki bokonzi ya mbula-matari ya mabele. Malongi mpe Mayokani 134 ekomamaki, na ndambo, mpo na komonisa polele emoneli ya Eklezia mpo na ntina ya mbula-matari.

Lolenge nini bandimi ya Eklezia basengeli komiyoka na ntina ya mbula-matari? Ntango ozali koyekola eteni 134, kanisa kokoma mokanda na milongo mibale: Molongo moko ya mibeko boyekoli na ntina ya mbula-matari mpe mosusu na ntina ya mikumba ya bana mboka. Lolenge nini makanisi oyo ekokaki kosalisa Basantu ya ebandeli? Lolenge nini makanisi oyo ekoki kosalame na bisika bofandi?

Tala lisusu Biteni bya Bondimi 1:11–12; Masolo ya Nsango malamu, “Bosomi ya Biyamba,” topics.ChurchofJesusChrist.org.

Elilingi
elembo ya boyekoli na libota

Makanisi mpo na Koyekola Makomi na Libota mpe na Likita ya Libota na Mpokwa

Malongi mpe Mayokani 133:4–14.Maloba ya molimo mazali koyokana te mpo na Siona ezali Babiloni—enguba moko ya kala oyo na makomi mobimba elakisi mabe mpe bowumbo ya molimo (tala D. Todd Christofferson, “Come to Zion,” Ensign to Liahona, Sanza ya zomi na moko. 2008, 37; Mokambi na Makomi , “Babel, Babylon,” scriptures.ChurchofJesusChrist.org). Ezali na likambo moko osengeli kosala lokola libota to, na lolenge moko ya molimo, “kobima … libanda ya Babiloni” (molongo 5) mpe “kokende … kokota na … Siona”? (molongo 9).

Malongi mpe Mayokani 133:20–33Ntango bozali kotanga milongo oyo elongo, libota na bino ekoki koyema bililingi ya lolenge bazali kokanisa Boyei ya Mibale ekozala. Bokoki lisusu kobeta to koyemba loyembo ya Boyei ya Mibale, ndakisa “When He Comes Again” (Chants pour enfants, 82–83), mpe kosolola nini libota na bino ekoki kosala mpo na komilengela mpo na Boyei na Ye.

Malongi mpe Mayokani 133:37–39.Libota na bino ekosepela kotanga milongo oyo “na mongongo makasi”? (molongo 38). Kokabola nsango malamu na mongongo makasi elingi koloba nini? Bosolo nini ekoki biso kokabola?

Malongi mpe Mayokani 134:1–2.Mpo na kosunga libota na bino basosola motuya ya mbula-matari, bokoki kotunana mituna lokola oyo: Lolenge nini libota na biso epambolami na kozalaka na mibeko? Lolenge nini ekolo epambolami na kozalaka na mibeko? Bokoki lisusu koyema to kopakola langi ya elilingi ya bendele ya ekolo to kokanga na moto Biteni ya Bondimi ya zomi na moko mpe ya zomi na mibale.

Mpo na kozwa makanisi mingi koleka mpo na koteya bana, botala moango ya poso oyo na Yaka, Landa Ngai—Mpo na Eteyelo ya Bana.

Loyembo oyo ekoki koyembama: “Come, Ye Children of the Lord,” Cantique, no. 58.

Kobongisa Boyekoli Makomi mpo na Yo Moko

Boteya malongi ya polele mpe ya pete. Nkolo alimboli nsango malamu na Ye na maloba lokola “polele” mpe “mindondo te” (Malongi mpe Mayokani 133:57). Maloba oyo epesi bino makanisi nini na ntina ya koteya nsango malamu na libota na bino?

Elilingi
Klisto alati nzambala ya motane

Klisto Na Nzambala na Ye ya Motane, na Minerva Teichert

Bimisa na lokasa